Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Tokutani na Mikomboso na zamba

Tokutani na Mikomboso na zamba

Tokutani na Mikomboso na zamba

WANA tozali kotambola na nzela moko moke na zamba monene na Afrique équatoriale, miso na biso ekómi komesana na mwa pole oyo ezali kokɔta na nsɔngɛ ya banzete mpe kokitela biso. Tozali mpenza kokamwa ntango tozali koyoka makɛlɛlɛ ya mayoyo mpe komona banzete minene ezingami na bansinga; banzete mosusu ezali milai koleka mɛtrɛ 55. Toyokaki ete makambo ezali kozela biso. Tomonaki ete na esika yango ya molili, tosengeli kozala ekɛngɛ mpe kotambola malɛmbɛmalɛmbɛ. Na mbala moko toyokaki “huu!” makasi mpe eloko moko ezali kopema mbangumbangu. Makɛlɛlɛ yango ezalaki kokóma makasi mpe etikaki na mbala moko. Kotambola oyo totambolaki elɛmbisaki biso, kasi ememaki biso na eloko oyo tozalaki koluka: etuluku ya mikomboso.

Makɛlɛlɛ makasi ndenge wana, kopema makasi, koganga, mpe ntango mosusu kobɛtabɛta na nzete, ezalaka ndenge oyo mikomboso esololaka, ebengaka baninga. Mbala mosusu mokomboso amoni ete asengeli kobenga baninga na ye mbangumbangu mpo amoni mbuma ya figi mingi oyo eteli. Ntango totomboli miso na nsɔngɛ ya nzete moko molai ya figi, tomoni mikomboso ebele, ata 20 to 30, bazali kolya bafigi na kimya nyonso. Nsuki na bango kitoko ya moindo ezali kongɛnga ntango moi ebɛti yango. Mokomboso moko abandi kobamba biso mwa bitape ya nzete, mpe eumeli te baninga na ye mpe babandi kosala bongo. Balingi koyebisa biso polele ete bilei yango ezali ya kokaba te.

Mikomboso emonanaka mingi na eleko oyo mbuma ezalaka mingi. Na bileko mosusu, ezalaka mpasi komona bango mpo mbala mosusu bakendaka na matiti oyo ezali na nse, mpe bazalaka mingi te esika moko. Na zamba, mbala mingi mikomboso balingaka kolyalya mokolo mobimba wana bazali kotambolatambola bakilomɛtrɛ milai. Longola mbuma, balyaka mpe nkasa ya nzete, mboto, mpe mwa banzete. Balyaka mpe bafurmi, maki ya ndɛkɛ, mpe nsɛlɛlɛ. Na bantango mosusu, bakangaka banyama mike mpo na kolya, na ndakisa bamakako.

Lokola tokómi pene na midi, mikomboso babandi koyoka molunge. Moko na bango abandi kokita na nzete, mpe bamosusu balandi ye. Na nsima, babandi kokɔta mokomoko na kati ya matiti. Elenge mokomboso moko ya mobulumobulu azali kopumbwa na banzete mpo na kokóma pene na biso. Komona ndenge ekelamu yango ezali kosakana mpe koluka koyeba makambo etindaki biso tósɛka mwa moke.

Bizaleli ya kokamwa

Ntango tozali kozonga, moko na biso alobi boye: “Bótala na nsima.” Ntango tobaluki, tomoni mokomboso moko azali kotala biso na mayele, abombami nsima ya nzete moko. Atɛlɛmi na makolo mibale mpe azali molai ya mɛtrɛ soki moko. Soki totali ye, azongi nsima ya nzete, nsima ya mwa ntango, abimisi lisusu motó mpo na kotala biso. Mposa wana ya koyeba makambo esepelisi biso! Mikomboso bakoki kotɛlɛma na makolo mibale, ata mpe kotambola bongo mwa mosika. Kasi, mbala mingi basalelaka makolo nyonso minei mpo esimba kilo ya nzoto na bango. Mokuwa ya mokɔngɔ ya mokomboso egumbamá te na nse na yango mpo esalisa ye atɛlɛma alima ndenge ezalaka epai ya moto. Lisusu, lokola misisa ya masoko na ye ezalaka makasi te mpe mabɔkɔ na ye elekaka makolo na molai mpe na makasi, mokomboso abongisamá malamu mpo na kotambola na makolo minei, komata mpe kopumbwa na banzete.

Soki esengeli mokomboso abuka mbuma oyo ebimi na nzete ya moke oyo ekokoka kosimba kilo na ye te, mabɔkɔ na ye, lokola ezali milai, esalisaka ye mingi. Mabɔkɔ mpe makolo ya mikomboso esalemá malamu mpo na kokanga bitape ya nzete makasi mpe kotɛlɛma wana. Misapi minene ya makolo etalá pembeni mpe esalaka lokola misapi minene ya mabɔkɔ mpo na kosalisa nyama yango eyeba komata na nzete to kosimba to komema biloko na mpasi te, ezala na makolo to na mabɔkɔ. Likoki yango esalisaka mokomboso mpo na kotonga ndako ya kolala na mpokwa. Na miniti moke, mokomboso abongisaka mpe agumbaka nkasa mpe bitape ya nzete mpo na kosala esika malamu ya kolala na butu.

