LISOLO YA BOYEKOLI 39
LOYEMBO 125 “Esengo na bato ya motema mawa!”
Kopesa ememaka esengo mingi koleka
“Esengo ya kopesa eleki esengo ya kozwa.”—MIS. 20:35.
NA MOKUSE
Ndenge ya kobatela esengo ya kopesa, ata mpe kobakisa yango.
1-2. Mpo na nini ezali malamu ndenge Yehova akelá biso na likoki ya koyoka esengo mingi ntango topesi koleka ntango tozwi?
NTANGO Yehova akelaki moto, atyaki kati na ye likoki ya koyoka esengo mingi ntango apesi basusu koleka ntango azwi. (Mis. 20:35) Kasi yango elingi koloba te ete toyokaka esengo te ntango biso nde tozwi. Biso nyonso tosepelaka ntango bakabeli biso eloko. Kasi, esengo oyo toyokaka ntango biso nde topesi, eleki oyo ya kozwa. Kutu, ndenge Yehova akelá biso ete tóyokaka esengo mingi ntango topesi koleka ntango tozwi ezali mpo na bolamu na biso. Mpo na nini?
2 Lokola Yehova akelá biso bongo, apesi biso nzela ya kobakisa esengo na biso. Tokoki kobakisa esengo na biso soki tozali koluka mabaku ya kopesa to kokabela basusu. Omoni te ete yango mpe emonisi ete tosalemá na ndenge ya kokamwa?—Nz. 139:14.
3. Mpo na nini Yehova abengami “Nzambe ya esengo”?
3 Biblia emonisi ete kopesa ememaka esengo, yango wana tokamwaka mpenza te ndenge Yehova abengami “Nzambe ya esengo.” (1 Tim. 1:11) Ye nde Mopesi ya libosoliboso mpe akokani na mosusu te. Ntoma Paulo alobaki: “Na nzela na ye nde tozali na bomoi mpe totambolaka mpe tozali.” (Mis. 17:28) Kutu, “likabo nyonso ya malamu mpe libonza nyonso oyo ekoki mpenza eutaka” epai ya Yehova.—Yak. 1:17.
4. Nini ekosalisa biso tóyoka lisusu esengo mingi?
4 Na ntembe te biso nyonso tokolinga koyoka lisusu esengo mingi oyo eutaka na kopesa. Mpo na yango, tosengeli komekola Yehova na oyo etali kokaba. (Ef. 5:1) Tokotalela ndakisa ya Yehova, mpe tokomona oyo tokoki kosala ntango tomoni ete bato oyo topesaki bazali na botɔndi te. Kotalela makambo yango ekosalisa biso tóbatela esengo ya kopesa mpe kutu tóbakisa yango.
MEKOLÁ YEHOVA NA OYO ETALI KOKABA
5. Biloko nini Yehova apesaka biso?
5 Ndenge nini Yehova amonisaka ete akabaka? Tótalela mwa bandakisa. Yehova apesaka biso biloko ya mosuni. Mbala mosusu tozali na bozwi te, kasi na lisalisi ya Yehova, mingi kati na biso tozalaka na oyo tosengeli na yango. Na ndakisa, asalaka ete tózala na eloko ya kolya, bilamba, mpe esika ya kolala. (Nz. 4:8; Mat. 6:31-33; 1 Tim. 6:6-8) Yehova akokisaka bamposa na biso ya mosuni kaka mpo asengeli kosala yango? Te. Bongo asalaka yango mpo na nini?
6. Liteya nini tokoki kozwa na Matai 6:25, 26?
6 Na mokuse, Yehova akokisaka bamposa na biso ya mosuni mpo alingaka biso. Talá maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 6:25, 26. (Tángá.) Yesu azwaki ndakisa ya biloko oyo Nzambe akelá. Mpo na bandɛkɛ Yesu alobaki: “Elonaka te, ebukaka mbuma te mpe eyanganisaka te na bandako ya kobomba biloko.” Kasi talá makambo oyo alobaki na nsima: “Tata na bino ya likoló aleisaka yango.” Na nsima atunaki: “Bino boleki yango na motuya te?” Liteya ezali nini? Yehova azwaka basaleli na ye na motuna mingi koleka banyama. Soki Yehova aleisaka banyama, tokoki kotya motema ete akokokisa mpe mposa na biso! Ndenge kaka tata asalaka mpo na bana na ye, Yehova akokisaka bamposa na biso bato ya libota na ye mpo alingaka biso.—Nz. 145:16; Mat. 6:32.
7. Wapi lolenge moko oyo tokoki komekola Yehova na oyo etali kokaba? (Talá mpe elilingi.)
7 Ndenge moko na Yehova, biso mpe tokoki kokabela basusu biloko mpo tolingaka bango. Na ndakisa, oyebi ndeko moko oyo azali na bosɛnga ya biloko ya kolya to bilamba? Yehova akoki kosalela yo mpo opesa ndeko yango biloko oyo asengeli na yango. Basaleli ya Yehova bayebani mingimingi mpo na ndenge bamonisaka ezaleli ya bokabi ntango likama esalemi. Na ndakisa, na ntango ya maladi mabe ya coronavirus, bandeko mibali mpe bandeko basi bapesaki bilei, bilamba, mpe biloko mosusu mpo na baoyo bazalaki na bosɛnga. Basusu mpe batyaki makabo ya mbongo mingi mpo na mosala na biso na mokili mobimba. Yango esalisaki mpo na kosunga bandeko ya mokili mobimba. Bandeko yango basalelaki toli ya Baebre 13:16 oyo elobi: “Bóbosana te kosala malamu mpe kokabela basusu biloko, mpo Nzambe asepelaka mpenza na bambeka ya ndenge wana.”
