LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI—NIMERO YA BOYEKOLI Sanza ya Janvier 2017

Nimero oyo ezali na masolo ya boyekoli mpo na 27/02 tii na 02/04/2017.

Bamipesaki na bolingo na bango moko

Bandeko basi mingi ya minzemba oyo bakendá kosakola na mboka mopaya bazalaki kokakatana na ebandeli. Ndenge nini bazwaki mpiko oyo basengelaki na yango? Makambo nini bayekolaki?

“Tyelá Yehova motema mpe salá malamu”

Yehova azali na esengo ya kosalela biso makambo oyo tokoki te komisalela. Kasi asɛngaka biso tósala oyo tokoki. Ndenge nini mokapo ya mobu 2017 ekosalisa biso tózala na bokatikati?

Zwáká na motuya mingi bonsomi na yo ya kopona

Bonsomi ya kopona ezali nini mpe Biblia eteyaka nini mpo na yango? Ndenge nini okoki komonisa ete omemyaka bonsomi ya kopona ya basusu?

Bopɔlɔ esilá ngala?

Bopɔlɔ ezali nini, mpe ndenge nini eyokani na komikitisa? Mpo na nini ezali ezaleli ya ntina mingi oyo tosengeli komonisa?

Okoki kokoba kozala na bopɔlɔ ntango omekami

Ndenge nini tokoki kokoba kozala na bopɔlɔ ntango makambo ebongwani, ntango balobi na biso mabe to bakumisi biso, mpe ntango toyebi te nini ekokómela biso?

“Pesá bato ya sembo makambo yango”

Ndenge nini bandeko oyo bakómi mikóló bakoki kosalisa bandeko oyo bazali naino bilenge bázwa mikumba mosusu? Ndenge nini bandeko oyo bazali bilenge bakoki komonisa ete bazali komemya bandeko oyo bazalaki na mikumba banda bambula mingi?

Oyebaki yango?

Na ntango ya kala, ndenge nini bazalaki komema mɔtɔ longwa na esika moko tii na esika mosusu?