Kotala mpe koyekola mikomboso oyo bazali na zamba, ná bizaleli na bango ya kokamwa mpe ndenge bakokaná na bato na nzoto mpe bizaleli, ekamwisaka mpenza. Nzokande, bato mosusu bayekolaka mikomboso kaka mpo na koluka kolongisa likanisi ya evolisyo oyo elobaka ete moto autá na nyama. Na yango, tokoki komituna boye: Nini mpenza ekesenisaka bato ná mikomboso? Na ndenge nini moto, na bokeseni na banyama, akelamá “na elilingi ya Nzambe”?​—Ebandeli 1:27.

Likambo oyo tokobosana te

Na zamba, mikomboso bamonanaka mingi te, mpo mbala mingi balimwaka mbala moko soki bamoni bato. Kasi, mpo na kobatela bango, bituluku mosusu ya mikomboso emesaná na bato.

Tobosanaka te ntango oyo tolekisaki na zamba mpo na kotala mikomboso. Esalisaki biso tóyeba mwa moke ndenge mikomboso bazalaka mpenza​—bakeseni mpenza ná baoyo tomonaka na ba-zoo to na bisika oyo minganga basalaka bolukiluki. Bazali banyama ya kokamwa mpe bazali na kati ya ‘banyama mikemike mpe banyama ya zamba oyo ezali na mabele,’ oyo Nzambe amonaki ete ezalaki malamu​—ebongi mpenza na esika oyo basalelaki bango bázalaka.​—Ebandeli 1:24, 25.

[Etanda/Elilingi na lokasa 20, mpe 21]

MOKOMBOSO MPE MOTO

Na buku na ye (In the Shadow of Man), Jane Goodall, mwasi moko oyo ayekolaka makambo ya banyama akomaki ete likambo oyo ayekolaki na 1960, ete mikomboso “basalaka bisaleli,” “endimisaki bato mingi ya siansi ete basengelaki kotalela lisusu makambo malamu mpo na komonisa ete moto aleki kaka.” Koyeba ete mikomboso bakoki kosalela nkasa ya nzete lokola éponge, kosalela mabanga to bitape ya nzete mpo na kotɛta ndika, kolongola nkasa na mwa bitape ya nzete mpo na kokɔtisa na lindɔngɛ (termitière) mpo na kokanga bandɔngɛ ekamwisaki mpenza. Kasi mikolo oyo, toyebi ete banyama mingi bazali na makoki ya kosala bisaleli. Na buku na ye (The Human Nature of Birds​—A Scientific Discovery With Startling Implications), Theodore Barber alobi boye: “Ntango toyekolaki banyama na mozindo, kaka bamakako ná ba-dauphin te, kasi mpe bafurmi ná banzoi, tomonaki ete banyama ezali mpenza na makoki mpe mayele ya kosala makambo oyo tokanisaki ata moke te.”

Yango elingi koloba te ete moto akeseni te na nyama. Profesɛrɛ David Premack akomi ete “kaka bato nde bakoki kosalela gramɛrɛ mpe kobongisa bafraze mpo na kobimisa maloba.” Ya solo, likoki ya kobimisa maloba oyo moto azali na yango mpe mimeseno ya bisika ndenge na ndenge, epai monɔkɔ mpe maloba ezalaka na ntina mingi, ekesenisaka biso mpenza na banyama.

Nsima ya koyekola mikomboso na zamba bambula mingi, Jane Goodall akomaki boye: “Nakoki kondima te ete mikomboso bazalaka na mayoki, moko mpo na mosusu, na ndakisa motema boboto, koluka kobatela, kotikela moninga asala makambo mosusu, mpe kosepela na makambo ya elimo oyo ezali bilembo ya bolingo ya solosolo mpe ya mozindo oyo bato bazalaka na yango.” Akomaki mpe ete: “Ndenge moto ayebaka ete azali eleki mosika komiyeba oyo nyama ayebaka ete azali. Moto alukaka koyeba mpo na nini azali mpe mpo na nini biloko oyo ezingi ye ná mokili mobimba ezali.”

Biblia emonisi bokeseni oyo ezali kati na banyama mpe bato ntango elobi ete moto akelamá na “elilingi ya Nzambe.” (Ebandeli 1:27) Na yango, na bokeseni na banyama, moto akoki kozala na elilingi ya Mokeli na ye mpe komonisa bizaleli na Ye, na ndakisa bolingo oyo ezali ezaleli na ye oyo eleki nyonso. Moto akoki mpe kozwa boyebi mingi mpe kosala na mayele koleka nyama nyonso. Moto akoki mpe kosala makambo na kolanda bonsomi na ye ya kopona; atambwisamaka mpenzampenza na mayele ya lɔɔmbi te.

[Bililingi na lokasa 21]

Mikomboso bazali bikelamu oyo elingá kosakana mpe koyeba makambo, mpe babongi mpenza na esika oyo basalelaki bango

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Mikomboso, likoló na lobɔkɔ ya mobali: Corbis/Punchstock/Getty Images; na nse na lobɔkɔ ya mwasi mpe ya mobali: SuperStock RF/SuperStock; Jane Goodall: © Martin Engelmann/age fotostock

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 19]

© Photononstop/SuperStock