TÓTALELA MAKAMBO YA KALA
Alhazen
MBALA mosusu, osilá koyoka nkombo ya Abū ‘Alī al-Ḥasan ibn al-Haytham. Na mikili ya Mpoto mpe ya Amerika, ayebani na nkombo ya Alhazen. Nkombo yango ezali na monɔkɔ ya Latin, kasi eutá na nkombo na ye al-Hasan, na monɔkɔ ya Arabe. Kasi, mbala mosusu ozwaka matomba na makambo oyo asalá. Bato mosusu “batalelaka Alhazen lokola moko ya bato minene ya siansi.”
Alhazen abotamaki na Bassora, oyo ezali lelo na Iraq, na mobu soki 965 ya ntango na biso. Azalaki kosepela mingi koyekola makambo ya astronomi, shimi, matematiki, mosala ya monganga, miziki, makambo etali miso, fiziki, mpe ntoki. Kasi mpo na likambo nini mpenza tosengeli kozala na botɔndi epai na ye?
NDUKA (BARRAGE) MOKO NA EBALE NILE
Lisolo moko ya Alhazen oyo eyebanaki na boumeli ya ntango molai ezalaki koloba ete amityelaki mokano ya kotonga nduka (barrage) moko na ebale Nile, mbula soki 1 000 liboso ete Aswân atonga yango na 1902.
Lisolo yango elobaka ete Alhazen amityelaki mokano ya kotonga nduka moko na ebale Nile mpo mai na yango emataka mingi te na ntango ya mpela mpe ekaukaka mingi te na ntango ya elanga na Ezipito. Ntango Caliph al-Hakim, moyangeli ya engumba Caire, ayokaki nsango ya likambo yango, abengisaki Alhazen na Ezipito mpo aya kotonga nduka yango. Kasi, ntango Alhazen amonaki ebale yango na miso, amonaki ete akokoka te kokokisa mokano na ye. Lokola azalaki kobanga mokonzi yango, oyo ayebanaki ete azalaka bongolabongola, Alhazen, akosaki kobɛla maladi ya motó, tii ntango mokonzi yango akufaki mbula 11 na nsima, na mobu 1021. Kaka na ntango oyo azalaki na ndako ya bato oyo babɛlaka maladi ya motó, Alhazen azalaki kolekisa ntango na ye na kosala makambo mosusu ya ntina.
BUKU OYO ELOBELI NDENGE MISO EMONAKA
Ntango babimisaki Alhazen, asilaki kokoma pene na bavolimi nyonso nsambo ya buku na ye oyo elobeli ndenge miso emonaka, oyo balobaka ete “ezali moko ya bakuku eleki ntina na lisolo ya makambo ya fizike.” Na buku yango, alobeli makambo ya sika oyo ayekolaki mpo na pole, ezala mpo na ndenge oyo pole ebimisaka balangi ekeseni, ndenge oyo talatala elakisaka elili, mpe ndenge oyo pole ebongwanaka ntango ekatisi esika moko mpo na kokóma
na esika mosusu. Ayekolaki mpe makambo oyo esalaka ete miso emona, ndenge oyo miso esalemi, mpe ndenge oyo miso esalaka.Kobanda na siɛklɛ ya 13, mikanda ya Alhazen oyo ezalaki na monɔkɔ ya Arabe ebongolamaki na Latin, mpe bankama ya bambula na nsima, bato ya mayele na Mpoto bakómaki kozongela makanisi na yango na mikanda na bango. Na ndenge yango, makambo oyo Alhazen akomaki mpo na ndenge oyo talatala ya manɛti esalaka, esalisaki bato ya mayele ya Mpoto oyo basalaka manɛti bátya talatala moko liboso mpe talatala mosusu na nsima mpo na kosala baaparɛyi lokola teleskɔpɛ mpe mikroskɔpɛ.
APARƐYI YA FƆTƆ YA LIBOSOLIBOSO
Alhazen ayebaki mibeko oyo esimbi aparɛyi ya fɔtɔ ntango asalaki aparɛyi ya fɔtɔ ya libosoliboso mpo na kozwa bilili. Ezalaki “ndako ya molili,” oyo pole ezalaki kokɔta na lidusu moko ya moke, mpe lidusu yango ezalaki kokɔtisa na kati ya ndako yango elilingi ya biloko oyo ezalaki libándá ya efelo.
Na bambula ya 1800, babimisaki ba plakɛ ya fɔtɔ oyo eyaki kobakisama na aparɛyi ya fɔtɔ yango mpo na kozwa bilili oyo ekoumela. Yango ebimisaki nini? Ebimisaki aparɛyi ya fɔtɔ. Baaparɛyi ya fɔtɔ nyonso ya lelo elandaka mibeko ya fiziki oyo ezalaki kosalelama na aparɛyi ya fɔtɔ wana ya libosoliboso. *
MAYELE YA SIANSI
Moko ya makambo ya Alhazen oyo eyebani mingi ezali bolukiluki ya mozindo oyo asalaki na makambo oyo ebimaka na kolanda mibeko oyo etambwisaka molɔ́ngɔ́. Asalelaki mayele ya sika oyo eyebanaki naino te na ntango wana. Azalaki moko ya bato ya liboso oyo basalaki bolukiluki mpo na komonisa na misala likambo oyo ayekoli, mpe azalaki kobanga te oyo basusu bakoloba soki likanisi na ye esimbi te.
Mobeko moko ya siansi ya lelo elobaka ete: “Monisá na misala makambo oyo oyebi!” Bato mosusu babengaka Alhazen “mobandisi ya mayele oyo bato ya siansi ya lelo basalelaka.” Mpo na ntina wana, tosengeli kopesa ye matɔndi mingi.
^ par. 13 Bato ya mikili ya Mpoto mpe ya Amerika bazalaki koyeba te boyokani oyo ezali kati na aparɛyi ya fɔtɔ mpe liso ya moto, tii ntango Johannes Kepler alimbolaki yango polele na siɛklɛ ya 17.