Babweta ya kokamwisa
Babweta ya kokamwisa
EUTI NA MOKOMI NA BISO NA ZAMBIE
NA MOBU 1855, David Livingstone, moto ya Écosse oyo azalaki misionɛrɛ mpe moto ya mibembo mpo na koluka mikili oyo eyebanaki naino te, asilaki kolekisa bambula mingi na kotambola na Afrika, kontina monene oyo na ntango wana eyebanaki mpenza te na mikili mosusu. Ntango azalaki kokenda na ɛsti, epai na likoló ya ebale monene ya Zambèze, akutanaki na bato ya mboka oyo bayebisaki ye na mwa kobanga ete babweta (chutes) ya minene ezali liboso. Lokola babweta yango ezalaki kosala makɛlɛlɛ makasi mpe komatisa mai lokola milinga, bato ya mboka babengaki yango Mosi-oa-Tunya, oyo elimboli “Milinga oyo engulumaka.”
Livingstone amonaki malamu apusana mpenza pene mpo na kotala babweta yango, oyo babengaka lelo babweta ya Victoria. Mpo na kolobela ndenge amonaki yango mpo na mbala ya liboso, akomaki boye: “Nayokaki nsɔmɔ ntango namataki na mopanzi ya lobwaku mpe na nse namonaki ebale Zambèze ekatani banda na ngámbo tii na ngámbo mosusu; namonaki ebale oyo ezali na bonene ya kilomɛtrɛ moko, ezali kosopana na nse na bozindo ya bamɛtrɛ ntuku misato, mpe mbala moko ekómi moke bamɛtrɛ soki zomi na mitano to ntuku mibale mpamba.”
Na ntango ya mpela, babweta ya Victoria, oyo ngámbo moko ezali Zambie mpe ngámbo
mosusu Zimbabwe, batalelaka yango lokola esika mai ezali kosopana banda na likoló mpe esali lokola rido ya mai oyo eleki monene na mokili mobimba! Na ntango ya mpela, babweta yango esopaka mai balitrɛ milio 545 na miniti moko, longwa likoló tii bamɛtrɛ 108 na nse kati na libulu moko ya monene mpe ya mozindo. Na nsima, mai nyonso ya ebale Zambèze ekɔtaka na libulu moko oyo ezali monene ya bamɛtrɛ 65 mpamba. Mabulu ya ndenge wana oyo ekeseni mpenza na mosusu nyonso nde esali ete babweta ya Victoria ekamwisaka mpenza.Zamba oyo ezali pembenipembeni ya babweta yango ezali mpenza kitoko mingi. Bakómisá yango parc national, epai okoki kokuta nzete mpe matiti ndenge na ndenge, bakisa mpe banyama oyo ekamwisaka bato—lokola ngubu, nzoku, dikala (girafe), pakasa, zɛbrɛ mpe ata nkɔsi. Bandɛkɛ kitoko lokola mpongo mpe faucon taita, ndɛkɛ oyo ezali mingi te, ezalaka mpe na bisika wana ya mabangamabanga.
Livingstone alobi, “na Angleterre, ezali na eloko moko te oyo moto akoki komona oyo ekoki kokokana na kitoko ya esika wana. Bato ya Mpoto bamoná naino eloko ya kitoko ya ndenge wana te; kutu baanzelu basengeli kotɛlɛma ntango bazali kopumbwa mpo na kotala esika wana ya kitoko.” Lelo oyo, atako esili koleka mbula pene na 150 kobanda Livingstone amonaki babweta yango mpo na mbala ya liboso mpe apesaki yango nkombo ya Victoria, nkombo ya mokonzi-mwasi ya Angleterre, mbula na mbula, bankama ya bankóto ya bato bautaka bisika nyonso ya mokili mpo na kokenda kotala na miso na bango moko kitoko ya babweta wana.
Na ntembe te, ndenge babweta ya Victoria eyebaná lokola moko ya bisika oyo Nzambe asalá oyo eleki kitoko na mokili, ezali mpenza solo. Kasi Zambie ezali mboka oyo etondi na bibale minene, ezali mpe na babweta mosusu ya kitoko oyo eyebani mingi te. Tosɛngi yo olanda biso mpo na kotala mwa mosusu na yango.
Babweta ya Ngonye
Livingstone akómaki na babweta ya Ngonye, oyo mpe eyebani na nkombo Sioma, na mokolo moko ya moi makasi na ntango ya elanga, na sanza ya zomi na moko, mbula soki mibale liboso ete amona babweta ya Victoria mpo na mbala ya liboso. Akomaki boye: “Bisanga oyo ezali epai na likoló ya babweta yango ezali na zamba ya kitoko oyo okoki komona yango esika mosusu te. Namonaki mai etondi na mabangá minene na esika yango oyo ezali mpenza kitoko ndenge namoná naino te.” Lelo oyo, bato oyo bakendaka kotala babweta ya Ngonye bandimaka mpenza ete alobaki solo.
Livingstone alobaki boye: “Kobanda esika mai ya bweta ezali kosopana tii bakilomɛtrɛ mingi na ngɛlɛ, ebale ekómi moke mpenza mpe monene na yango ekoki kokóma ata mɛtrɛ nkama moko te. Mai ezali kotiola mbangu na kati ya mabanga mpe ezali komonana lokola ezali kotɔka, ata soki moto ayebi kobɛta mai ndenge nini, akokoka te na esika wana.”
