Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mikakatano nini baaparɛyi ekoki kobimisela libala na yo?

Mikakatano nini baaparɛyi ekoki kobimisela libala na yo?

Baaparɛyi ekoki kokómisa boyokani ya mwasi ná mobali makasi. Na ndakisa, ekoki kosalisa bango básololaka na boumeli ya mokolo mpe bamiyoka te ete bazali mosika ya moninga.

Nzokande, babalani mosusu basalelaka baaparɛyi na ndenge ya mabe mpe yango ememelaka bango mikakatano lokola . . .

  • koyiba bango ntango oyo basengelaki kolekisa elongo.

  • kolekisa ntango na mosala na ntango oyo esengeli te.

  • kotinda bango babombelanaka makambo mpe bázala sembo te.

OYO OSENGELI KOYEBA

NTANGO BOZALI ELONGO

Mobali moko na nkombo Michael alobi boye: “Ntango mosusu ngai ná mwasi na ngai tofandaka esika moko, kasi akipaka ngai ata moke te. Akangamaka kaka na telefone na ye, mpe okoyoka alobi: ‘Tii sikoyo namoni naino eloko nazali koluka te.’” Mobali moko na nkombo Jonathan alobi ete na ntango wana “mwasi ná mobali bakoki kozala esika moko kasi na makanisi moto na moto azali na esika na ye.”

KANISÁ NAINO: Mbala boni osololaka na telefone to otindelaka bato bamesaje na ntango oyo osengeli nde kosolola na molongani na yo?​—BAEFESE 5:33.

MOSALA

Misala mosusu esɛngaka bato basololaka na telefone to batindaka bamesaje ata ntango bazali na ndako. Mpo na bato mosusu, misala na bango esɛngaka te ete básololaka na telefone to batindelanaka bamesaje, kasi bakokaka te kolongwa na mosala soki ngonga ya kotika mosala ekoki. Mobali moko na nkombo Lee alobi boye: “Ezali mpasi natika koyamba telefone to kobenga, to natika kotinda bamesaje ata na ntango oyo natya ete nazalaka kaka ná mwasi na ngai.” Mwasi moko na nkombo Joy alobi boye: “Nasalaka na ndako, mpe na ndako mosala ezangaka te. Esɛngi kosala makasi mpenza mpo na kozala na bokatikati.”

KANISÁ NAINO: Oyokaka mwasi to mobali na yo na likebi mpenza ntango azali koloba na yo?​—LUKA 8:18.

KOZANGA BOSEMBO

Ankɛtɛ moko emonisi ete bato mingi baswanaki ná balongani na bango mpo bakaniselaki bango mabe mpo na bafɔtɔ oyo batyaki na basite Internet ya kosolola na baninga. Bato ebele (10%) bandimi ete babombelaka basi to mibali na bango bafɔtɔ oyo batyaka na Internet to makambo oyo bakomaka.

Yango wana, bato mingi balobaka ete basite Internet ya kosolola na baninga ememaka makama ebele na libala mpe etindaka moto asala ekobo. Tokoki kokamwa te ndenge avoka moko oyo asambaka makambo ya koboma libala alobi ete basite Internet ya kosolola na baninga ezali kobomisa mabala mingi lelo oyo.

KANISÁ NAINO: Obombelaka mwasi na yo to mobali na yo masolo oyo obɛtaka na moto oyo azali molongani na yo te?​—MASESE 4:23.

OYO OKOKI KOSALA

TYÁ MAKAMBO YA NTINA NA ESIKA YA LIBOSO

Moto oyo alingaka kolya te akozala nzoto kolɔngɔnɔ te. Ndenge moko mpe, ekozala mpasi mpo na moto oyo azali koboya kolekisa ntango elongo na molongani na ye azala na libala ya malamu.​—Baefese 5:28, 29.

VƐRSƐ: “Bóluka koyeba mpenza makambo oyo eleki ntina.”​—BAFILIPI 1:10.

Sololá na mwasi to na mobali na yo makanisi oyo ezali awa na nse oyo okolinga kosalela, to komá makanisi na yo moko mpo bóyeba kotya baaparɛyi na esika na yango mpo ebebisa libala na bino te.

  • Tólyaka elongo ata mbala moko na mokolo

  • Tópona ngonga moko boye oyo tokosalela baaparɛyi na biso te

  • Tópona mpokwa moko oyo tokosala eloko moko kaka biso mibale

  • Tókanga baaparɛyi na biso na butu, tótya yango mosika ya mbeto

  • Tókanga baaparɛyi na biso na boumeli ya miniti 15 mokolo na mokolo mpo tókoka kosolola

  • Tókangaka Internet na ntango moko boye ya sikisiki