Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nasala nini mpo nazala mayele mingi na kelasi?

Nasala nini mpo nazala mayele mingi na kelasi?

Mokapo 13

Nasala nini mpo nazala mayele mingi na kelasi?

KANISÁ ete obungi na kati ya zamba moko monene. Zamba yango molili, ozali komona moi te mpo banzete milaimilai ebombi yango. Banzete ya mikemike ezingizingi yo, nzela ya koleka ezali te. Mpo na koleka, esengeli okata banzete yango na mashɛti.

Bilenge mosusu bamonaka makambo oyo bakutanaka na yango na kelasi ndenge moko na likambo oyo touti kolobela. Na kelasi, mokolo na mokolo ozalaka na makambo ebele ya kosala mpe na butu, esɛngaka olekisa bangonga ebele mpo na kosala badevuare oyo bapesaki. Yo mpe omonaka bongo? Komá awa na nse liteya oyo yo omonaka ete eleki makasi.

․․․․․

Ntango mosusu baboti ná balakisi na yo bayebisaka yo mbala na mbala ete osengeli kosala makasi na liteya yango. Soki ezali bongo, kokanisa te ete bazali kotungisa yo! Balukaka nde osala nyonso oyo okoki. Na yango, okosala nini soki likambo yango ebandi kolɛmbisa yo? Ndenge kaka moto oyo azali na bisaleli oyo ebongi akoki kopasola nzela na kati ya zamba ya monene, ndenge moko mpe yo okoki kosala mwa makambo mosusu mpo na kolonga na kelasi. Makambo yango ezali nini?

Likambo ya liboso: Lingáká koyekola. Ezali mpasi mpo olonga na kelasi soki olingaka koyekola te. Yango wana, esengeli obosana te ntina oyo okendaka kelasi. Ntoma Paulo akomaki boye: “Moto oyo azali kotimola elanga asengeli kotimola elanga na elikya mpe moto oyo azali kotuta mbuma asengeli kosala bongo na elikya ya kozwa oyo ya ye ndambo.”—1 Bakorinti 9:10.

Mbala mosusu omonaka te ntina ya “kotimola,” to ya koyekola mateya mosusu. Mpo na nini? Mpo ekoki kozala ete sikoyo ozali komona te ntina ya mateya mosusu oyo bapesaka bino na kelasi. Kasi, koyekola mateya ndenge na ndenge ekosalisa yo oyeba makambo mingi na esika ofandi. Ekosalisa yo okóma “makambo nyonso epai ya bato ya ndenge nyonso,” mpe ekosalisa yo oyeba kosolola na bato ndenge na ndenge. (1 Bakorinti 9:22) Yango ekoki kutu kokolisa likoki na yo ya kokanisa, mpe yango ekosalisa yo na nsima.

Likambo ya mibale: Talelá malamu makoki na yo. Kotánga ekoki kosalisa yo omona makoki na yo mosusu oyo oyebaka te. Paulo akomelaki Timote boye: “Opelisa lokola mɔtɔ likabo ya Nzambe oyo ezali epai na yo.” (2 Timote 1:6) Emonani ete Timote azwaki mokumba moko monene na lisangá ya bokristo. Kasi, esengelaki akolisa “likabo” oyo Nzambe apesá ye mpo asala na yango mosala, kasi te mpo ebeba kaka boye. Na ntembe te, soki ozali mayele na kelasi, ezali te mpo Nzambe nde apesi yo yango na ndenge ya likamwisi. Kasi, yebá ete ozali na mayele ya kosala makambo mosusu oyo moto mosusu azali na yango te. Kelasi ekoki kosalisa yo okolisa mpe obatela makoki oyo oyebaka te ete ozali na yango.

Komimonaka te ete ozali na ntina moko te mpe okosala eloko ya malonga te ata soki obomi nzoto. Soki makanisi ya ndenge wana eyeli yo, benganá yango mpe kanisá nde makambo ya malamu. Na ndakisa, ntango bato mosusu balobaki ete Paulo ayebi koloba te​—oyo ezalaki ntango mosusu bilobaloba ya mpamba​—ye apesaki bango eyano oyo: “Ata soki nazali na makoki te na koloba, ya solo nazali bongo te na boyebi.” (2 Bakorinti 10:10; 11:6) Paulo ayebaki bolɛmbu na ye. Kasi, ayebaki soki azalaki makasi na makambo nini.

Bongo yo? Ozalaka makasi na makambo nini? Soki oyebi yango te, mpo na nini te kotuna mokóló moko oyo osololaka na ye malamu? Moninga ya boye akoki kosalisa yo oyeba soki ozali makasi na makambo nini mpe ndenge okoki kosalela yango na makambo mingi.

Likambo ya misato: Zaláká na momeseno ya koyekola. Okoki kosala malamu na kelasi kaka soki ozali kosala makasi. Ata soki bobandi koyekola sikoyo te, okomona na nsima ete koyekola ezali na ntina. Ntango oyoki kaka liloba “koyekola,” oyokaka malili na nzoto. Nzokande, koyekola ezali na ntina. Kutu, soki osali mwa makasi, okosepela na yango.

Kasi, mpo okóma na momeseno malamu ya koyekola, osengeli kokabolaka ntango malamu. Kobosana te ete ntango ozali mwana-kelasi, koyekola esengeli kozala likambo na yo ya liboso. Biblia elobi ete “ntango ya kosɛka” ezali, “ntango ya kopumbwapumbwa” mpe ezali. (Mosakoli 3:1, 4; 11:9) Yango wana, lokola bilenge mingi, yo mpe osepelaka kobomba mwa ntango mpo na kosakana. * Kasi, Mosakoli 11:4 epesi likebisi oyo: “Ye oyo azali kotalatala mopɛpɛ akolona mboto te; mpe ye oyo azali kotala mapata akobuka mbuma te.” Liteya nini okoki kozwa? Esengeli kotya koyekola na esika ya liboso, kasi kosakana na nsima. Komitungisa te: okozanga ntango te mpo na koyekola mpe kosakana!

