Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ETENI 1 • MISALA 1:1–6:7

“Botondisi Yerusaleme na mateya na bino”

“Botondisi Yerusaleme na mateya na bino”

MISALA 5:28

Ntango bayekoli ya Yesu bazwaki elimo santu na Pantekote ya mobu 33 T.B., babandaki mbala moko kopesa litatoli mpo na Bokonzi ya Nzambe. Na eteni oyo, tokotalela lisolo kitoko ya ebandeli ya lisangá ya bokristo, litatoli monene oyo epesamaki na Yerusaleme, mpe mpiko oyo bantoma bamonisaki ntango bakómaki kotɛmɛla bango.