Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 3

Rahaba andimelaki Yehova

Rahaba andimelaki Yehova

Kanisá ete tozali na engumba Yeriko. Engumba yango ezali na mokili ya Kanana, epai bato bandimelaka Yehova te. Mwasi moko na nkombo Rahaba afandaka kuna.

Ntango Rahaba azalaki elenge, ayokaki na masolo ndenge Moize akabolaki Mbu Motane mpe abimisaki Bayisraele na Ezipito. Ayokaki lisusu ndenge Yehova asalisaki bango bálonga banguna na bango. Sikoyo, Rahaba ayoki ete Bayisraele bakómi pene ya kozwa Yeriko.

Rahaba abombaki banɔngi mpo andimelaki Yehova

Mokolo moko na mpokwa, Bayisraele mibale bakɔti na mayele mpo na kotala mokili ya Yeriko. Bakómi na ndako ya Rahaba. Asɛngi bango bákɔta na ndako mpe báfanda. Na butu, bayebisaki mokonzi ya Yeriko ete banɔngi moko bakɔti na mboka mpe ete bakei na ndako ya Rahaba. Mokonzi atindaki bato epai ya Rahaba mpo na kokanga mibali yango. Kasi Rahaba abombaki banɔngi yango mibale na plafɔ ya ndako na ye mpe alobaki na basali ya mokonzi ete: ‘Banɔngi bazalaki awa kasi babimi. Soki bolandi bango sikoyo, bokoki kozwa bango!’ Oyebi mpo na nini Rahaba abombaki banɔngi yango?Ezali mpo andimelaki Yehova mpe ayebaki ete akopesa Bayisraele mokili ya Kanana.

Liboso ete banɔngi yango bábima na ndako ya Rahaba, balakaki Rahaba ete bakobatela ye ná bandeko na ye ntango Yeriko ekobomama. Oyebi nini bayebisaki ye asala?Bayebisaki ye: ‘Zwá nsinga oyo ya motane, kangá yango na fɛnɛtrɛ na yo ekita libándá. Soki osali yango, moto nyonso oyo akozala na ndako na yo akobika.’ Rahaba asalaki kaka ndenge banɔngi yango bayebisaki ye. Oyebi ndenge makambo elekaki?

Yehova abikisaki Rahaba ná bandeko na ye

Nsima ya mwa mikolo, Bayisraele batambolaki zingazinga ya engumba yango na kimya. Basalaki bongo mikolo motoba; bazalaki kobaluka mbala moko na mokolo. Kasi na mokolo ya nsambo, babalukaki engumba yango mbala nsambo. Mpe na nsima, bango nyonso bagangaki makasi. Yehova akweisaki efelo ya engumba mobimba. Kasi ndako oyo ezalaki na nsinga ya motane na fɛnɛtrɛ ekweaki te. Ozali komona yango na elilingi?Rahaba ná bandeko na ye babikaki!

Lisolo ya Rahaba ekoki koteya yo nini?Rahaba andimelaki Yehova mpo ayebaki makambo minene oyo asalaki. Yo mpe ozali koyekola makambo mingi ya Yehova. Ondimelaka Yehova lokola Rahaba?Toyebi ete ondimelaka ye!