Esilá ngala to eyebisaka makambo liboso?
SIANSI
BIBLIA EZALI BUKU YA SIANSI TE, KASI ELOBELI MAKAMBO OYO BATO YA SIANSI BAYAKI KOYEBA NA NSIMA. TÓTALELA MWA BANDAKISA.
Likoló ná mabele ezali na ebandeli?
Liboso, bato minene ya siansi bazalaki kondima te ete likoló ná mabele ezali na ebandeli. Lelo oyo, mingi na bango bakómá kondima ete likoló ná mabele ezali na ebandeli. Biblia elobeli likambo yango polele.—Ebandeli 1:1.
Mabele ezali ndenge nini?
Na ntango ya kala, bato mingi bazalaki kokanisa ete mabele ezali patatalu (plat). Na siɛklɛ ya 5 liboso ya ntango na biso, bato ya siansi ya Bagrɛki balobaki ete mabele ezali zolongano to sɛrklɛ. Kasi bambula mingi liboso, na siɛklɛ ya 8 liboso ya ntango na biso, Yisaya, mokomi ya Biblia, alobelaki “zolongano ya mabele.”—Yisaya 40:22.
Likoló ezali kobeba mokemoke?
Aristote, Mogrɛki moko oyo azalaki moto ya siansi na siɛklɛ ya 4 liboso ya ntango na biso, ateyaki ete kaka mabele nde ebebaka mokemoke; likoló oyo etondi na minzoto ekoki kobongwana to kobeba ata moke te. Likanisi wana endimamaki na boumeli ya basiɛklɛ mingi. Kasi na siɛklɛ ya 19, bato ya siansi babimisaki mayele moko babengi entropie; oyo elobaka ete biloko nyonso, ezala na likoló to na mabele, ebebaka mokemoke. Lord Kelvin, moto moko ya siansi oyo asalaki ete mayele wana ekola, ayebaki oyo Biblia elobi mpo na likoló mpe mabele ete: “Yango nyonso ekonzuluka lokola elamba.” (Nzembo 102:25, 26) Kelvin azalaki kondima likambo oyo Biblia eteyaka ete, mpo na kobatela bikelamu na ye, Nzambe akoki te kotika nzela ete likoló ná mabele ebebisama libela.—Mosakoli 1:4.
Nini esimbi baplanɛti, na ndakisa mabele?
Aristote ateyaki ete planɛti mokomoko ezali na kati ya planɛti mosusu, mpe mabele ezali mpenza na katikati ya baplanɛti nyonso. Banda na siɛklɛ ya 18 ya ntango na biso, bato ya siansi bayaki kondima likanisi oyo elobaka ete minzoto mpe baplanɛti esimbami na eloko te. Nzokande mokanda ya Yobo, oyo ekomamaki na siɛklɛ ya 15 liboso ya ntango na biso, elobi ete Mozalisi “akakisi mabele na eloko moko te.”—Yobo 26:7.
MAYELE YA MONGANGA
ATAKO BIBLIA EZALI BUKU YA MINGANGA TE, EPESI BATOLI MOSUSU OYO EMONISI ETE EYEBI MALAMUMALAMU MAKAMBO ETALI SANTE.
Kotya bato ya maladi pembeni.
Mibeko ya Moize ezalaki kosɛnga ete bato oyo bazali na maladi ya maba báfanda mosika na bato mosusu. Na Moyen-Âge, ntango bamaladi oyo epalanganaka ebimaki, minganga bakómaki kosalela toli wana, oyo ezali kaka na ntina tii lelo.—Balevi, mokapo 13 mpe 14.
Kosukola nsima ya kosimba ebembe.
Tii pene na nsuka ya siɛklɛ ya 19, mbala mingi minganga bazalaki kosukola mabɔkɔ te nsima ya kosimba bibembe mpe bazalaki kosimba bato ya maladi. Momeseno wana ezalaki koboma bato mingi. Kasi, Mibeko ya Moize ezalaki ete moto nyonso oyo asimbi ebembe azalaki kotalelama ete azali mbindo. Kutu, Mibeko yango ezalaki kosɛnga kosalela mai mpo na kopɛtola bato ya ndenge wana. Mimeseno wana ya losambo ezalaki mpe kosalisa bato bázala na sante ya malamu.—Mitángo 19:11, 19.
Kobwaka bosɔtɔ na esika oyo ebongi.
Mbula na mbula, bana koleka 500 000 bazali kokufa na maladi ya pulupulu, mingimingi mpo bafandi na bisika oyo etondi na bosɔtɔ. Mibeko ya Moize elobaki ete esengeli kokunda nyɛi, mosika na esika oyo bato bafandi.—Kolimbola Mibeko 23:13.
Ntango ya kokata mwana ngenga.
Mobeko ya Nzambe elobaki ete soki mwana mobali abotami, esengelaki kokata ye ngenga na mokolo ya mwambe. (Balevi 12:3) Emonani ete mpo na mwana oyo abotami sika, esɛngaka pɔsɔ mobimba eleka mpo mpota ebimisa makila mingi te. Na ntango ya kala, liboso ete mayele ya monganga ekola mingi, kozela ete mwana akokisa pɔsɔ moko liboso ya kokata ye ngenga, ezalaki mpenza libateli mpo na ye.
Boyokani kati na makanisi malamu mpe nzoto malamu.
Bato oyo basalaka bolukiluki na mosala ya monganga mpe bato ya siansi balobaka ete mayoki ya malamu, na ndakisa esengo, elikya, kopesa matɔndi, mpe kolimbisa esalaka ete moto azala na sante ya malamu. Biblia elobi: “Motema oyo ezali na esengo esalaka malamu lokola eloko oyo ebikisaka, kasi elimo oyo elɛmbi ekaukisaka mikuwa.”—Masese 17:22.