Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MAKAMBO OYO EZALI KOLEKA NA MOKILI

Makambo etali Mpoto

Makambo etali Mpoto

Atako liboso bato mingi ya Mpoto bamipesaki mpenza na losambo, kasi lelo oyo makambo ebongwani mpenza. Ekoki kokamwisa yo soki oyoki ete makambo oyo euti kosalema na Mpoto eyokani mpenza na oyo Biblia elobaka.

Litomba ya mongongo ya mama

Bato ya mayele ya engumba Milan, na Italie, bamonaki ete sante ya bana ya matsombe oyo batyaki bango aparɛyi moko na lobɔkɔ na lopitalo mpo báyokaka mongongo ya bamama na bango ebongaki mingi koleka. Mayele yango emekoli ndenge mwana ayebaka mongongo ya mama na kati ya libumu. Na nsuka, bato yango bamonaki ete “koyoka mongongo ya mama na ebandeli mpenza esalisaka bana ya matsombe mingi.”

OYO BIBLIA ELOBI: “Nabɔndisaki molimo na ngai mpe nafandisaki yango kimya lokola mwana oyo akilisami mabɛlɛ.”​—Nzembo 131:2.

Kotinda mwana amizwaka na valɛrɛ mingi

Ankɛtɛ moko oyo basalaki epai ya bana 565 na Pays-Bas emonisi ete bana oyo baboti na bango bayebisaka bango ete “bazali sipesiale koleka bana mosusu” mpe babongi básalela bango “makambo koleka bana mosusu” bamizwaka na valɛrɛ mingi, bamonaka ete baleki baninga mpe bakoki kosala nyonso balingi. Moto oyo asalaki ankɛtɛ yango alobi boye: “Bana bakanisaka bongo soki baboti bazali koyebisa bango ete bazali sipesiale koleka basusu. Yango ekozala mabe mpo na bango to mpo na bato mosusu.”

OYO BIBLIA ELOBI: “Nazali koyebisa moto nyonso na kati na bino ete akanisa te ete azali koleka ndenge oyo ye azali mpenza; kasi akanisa nde na ndenge oyo ezali komonisa ete azali na makanisi malamu.”​—Baroma 12:3.

Mibange ya mbula 100 oyo bazalaka na elikya

Bato ya mayele na iniversite ya Heidelberg, na Allemagne balobi ete ata soki mibange ya mbula 100 babɛlaka mingi to bakokaka te kosala makambo mosusu, balingaka kokufa te. Na mibange minei ya mbula 100 oyo batunaki bango mituna, misato baboyaki liwa mpe bazalaki kosala nyonso mpo bátikala na bomoi. Bakokisaki mikano na bango, bazalaki na makanisi malamu mpe na elikya, bamonaki ete bomoi ezali na ntina mpe bakobaki kobatela makambo na bango ya losambo mpe bizaleli malamu.

OMITUNA BOYE: Ndenge Mosakoli 3:11 elobi yango, mposa ya kotikala na bomoi oyo tobotamá na yango emonisi nini?