Babweta ya Lumangwe
Babweta mingi ya Zambie ezali mosika mpe bato bakómaka kuna te. Babweta yango mosusu ezali minene, mosusu mike. Babweta ya Lumangwe emonanaka lokola babweta ya Victoria ya moke. Atako bongo ezali mpenza moke te. Na esika moko ya babweta yango, oyo mai ezali koleka na mabanga, mai ezali kosopana bamɛtrɛ 30 banda na likoló tii na nse mpe ezali monene koleka mɛtrɛ 100. Kutu, londende oyo ezali kobima wana ekolisaka mwa zamba oyo ezali wana.
Babweta ya Kalambo
Na babweta ya Kalambo, oyo eleki bosanda na Zambie, mai eutaka likoló ya bangomba mike mpe ekitaka na Vallée du Rift, lobwaku oyo eleki monene na Afrika. Banda esika mai yango eutaka likoló na ngomba tii esika esopanaka, ezali na bamɛtrɛ koleka 200; bisika oyo ndɛkɛ babengi marabout ya minene eyaka kobotana na ntango ya elanga.
Buku Monuments nationaux de Zambie elobi ete: “Kalambo ezali babweta ya mibale oyo eleki bosanda na Afrika [nsima ya Tugela, oyo ezali na Afrika ya Sudi] mpe ezali babweta ya zomi na mibale oyo eleki bosanda na mokili mobimba—eleki babweta ya Victoria na bosanda mbala mibale.”
Atako ezali mpasi kokóma na esika yango, Crispin Quarmby, mokomi ya babuku na Zambie alobi ete babweta ya Kalambo ezali “moko ya bisika na Afrika oyo soki omoni yango okoki kobosana yango te.” Alobi boye: “Ekosɛnga mikolo mingi mpo moto nyonso azwa likoki ya kokenda kotala babweta yango. . . . Kaka mwa bato moke nde bazwaka libaku ya komona babweta ya Kalambo.”
Kutu, babweta mingi ya Zambie mpe bisika mosusu ya kitoko ezali na banzela ya malamu te mpo na kokóma kuna. Buku Monuments nationaux de Zambie elobi ete mosusu “okoki kokóma kuna kaka na motuka ya Land Rover na banzela ya mabemabe, mosusu kaka na makolo.” Na ntembe te, yango nde esalaka ete bisika yango ezwa lokumu mingi. Atako bongo, epekisami te bato mosusu bákenda kuna. Kagosi Mwamulowe, oyo ayekolaka makambo ya mabelé na Zambia’s National Heritage Conservation Commission (ebongiseli oyo ebatelaka bisika kitoko na Zambie), alimboli ete ntina ya ebongiseli na bango ezali ya kosalisa bato bátala bisika wana kitoko mpe ya kobatela bisika yango mpo etikala kaka ndenge Nzambe asalá yango.
Bozwi oyo eleki nyonso na Zambie
Na buku na ye Zambie (na Lingelesi), Richard Vaughan oyo akomaka babuku akomi ete: “Zambie ezali ekólo oyo bisika ya kitoko ekosila te, oyo mingi na yango eyebani te, ezala na bapaya to na bana-mboka bango moko. . . . Ekólo yango ezali na balaki, bibale, bazamba mpe bangomba ndenge na ndenge.” Kasi, ekólo yango ezali mpe na bozwi mosusu oyo eleki nyonso.
Vaughan alobi ete: “Eyebani ete bato ya Zambie bazalaka bato ya esengo mpe ya nsai; bayebaka mpe komimesenisa na makambo ndenge na ndenge.” Ndenge David Bristow, mokomi mosusu ya babuku amonisi yango, “motema ya Zambie ezali nde bato na yango, oyo bazalaka na bolingo ya mɔtɔ lokola moi ya Afrika.” Soki mokolo mosusu okómi na esika wana kitoko ya mokili, tokanisi ete okondima likambo yango.
Karte/Bililingi na lokasa 24]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
TANZANIE
RÉPUBLIQUE DÉMOCRATIQUE DU CONGO
ANGOLA
ZAMBIE
BABWETA YA KALAMBO
BABWETA YA LUMANGWE
Lusaka
BABWETA YA NGONYE
BABWETA YA VICTORIA
ZIMBABWE
MOZAMBIQUE
OCÉAN INDIEN
[Bililingi]
Bweta ya Lumangwe—ezali lokola babweta ya Victoria ya moke
Bweta ya Kalambo—eleki babweta ya Victoria na bosanda mbala mibale
Bweta ya Ngonye—“mbala mingi, bokozala kuna bino moko”
[Eutelo ya bafɔtɔs]
Babweta ya Lumangwe mpe ya Ngonye: Marek Patzer/www.zambiatourism.com; kalati: Mountain High Maps® Copyright © 1997 Digital Wisdom, Inc.
[Elilingi na lokasa 23]
Babweta ya Victoria—“Milinga oyo engulumaka”
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Marek Patzer/www.zambiatourism.com