Ndenge ya kosalaka badevuare malamu

Kasi, osengeli kosala nini soki ozali na badevuare ebele? Mbala mosusu oyokaka lokola Sandrine, elenge ya mbula 17, oyo alobaki boye: “Kobongisa badevuare ezwaka ngai ngonga mibale to misato na mpokwa, mpe nasalaka yango ata mokolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo.” Osengeli kosala nini soki ozalaka na badevuare mingi ya kosala? Meká kosalela makanisi oyo ezali na lokasa 119.

Silisá mikakatano

Na likambo etali kokola na elimo, Paulo akomelaki Timote boye: “Okanisaka malamu mpenza makambo yango; omipesa mobimba na yango, mpo bato nyonso bámona polele ete ozali kokende liboso.” (1 Timote 4:15) Soki yo mpe osali bongo na likambo etali kotánga kelasi, bato nyonso bakomona ete ozali mayele.

Kanisá lisusu ndakisa oyo topesaki na ebandeli. Soki obungi na kati ya zamba monene, okozala na mposa ya esaleli lokola mashɛti mpo na kopasola nzela. Ezali mpe bongo mpo na kotánga kelasi. Na esika omitungisa mpo na makambo oyo baboti mpe balakisi na yo basɛngaka yo, salelá nde makambo misato oyo tolobeli na mokapo oyo mpo osala malamu na kelasi. Ntango okomona ete okómi mayele, okosepela ete osalelaki makanisi oyo!

MPO NA KOYEBA MAKAMBO MOSUSU OYO ETALI LISOLO OYO, TÁNGÁ MOKAPO 18, NA VOLIMI 1

NA MOKAPO OYO ELANDI

Longola mikakatano ya kelasi yango moko, bana mosusu bazali kotumola yo. Okoki kosala nini?

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 13 Mpo na koyeba makambo mingi na oyo etali masano, talá Eteni 8 ya buku oyo.

VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO

Ye oyo azali kotalatala mopɛpɛ akolona mboto te; mpe ye oyo azali kotala mapata akobuka mbuma te.”​Mosakoli 11:4.

TOLI

Ntango olingi koyekola, banda naino kobwaka liso likolólikoló mpo na kozala na mwa makanisi na lisolo yango. Na nsima, komá mwa mituna oyo biyano na yango ekoki kouta na mwa motó ya likambo mokomoko. Soki osilisi, tángá lisolo yango mobimba mpo na koluka biyano. Na nsuka, zongelá mpo na kotala soki osimbi makambo oyo otángi.

OYEBAKI YANGO . . . ?

Balakisi basepelaka te na bana-kelasi oyo bayibaka na ekzamɛ mpe bana-kelasi oyo basalaka bongo, bazalaka mayele te. Likambo ya mabe koleka, kosala bongo ekoki kobebisa boyokani na bango ná Nzambe.​—Masese 11:1.

MAKAMBO OYO NAKOSALA

Na bilɛtɛ na ngai, nakolinga ete nazwa bapwɛ ․․․․․ na liteya oyo: ․․․․․

Mpo nalonga na liteya yango, nakosala boye: ․․․․․

Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․

OKANISI NINI?

● Mpo na nini osengeli komipesa na kelasi?

● Ntango nini omonaka ete ezali malamu mpo na koyekola mpe kosala badevuare?

● Na ndako, esika nini omoni ete ezali malamu mpo na kosala badevuare na yo mpe koyekola?

● Okoki kosala nini mpo kosakana epekisa yo te kozwa bapwɛ ya malamu na kelasi?

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 117]

‘‘Namonaka ezaleli yango epai ya bilenge mosusu ya mbula na ngai. Bizaleli oyo bazalaki na yango na likambo etali koyekola, emonanaka mpe na ndenge na bango ya kobongisa makita to kotánga Biblia. Baoyo bazalaki kolinga koyekola te na kelasi, balingaka mpe koyekola Biblia te.’’​—Sylvie

[Etanda/​Elilingi na lokasa 119]

Luká esika ya koyekola. Esengeli kozala esika ya kimya. Soki likoki ezali, okoki kosalela mesa ná kiti. Kofungola TV te.

Omityela mikano. Lokola kelasi ezali na ntina mingi, zwá ekateli ya kofungola TV kaka soki osilisi badevuare na yo.

Kozongisaka makambo nsima te. Salá programɛ ya sikisiki mpo na kobongisaka badevuare na yo, mpe tosáká yango.

Zalá na programɛ. Poná devuare oyo okobanda na yango, oyo ekolanda mpe bongobongo. Komá badevuare yango na papye, mpe kabolá ngonga oyo mokomoko na yango ekozwa. Tyá elembo ntango nyonso oyo osilisi devuare moko.

Pemáká mwa moke. Soki omoni ete bɔɔngɔ ebandi kolɛmba, pemá moke. Kasi, soki ntango eleki kaka moke, zongelá devuare na yo.

Tyá motema ete okozala moyekoli malamu. Kobosana te ete eloko ekesenisaka moyekoli ya mayele ná oyo ya mayele te, ezali te mayele yango moko, kasi nde molende na koyekola. Okoki kolekisa kelasi na yo malamu soki oyekolaka mingi. Salá mpenza molende mpe okozwa matomba.

[Elilingi na lokasa 116]

Kotánga kelasi tii kosilisa ezali lokola kopasola nzela na kati ya zamba moko monene​—yango nyonso mibale esɛngaka kozala na bisaleli oyo ebongi