GÉORGIE | 1998-2006
Minyoko epekisaki bango te kosalela Yehova
Bandeko mibali mpe basi babangaki te mpe bakobaki koyangana na makita. Bankulutu bazwaki bibongiseli oyo ebongi mpo na kobatela basakoli. Ndeko André Carbonneau, oyo azalaki avoka na Canada mpe asambaki mpo na bandeko na bambula wana, alobi: “Mbala mingi, ndeko mobali moko oyo azalaki na telefone na mabɔkɔ, azalaki kotɛlɛma pene na esika makita ezalaki kosalema. Soki amoni bato ya mobulu bazali koya, azalaki mbala moko kobenga bankulutu mpo na koyebisa bango ete bato ya mobulu balingi koya kopanza makita.”
Mbala nyonso oyo likambo ezalaki kobima, bandeko mibale ya biro ya filiale bazalaki koya kotala bandeko mpo na kolendisa bango. Ndeko André alobi: “Ezalaki kokamwisa, mpo mbala mingi bamonisi ya filiale bazalaki kokuta esika ya makita etondi na bandeko mibali mpe basi oyo bazali na esengo mpe bazali komungamunga.”
Ata bandeko oyo bakutanaki na likambo te, ezala mpe
bayekoli ya Biblia, bazalaki mpe na ekateli ya kokoba koyangana na makita. Ndeko André akanisi lisusu lisolo oyo asololaki na mwasi moko oyo alingaki kokóma mosakoli oyo azwi naino batisimo te. Mwasi yango ayebisaki ye: “Ntango nalandaki na televizyo mobulu oyo basalaki, namonaki bokeseni oyo ezali kati na bakristo ya solo mpe bakristo ya lokuta, mpe nalingi kozala mokristo ya solo.”Na mpiko nyonso, basambaki mpo na bandeko na bango bakristo
Na bambula wana ya mikakatano, basakoli bamonisaki kondima makasi mpe mpiko na ndenge bazalaki kaka
komipesa na mosala ya kosakola. Bandeko oyo bazalaki kosamba na batribinale mpo na bandeko mosusu ya Géorgie bamonisaki mpe kondima ya ndenge wana.Mbala mingi, na televizyo, na radio, to na bazulunalo, bazalaki komonisa ete Batatoli ya Yehova bazali bato oyo bapanzaka mabota, baboyaka lisalisi ya monganga, mpe batɛmɛlaka bakonzi ya Leta. Na yango, baavoka oyo bazalaki kosamba mpo na bandeko bazalaki na likama mpo lokumu na bango mpe mosala na bango ekokaki kobeba.
John Burns, ndeko moko ya filiale ya Canada oyo azali avoka mpe asalisaki bandeko ya Géorgie na bambula wana,
Bato ya Géorgie batɛmɛli minyoko oyo babimiseli Batatoli ya Yehova
Na ntango yango, bakobaki kosalela Batatoli ya Yehova makambo ya mobulu. Yango wana, kobanda na mokolo ya 08/01/2001, Batatoli ya Yehova bakomaki mokanda moko oyo etambolaki na mboka mobimba mpo bato bátya sinyatire. Mokanda yango ezalaki kosɛnga ete bábatela bana-mboka ya Géorgie na makambo ya mobulu mpe bákanga baoyo bazali kobimisa mobulu.
Ndeko Burns alimboli ntina ya mokanda yango: “Mokano na biso ezalaki ya komonisa ete bato mingi ya Géorgie
bazalaki te kosepela na makambo ya mobulu oyo bazalaki kosalela Batatoli ya Yehova; mpe ete etuluku moke ya bato oyo bazalaka na molende ya koleka ndelo na makambo ya losambo nde bazalaki kobimisa mobulu yango.”Na pɔsɔ mibale mpamba, bato 133 375 ya bitúká nyonso ya Géorgie, oyo mingi na bango bazalaki bato ya lingomba ya Ɔrtɔdɔkse, batyaki sinyatire na mokanda yango. Atako mokanda yango ekómaki tii na mabɔkɔ ya Prezida Shevardnadze, batikaki konyokola bandeko te. Bato oyo bazalaka na molende ya koleka ndelo na makambo ya losambo bakobaki konyokola Batatoli ya Yehova na nko.
