Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nyonso oyo ozali na yango mposa ezali na Biblia!

Nyonso oyo ozali na yango mposa ezali na Biblia!

Nyonso oyo ozali na yango mposa ezali na Biblia!

▪ Mwasi moko ná mobali na ye oyo balobaka Lifalanse mpe bazali Batatoli ya Yehova, bakɔtaki na apartema moko na engumba ya Ajaccio, na esanga Méditerranée na Corse. Na nse bakutaki anvelopɛ moko oyo bakomá eloko te mpe ezalaki na mbongo euro 400. Mwasi yango alobi likambo oyo basalaki: “Totyaki mokanda na tablo moko oyo ezalaki na esika bayambaka bato, tolobaki ete moto oyo abungisi anvelopɛ yango akoki kobenga biso na nimero na biso oyo tokomaki wana.”

Na mpokwa ya mokolo oyo elandaki, mwasi moko abengaki biso. Nsima ya komonisa polele ete ye nde abungisaki mbongo yango, akendaki kokutana na mwasi yango ná mobali na ye. Akamwaki ete moto azongisela ye mbongo na ye, amemaki liboke ya bafololo. Anvelopɛ oyo abungisaki ezalaki na mbongo oyo bautaki kofuta ye mpe na mokolo oyo elandaki alingaki kokende konje ya sanza moko.

Ntango akendaki konje, atindelaki babalani wana karte, apesaki bango mersi lisusu mpo na likambo wana ya boboto oyo basalelaki ye. Ntango mwasi yango autaki na konje, ndeko wana ná mobali na ye bakendaki kotala ye mpe bayebisaki ntina ya kosalela batoli ya Biblia na libota mpe na bomoi ya mokolo na mokolo, makambo oyo esepelisaki ye.

Basalelaki buku Biblia eteyaka mpenza nini? mpe bazwaki libaku ya kosolola na ye mwa makambo mosusu oyo ezali na mokapo oyo elobi: “Ndenge ya kozala na libota ya esengo.” Mwasi yango akamwaki mpenza mpe alobaki boye: “Nyonso oyo nazali na yango mposa ezali na Biblia!” Na nsima, andimaki koyekola Biblia.

Buku Biblia eteyaka elobeli te kaka bomoi ya libota, kasi mpe solo na ntina na Nzambe mpe Yesu Kristo mpe, epai bakufi bazali, ntina oyo Nzambe atiki bampasi ezala, mpe makambo mosusu oyo etungisaka bato. Okoki kosɛnga buku yango soki otondisi mwa eteni ya lokasa oyo ezali awa na nse mpe otindi yango na adrɛsi oyo etyami awa to oyo ebongi na yo na lokasa 5 ya zulunalo oyo.

□ Nalingi kozwa buku oyo bolakisi awa.

□ Bóya kotala ngai mpo na koyekola na ngai Biblia kozanga nafuta mbongo.