Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BIBLIA ELOBI NINI?

Kosangisa nzoto liboso ya kobala

Kosangisa nzoto liboso ya kobala

Kosangisa nzoto liboso ya kobala ezali mabe?

“Mpo talá eloko Nzambe alingi: . . . ete bóboya pite.”​1 Batesaloniki 4:3.

OYO BATO BALOBAKA

Na mikili mosusu bamonaka mabe te soki mwasi ná mobali oyo bakómi mikóló bandimi kofanda esika moko mpe bazali kosangisa nzoto. Na mikili mosusu mpe bamonaka mabe te soki bilenge oyo babalaná te bazali kosala makambo mosusu ya mbindo oyo eyokani na pite.

BIBLIA ELOBI NINI?

Biblia esalelaka liloba “pite” mpo na kolobela lolenge nyonso ya kosangisa nzoto liboso ya libala. Nzambe alingi ete basambeli na ye ‘báboya pite.’ (1 Batesaloniki 4:3) Pite etángami na molɔngɔ ya masumu ya minene lokola ekobo, losambo ya bilimo mabe, molangwa, losambo ya bikeko, koboma mpe koyiba.​—1 Bakorinti 6:9, 10; Emoniseli 21:8.

MPO NA NINI EZALI NA NTINA?

Ntina ezali ete Biblia ekebisi ete “Nzambe akosambisa bato ya pite.” (Baebre 13:4) Likambo eleki ntina ezali ete ntango tozali kotosa mibeko ya Nzambe oyo epekisi kosangisa nzoto liboso ya kobala, tokomonisa ete tolingaka Yehova Nzambe. (1 Yoane 5:3) Kutu, apambolaka baoyo nyonso batosaka mibeko na ye.​—Yisaya 48:18.

Ezali mabe soki bato oyo babalani te bazali kosala lolenge mosusu nyonso ya kosangisa nzoto?

“Pite mpe mbindo ya ndenge nyonso to lokoso etángama ata kotángama te na kati na bino.”​Baefese 5:3.

OYO BATO BALOBAKA

Bato mingi balobaka ete longola kosangisa mpenza nzoto kati na mobali mpe mwasi, mabe ezali te soki bato oyo babalaná te bazali kosala balolenge mosusu ya kosangisa nzoto.

BIBLIA ELOBI NINI?

Ntango Biblia elobelaka makambo ya mabe mpenza oyo etali kosangisa nzoto, etángaka kaka te pite kasi mpe “mbindo” mpe “etamboli ya nsɔni.” (2 Bakorinti 12:21) Emonani polele ete ezali na balolenge mingi ya kosangisa nzoto kati na bato oyo babalani te oyo esepelisaka Nzambe te, ata soki mobali ná mwasi basangisi mpenza nzoto te.

Biblia emonisi polele ete kaka mobali ná mwasi oyo babalani nde bakoki kosangisa nzoto. Epekisi mpe “mposa ya lokoso ya kosangisa nzoto.” (1 Batesaloniki 4:5) Yango elingi koloba nini? Tózwa ndakisa oyo ekoki kosalelama mpo na mobali to mwasi: Mwasi akoki kozala na ekateli ya koboya kosangisa mpenza nzoto ná mwa moto na ye. Nzokande, andimaka basangisá na ye nzoto na balolenge mosusu. Kosala bongo, emonisaka ete bazali na mposa makasi ya eloko oyo ezali ya bango te. Yango wana, bakómaka “na mposa ya lokoso ya kosangisa nzoto.” Biblia epekisi lokoso ya ndenge wana.​—Baefese 5:3-5.

Ndenge nini okoki koboya pite?

“Bókima pite.”​1 Bakorinti 6:18.

MPO NA NINI EZALI NA NTINA?

Biblia emonisi ete baoyo basangisaka nzoto liboso ya kobala, bazali na likama ya kobebisa boyokani na bango ná Nzambe.​—Bakolose 3:5, 6.

BIBLIA ELOBI NINI?

Biblia epesi biso toli ete ‘tókima pite.’ (1 Bakorinti 6:18) Yango emonisi ete tosengeli kozala mosika na eloko to likambo nyonso oyo ekoki kopesa biso mposa makasi ya kosangisa nzoto na lolenge ya mabe. (Masese 22:3) Na ndakisa, mpo na kozala pɛto na makanisi, tosengeli koboya kozalaka elongo na baninga oyo batosaka te toli ya Nzambe na likambo etali kosangisa nzoto. Biblia epesi toli ete: “Ye oyo atambolaka na bato ya bwanya akokóma na bwanya, kasi ye oyo azalaka na boyokani na bazoba akosuka mabe.”​—Masese 13:20.

Soki moto azali kotondisa bɔɔngɔ na ye na makanisi ya mbindo, yango ekoki mpe kotinda ye na kosangisa nzoto na lolenge ya mabe. (Baroma 8:5, 6) Mpo na yango, ekozala malamu koboya miziki, bafilme, mikanda to eloko nyonso oyo elakisaka misala ya kosangisaka nzoto na lolenge ya mabe to balolenge mosusu nyonso oyo etindaka bato básangisa nzoto na lolenge oyo esepelisaka Nzambe te.​—Nzembo 101:3.