Kaka na ntango wana, Yehova akobaki kopambola basaleli na ye. Ntango bato wana bazalaki kobimisela basaleli ya Nzambe mobulu, Yehova Nzambe azalaki kosalisa bato ya mitema sembo bálongwa na mangomba ya lokuta.
Balongwe na boombo ya mangomba ya lokuta
Na bambula mingi ya bomoi na ye, Babilina Kharatishvili azalaki mondimi ya molende na lingomba ya Ɔrtɔdɔkse na Géorgie. Ntango azalaki na mbula mwa moke koleka 30, atambolaki engumba na engumba mpe mboka na mboka mpo na koteya bato bomoi oyo basantu bazalaki na yango.
Kasi Babilina azalaki na mposa ya koyeba makambo mosusu mingi oyo etali Nzambe. Na yango, azwaki ekateli ya kolanda mateya na seminɛrɛ ya lingomba ya Ɔrtɔdɔkse na Géorgie. Mokolo moko, sango moko alakisaki bayoki na ye buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko mpe alendisaki bango báluka buku yango epai ya Batatoli ya Yehova. Ayebisaki bango: “Buku oyo ekoki koteya bino makambo mingi ya Biblia.”
Likambo wana esalaki Babilina mpasi mingi. Banda kala, azalaki kolinga kosolola na Batatoli ya Yehova te, kasi sikoyo sango nde alendisi bango báluka babuku na bango! Na nse ya motema, alobaki boye: ‘Soki Batatoli ya
Yehova nde basengeli koteya ngai makambo ya Nzambe, boye nazali kosala nini awa?’ Na mbala moko, alukaki Batatoli ya Yehova na engumba Poti mpe abandaki koyekola Biblia.Ntango Babilina azalaki koyekola makambo mingi na Biblia, azalaki kobongola makambo mingi na bomoi na ye. Alobaki boye: “Ntango ngai moko natángaki na Biblia ete ezali mabe kosalela bililingi na losambo, naboyaki lolenge nyonso ya losambo ya bikeko. Nandimisamaki ete ebongaki nasala bongo.” Ntango azalaki na mbula koleka 70, azwaki ekateli ya kokóma Motatoli ya Yehova.
Likambo ya mawa, na 2001, Babilina abɛlaki makasi mpe akufaki liboso ete azwa batisimo. Kasi na nsima, nkɔkɔ na ye Izabela azwaki batisimo mpe sikoyo azali kosalela Yehova na bosembo.
Alingaki kokóma mamelo
Eliso Dzidzishvili azalaki na mbula 28 ntango azwaki ekateli ya kokóma mamelo. Lokola kuva moko te ezalaki pene na engumba na Tkibuli epai azalaki kofanda, akendaki
na Tbilissi na 2001. Ntango azalaki kozela ete bábenga ye akɔta na kuva, azalaki kosala mosala ya molakisi, oyo ezalaki kozwa ntango mingi te. Nunu, moko ya bana-kelasi na ye, azalaki mwana ya Motatoli ya Yehova.Eliso alobi boye: “Mbala na mbala tozalaki kosolola masolo ya Biblia. Nazalaki kokɔtela lingomba ya Ɔrtɔdɔkse makasi, kasi Nunu azalaki kotángela ngai bavɛrsɛ ya Biblia, moko nsima ya mosusu. Mokolo moko, asɛngaki ete atángela ngai mwa buku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? Ntango tozalaki kotánga baparagrafe mpe bavɛrsɛ ya Biblia, namonaki ete kosalela bikeko to bililingi na losambo ezali kobuka mibeko ya Nzambe.”
