Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | MPO NA NINI KOZALA SEMBO?

Kozanga bosembo etali moto nyonso

Kozanga bosembo etali moto nyonso

“Ezalaka ntango nyonso na makambo ya mpasi oyo esɛngaka mwa kozanga bosembo mpo solisyo ezwama.”​—Samantha, Afrika ya Sudi.

Ondimi likanisi yango? Ndenge moko na Samantha, na bantango mosusu biso nyonso tokutanaka na makambo ya mpasi. Ndenge oyo tosalaka ntango tokutani na makambo oyo esɛngi tózanga bosembo ekoki komonisa bizaleli nini ezalaka na ntina mpenza mpo na biso. Na ndakisa, soki tolingaka te lokumu na biso ekita, na ntembe te tokomona ete kozanga bosembo ezali mwaye mosusu ya kokokisa likambo moko boye. Kasi soki solo eyebani, mbala mingi kozanga bosembo ememaka mpasi. Tótalela makambo oyo elandi.

KOZANGA BOSEMBO EBEBISAKA KONFIANSE

Mpo bato báyokana malamu esɛngaka konfianse. Soki bato mibale bazali kotyelana motema, babangaka eloko te. Kasi yango eyaka kaka mbala moko boye te. Konfianse ekómaka makasi ntango bato bazali kolekisa ntango elongo, bazali kosolola na bosembo mpe bazali koluka kaka matomba na bango moko te. Kasi, kaka likambo moko mpamba ya kozanga bosembo ekoki kobebisa konfianse. Soki konfianse ebebi ezalaka mpasi mpo ezonga lisusu.

Esí bakosá yo na moto moko oyo okanisaki ete azalaki moninga malamu? Soki ɛɛ, esalaki yo ndenge nini? Na ntembe te oyokaki mpasi na motema, lokola nde atɛki yo. Komiyoka bongo ezali mabe te. Ya solo, kozanga bosembo ekoki kobebisa boyokani ya malamu oyo bato bazalaki na yango.

KOZANGA BOSEMBO EBAKISAKA KOZANGA BOSEMBO

Ankɛtɛ oyo Robert Innes, profesɛrɛ moko ya ekonomi na iniversite ya Californie asalaki emonisi ete “kozanga bosembo ezali lokola maladi oyo ezwaka bato ebele.” Na yango, tokoki kokokanisa kozanga bosembo na virisi; soki ozalaka mingi elongo na bato oyo bazangi bosembo, ekozala mpasi te ezaleli yango, oyo ekokani na “virisi” ezwa yo.

Ndenge nini okoki kokima motambo yango? Biblia ekoki kosalisa yo. Tosɛngi yo otalela mwa batoli ya Biblia oyo tokolobela na lisolo elandi.