Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Engumba Astana

MIKILI MPE BATO

Mobembo moko na Kazakhstan

Mobembo moko na Kazakhstan

NA NTANGO ya kala, bato ya Kazakhstan bazalaki kofanda esika moko te. Lelo oyo, bato mosusu ya Kazakhstan oyo babatelaka bibwɛlɛ batambwisaka yango na bisika oyo esengeli, na kotalela bileko. Balekisaka eleko ya molunge na bangomba, esika oyo malili ezali, mpe matiti ezali mingi. Na nsima, soki eleko ya malili ekómi pene, bakitaka na bibwɛlɛ na bango na mboka, na esika ya molunge.

Bato mosusu ya Kazakhstan bafandaka na bingumba oyo etongami malamu. Kasi, mimeseno, bilei, mpe bikeko na bango mingi emonisaka bomoi ya bankɔkɔ na bango, oyo bazalaki kofanda esika moko te. Bato ya Kazakhstan balingaka maloba ya ntoki, banzembo, mpe miziki oyo babɛtaka na bibɛtɛli ya mboka na bango.

Yourte, ndako ya hema oyo bankɔkɔ na bango bazalaki kofanda ntango bazali kotambolatambola, ekómá elembo oyo emonisaka limemya oyo bana-mboka bapesaka na mabele ya mboka na bango. Babateli ya mpate basepelaka kosalela ba yourte, mpe mbala mingi bato oyo bafandaka na bingumba minene basalelaka mpe yango na milulu ya ntina. Baturiste mpe basepelaka kosalela ba yourte. Na kati ya yourte ezalaka na batapi mpe mayemi ndenge na ndenge oyo basi ya Kazakhstan basalaka.

Na kati ya yourte

Bato ya Kazakhstan oyo bafandaka na bamboka babɔkɔlaka bampunda. Na monɔkɔ ya Kazakhstan, ezali na maloba soki 21 mpo na kobenga mpunda mpe mokomoko ezali na ndimbola na yango; ezali mpe na maloba koleka 30 mpo na kolobela langi ya mpunda mokomoko. Kopesa moto mpunda oyo ezali na nzoto malamu mpe na ntalo mingi ezalaka likabo moko ya motuya mingi. Na bamboka, bilenge mibali bayekola kotambwisa mpunda ntango bazali naino bana mike.

Bilei ya bana-mboka ya Kazakhstan ezangaka mosuni te mpe mbala mingi batyaka bikelakela te mpo na kobakisa elɛngi ya bilei. Koumiss, masanga oyo esalemi na mai ya mabɛlɛ ya mpunda, ezali masanga oyo bato ya Kazakhstan balingaka mingi; balobaka ete esalisaka moto azala nzoto makasi mpe etongaka nzoto; ezali na elɛngi lokola shubat, masanga oyo esalemi na mai ya mabɛlɛ ya kamela.

Biro ya Batatoli ya Yehova oyo ezali na engumba Almaty eyambaka bapaya oyo bayei kotala yango.

Motindo moko ya nkoi oyo efandaka na bisika ya malili mpe emonanaka mingi te, elekisaka eleko ya molunge na bangomba ya Kazakhstan