Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MIKILI MPE BATO

Mobembo moko na Brésil

Mobembo moko na Brésil

Feijoada, bilei kitoko oyo baombo ya Afrika bamemá na Brésil

Ndɛkɛ babengi toucan

BATO ya liboso oyo bafandaki na Brésil bazalaki babomi-nyama mpe basali bilanga. Ba-Portugais oyo bakendaki kuna mpo na kotala mokili yango bakɔtisaki Lingomba ya Katolike, mpe na nsima batongaki bandako-nzambe mingi; mosusu batyaki yango mayemi oyo basalaki na mabaya oyo ebongisamaki malamu mpe bapakolaki yango wolo.

Kobanda na katikati ya siɛklɛ ya 16 tii na katikati ya siɛklɛ ya 19, bamasuwa oyo ezalaki komema baombo ememaki bato ya Afrika milio soki 4 na Brésil, mpo básala bilanga. Baombo yango bamemaki milulu na bango na Brésil, mpe na nsima yango ebimisaki mwa lingomba lokola macumba mpe candomblé, oyo esangisaki losambo ya bato ya Brésil mpe ya Afrika. Mimeseno ya Afrika ekɔtá na miziki, mabina mpe bilei ya Ba-Brésilien.

Feijoada ezali bilei ya mboka oyo elandá elambeli ya Ba-portugais; basangisaka misuni ná madesu mpo na kolamba yango mpe balyaka yango na loso ná ndunda. Na siɛklɛ ya 19 mpe ya 20, bamilio ya bato oyo bautaki Mpoto (mingimingi Allemagne, Italie, Pologne mpe Espagne), Japon mpe mikili mosusu bayaki mpe na Brésil.

Lelo oyo, na Brésil mobimba, Batatoli ya Yehova bazali soki 750 000 na masangá koleka 11 000. Bayekolaka Biblia na bato koleka 800 000. Mpo bázwa bisika ya kosala makita, mbula na mbula baekipi ya botongi 31 esalaka mibembo mpo na kotonga mpe kobongisa Bandako ya Bokonzi soki 250 to 300 elongo na bandeko mosusu ya ekólo yango. Kobanda na sanza ya 03/2000 basilaki kotonga mpe kobongisa Bandako ya Bokonzi 3 647.

OYEBAKI YANGO?

Ebale Amazone ebwakaka mai mingi na mbu koleka ebale mosusu nyonso mpe ezali na molai ya kilomɛtrɛ koleka 6 275

Mabele oyo ezali pembenipembeni ya ebale Amazone ezali na zamba oyo eleki monene na mokili mobimba epai mbula ebɛtaka mingi