Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Batambolaka lokola basoda!

Batambolaka lokola basoda!

Batambolaka lokola basoda!

“Tofandaka na ekólo Belize, na mboka moko ya sika oyo ezali pembeni ya zamba. Mokolo moko na ntɔngɔ, pene na ngonga ya 9, limpinga moko ya nsɛlɛlɛ (fourmis) ekɔtaki na ndako na biso mobimba. Bakɔtaki na nse ya porte mpe na mwa madusu nyonso ya mikemike; bayaki koluka biloko ya kolya. Eloko mosusu ya kosala ezalaki te; esengelaki kaka kobima, kotikela bango ndako ngonga moko to mibale básala mosala na bango. Ntango tozongaki, nyama-nkɛkɛ ata moko te ezalaki na ndako.”

BATO MINGI oyo bafandaka na mikili ya molunge lokola Belize bamesaná komona makambo ya ndenge wana mpe bamitungisaka mpo na yango te. Yango ezali nde lolenge moko ya kobengana nyama-nkɛkɛ na ndako, na ndakisa mpɛsɛ mpe mwa banyama mosusu ya mikemike. Ndako ekotikala mpenza pɛto!

Likambo ya kobenda likebi ezali ete nsɛlɛlɛ oyo balobeli awa, babengaka yango basoda, mpo bomoi na bango mpe makambo oyo basalaka ezali lokola basoda. * Na esika ya kotonga ndako na bango, mampinga yango ya bankóto na nkóto ya “basoda”oyo bafandaka esika moko te, basalaka nde kaa epai bafandaka mwa mikolo; nsɛlɛlɛ ebele bakangisaka makolo na bango esika moko mpe basalaka lokola efelo zingazinga ya mama na bango mpe bana oyo auti kobota. Nsɛlɛlɛ mosusu ebimaka na kaa yango, na molɔngɔ mpo na kokende koluka biloko ya kolya, elingi koloba nyama-nkɛkɛ to mpe nyama mosusu nyonso ya mikemike, na ndakisa miselekete. Nsɛlɛlɛ oyo ezalaki na liboso ya milɔngɔ yango oyo ebimi mpo na koluka biloko ya kolya, basalaka milɔngɔ mpo na kozingela esika oyo bakozwa biloko ya kolya. Basalaka bongo soki bazali lisusu koyoka nsolo te ya eloko oyo bakolanda; na ntango wana baoyo bazali liboso batambolaka lisusu te mpe batɛlɛmaka esika moko. Lokola baoyo bazali nsima bazali kaka koya, milɔngɔ oyo ezali liboso ekotondana na ebele ya nsɛlɛlɛ mpe bakokabwana na baninga na bango mpe bakokóma limpinga ya sika oyo ekolanda kotambola mpe kobaluka.

Bomoi ya nsɛlɛlɛ yango, oyo bazalaka lokola basoda, elandaka ebongiseli moko ya mikolo 36. Soki batamboli mikolo 16, batɛlɛmaka mikolo 20; na boumeli ya mikolo yango mama na bango abotaka maki. Nsima na yango, soki bayoki nzala, nde bakobi mobembo na bango. Basalaka milɔngɔ milai ya bamɛtrɛ koleka zomi, nyama nyonso ya mikemike ekimaka bango: mampulututu, nkotó, lingangalá (coléoptère), magbololo, miselekete; mpe ndɛkɛ elandaka nyama mikemike wana oyo ezali kokima mpo na kolya yango, kasi emonani ete elyaka nsɛlɛlɛ te.

Nsɛlɛlɛ, oyo Biblia elobeli na Masese 30:24, 25 ete bazali na “mayele,” bazali kati na biloko ya kokamwa oyo Nzambe asalá.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 4 Lisolo oyo ezali kolobela nsɛlɛlɛ oyo babengi Eciton, oyo bazalaka na Amerika ya ntei mpe ya sudi.

[Elilingi na lokasa 31]

Nsɛlɛlɛ oyo babengaka bango basoda

[Eutelo ya bafɔtɔ]

© Frederick D. Atwood

[Elilingi na lokasa 31]

Bakangisaka makolo na bango esika moko mpo na kosala gbagba

[Eutelo ya bafɔtɔ]

© Tim Brown/www.infiniteworld.org