Na nsima, Eliso akendaki na ndako-nzambe na bango mpo na kotuna sango mituna. Biyano oyo sango apesaki emonisaki polele ete mateya ya lingomba na bango euti na Biblia te. (Mrk. 7:7, 8) Lokola andimisamaki ete amoni solo, abandaki mbala moko koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova mpe eumelaki te azwaki batisimo.
Batongi Bandako ya Bokonzi atako botɛmɛli ezali
Na 2001, masangá mingi ezalaki na mposa ya bisika ya losambo oyo ebongi. Lapolo oyo basalaki emonisaki ete esengelaki kotonga Bandako ya Bokonzi soki 70. Na yango, basalaki programɛ ya kotonga Bandako ya Bokonzi, atako botɛmɛli ezalaki na ekólo mobimba.
Eumelaki te, ekipi moko ya botongi ebandaki mosala ya kobongisa ndako moko esika masangá mingi ya Tbilissi ezalaki kosala makita liboso. Mwa moke na nsima, misala ebandaki mpo na kotonga bandako mosusu mibale, moko na Tbilissi mpe mosusu na Chiatura, na wɛsti ya Géorgie.
Tamazi Khutsishvili, moko ya bandeko oyo batongaki Ndako ya Bokonzi ya Chiatura, alobi boye: “Mokolo na mokolo, tozalaki bato 15 mpo na kotonga. Eumelaki te, moto nyonso na engumba wana ayebaki ete tozalaki kotonga Ndako ya Bokonzi ya sika. Na nsima toyokaki nsango ete banguna na biso balingi koya kobuka Ndako ya Bokonzi yango.”
Lokola botɛmɛli ezalaki makasi ndenge wana, ndenge nini mosala ya kotonga ekokaki kolonga? Ndeko Tamazi alobi: “Tokobaki na misala mpe tosilisaki kotonga Ndako *
ya Bokonzi yango nsima ya sanza misato. Atako makaneli ezalaki, ata monguna moko te apusanaki.”Bazwi bonsomi oyo bazalaki kozela banda kala
Na sanza ya zomi 2003, babandaki kotonga Ndako ya Bokonzi mosusu na engumba Samtredia. Na mbala oyo lisusu, bato oyo bazalaka na molende ya koleka ndelo na makambo ya losambo banyokolaki bandeko. Kutu, nsima ya kotɛlɛmisa bifelo mpe ntango pavema ekaukaki naino te, banguna na biso bayaki mpe babukaki Ndako ya Bokonzi.
Kasi, na sanza ya zomi na moko 2003, mbongwana oyo esalemaki na Géorgie ekitisaki bandeko mitema. Mbongwana na guvɛrnema efungolaki nzela na bonsomi na
makambo ya losambo. Yango wana, bakonzi ya Leta bakangaki bituluku ya bato ya Ɔrtɔdɔkse oyo bazalaka na molende ya koleka ndelo na makambo ya losambo oyo bazalaki konyokola Batatoli ya Yehova.Basaleli ya Nzambe bazwi mapamboli mingi
Ntango minyoko esilaki, mwa moke na nsima, basaleli ya Yehova na Géorgie bazwaki ebele ya mapamboli ya elimo. Na liyangani ya etúká ya 2004, Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami ya Grɛki ya Bokristo ebimaki na monɔkɔ ya Géorgien.
Na nsima, liyangani ya etúká “Lobiko ekómi pene!” oyo esalemaki na 2006 ezalaki likambo mosusu oyo
Mpo na komonisa botɔndi na bango, bayangani mingi balelaki na esengo. Ndeko mwasi moko alobaki: “Nazangaki maloba mpo na komonisa esengo oyo nazalaki na yango ntango tozwaki Biblia mobimba. . . . Ezalaki mpenza likambo oyo etiká nsango.” Bato koleka 17 000 bazalaki na liyangani yango, oyo etiká mpenza nsango na lisolo ya basaleli ya Yehova na Géorgie.
^ par. 29 Kobanda na 2001 tii na 2003, Bandako ya Bokonzi 7 etongamaki na ekólo mobimba.