MAKAMBO OYO EZALI KOLEKA NA MOKILI
Makambo etali mabele
Atako mabele ebimisaka mopɛpɛ ya kitoko, bilei ya malamu mpe mai ya kitoko, bato bazali kokoba kobebisa mabele. Bato ya siansi bazali kosala ndenge nyonso mpo na kobatela mabele.
Australie
Balobaka ete ebele ya mai (500 000 kilomɛtrɛ kibe) oyo ezali na mungwa moke mpenza ezalaka na nse mpenza ya mbu. Vincent oyo ayekolaka makambo ya mai na iniversite ya Flinders, na engumba Adélaïde, alobi boye: “Nivo ya mai ya mbu ezalaki na nse mpenza koleka ndenge ezali lelo oyo,” yango wana bokula ezalaki monene mingi. Na ntango wana, mai ya mbula ezalaki “kotondisa esika oyo mai efandaka na nse ya mabele (nappe aquifère) oyo ezalaka lelo na nse ya mbu.” Bato ya siansi bazali na elikya ete nsima ya mikolo, mai yango oyo ebombami na nse ya mbu ekosalisa bato koleka milio 700 oyo bazalaka na likoki mpenza te ya kozwa mai ya pɛto.
Esobe ya Sahara
Balolenge ya banyama minene oyo ezalaki na esobe ya Sahara, ndambo na yango elimwá to ebungisá eteni monene (99%) ya esika oyo yango efandaka. Makambo ekómi bongo mpo na mikakatano oyo ezali na etúká yango mpe mpo babomi-nyama bakómi mingi. Atako bikelamu ndenge na ndenge ya bomoi oyo ezalaka na bisobe ezalaka mpe na bazamba, bato ya mayele balobi ete “soki bato ya siansi batyelaka bikelamu ya esobe likebi mpenza te ezali mpo basungaka bango te na mbongo.” Yango nde ntina oyo bato oyo babatelaka mabele bazali na mokakatano ya kokipe bikelamu ndenge na ndenge oyo ezali na likama, oyo efandaka na esobe.
Mokili
Ekoki kozala ete na bato 8 oyo bakufaki na 2012, moko na bango akufaki mpo na kobeba ya mopɛpɛ. OMS emonisi ete “lelo oyo na mokili mobimba, kobeba ya mopɛpɛ ezali likama moko eleki makama nyonso mpo na sante ya bato.”