8. Ndenge nini nguya oyo Yehova apesaka biso esalisaka biso? (Bafilipi 2:13)
8 Yehova apesaka biso nguya. Yehova azalaka na esengo ya kopesa basaleli na ye ya sembo ndambo ya makasi na ye oyo ezangi nsuka. (Tángá Bafilipi 2:13.) Esilá kokómela yo obondela mpo na kosɛnga Yehova apesa yo makasi ya kotɛmɛla komekama to nguya mpo na koyikela mokakatano moko mpiko? Mbala mosusu mpe osɛngaki kaka makasi oyo esengeli mpo na mokolo moko. Ntango apesaki yo makasi oyo osɛngaki, na ntembe te oyokaki lokola ntoma Paulo, ntango akomaki: “Na makambo nyonso, nazwaka makasi na lisalisi ya Nzambe, moto oyo apesaka ngai nguya.”—Flp. 4:13.
9. Ndenge nini tokoki komekola ndenge Yehova apesaka basusu nguya na ye? (Talá mpe elilingi.)
9 Atako tozali bato ya kozanga kokoka, tokoki komekola ndenge oyo Yehova apesaka biso nguya. Tokoki mpenza te kopesa basusu makasi to nguya na ndenge ya solo. Kasi, tokoki kosalela nguya oyo tozali na yango mpo na bolamu na bango. Na ndakisa, tokoki kokende kosala wenze mpo na ndeko moko ya mobange to oyo azali ebɔsɔnɔ, to tokoki kosalela ye misala ya ndako. Soki likoki ezali, tokoki kosalisa na kotya bopɛto to kobongisa Ndako ya Bokonzi. Soki tozali kosalela nguya na biso ndenge wana, tokoki kosalisa bandeko mingi.
10. Ndenge nini tokoki kosalela nguya ya maloba na biso mpo na kosalisa basusu?
10 Kobosana mpe te ete maloba ezalaka na nguya. Oyebi ndeko moko oyo akolendisama soki moto apesi ye longonya? Oyebi ndeko oyo azali na mposa ya kozwa libɔndisi? Soki oyebi, okoki koluka ndenge ya koyebisa moto yango ete otyelaka ye likebi? Okoki kokende kotala ye, kobenga ye na telefone, to mbala mosusu kotindela ye karte, to mpe kokomela ye mesaje. Esɛngi kaka te ete oloba makambo ya mindɔndɔ. Mwa maloba moke oyo euti na motema nde ekoki kozala mpenza eloko oyo ndeko azali na mposa na yango mpo atikala sembo lelo to mpo abatela makanisi malamu na likambo oyo azali na yango.—Mas. 12:25; Ef. 4:29.
11. Ndenge nini Yehova asalelaka bwanya na ye?
11 Yehova apesaka biso bwanya. Moyekoli Yakobo akomaki: “Soki moko na bino azangi bwanya, akoba kosɛnga Nzambe, mpo apesaka bato nyonso na motema mobimba, mpe alukaka mabunga te.” (Yak. 1:5; msl.) Ndenge maloba yango emonisi, Yehova abombaka te bwanya na ye kaka mpo na ye moko. Asepelaka kopesa yango mpe basusu. Vɛrsɛ elobi mpe ete ntango Yehova apesaka bwanya, “apamelaka te,” to “alukaka mabunga te.” Alukaka ata moke te kosala ete tóyoka mabe mpo tondimi ete tozali na mposa ya litambwisi na ye. Kutu, alendisi biso tóluka bwanya na ye.—Mas. 2:1-6.
12. Mabaku nini tozali na yango ya kopesa basusu bwanya?
12 Bongo biso? Ndenge nini tokoki komekola Yehova na oyo etali kopesa basusu bwanya? (Nz. 32:8) Basaleli ya Yehova bazwaka mabaku mingi ya koyebisa basusu makambo oyo bayebi. Na ndakisa, mbala mingi tolakisaka bato ya sika ndenge ya kosakola. Na motema molai nyonso, bankulutu basalisaka basaleli na misala mpe bandeko mibali oyo bazwá batisimo báyekola ndenge ya kokokisa mikumba na lisangá. Mpe bandeko oyo bayebi malamu mosala ya botongi mpe ya kobatela bandako basalisaka na kopesa basusu formasyo na mosala ya kotonga mpe kobatela bandako ya losambo.
13. Ntango tozali kopesa basusu formasyo, ndenge nini tokoki komekola ndenge oyo Yehova apesaka basusu bwanya?
13 Ezali malamu ete baoyo bazali kopesa basusu formasyo bámekola ndenge oyo Yehova apesaka basusu bwanya. Tolobaki ete Yehova asepelaka kopesa basusu bwanya mingi. Ndenge moko mpe, ntango tozali kopesa basusu formasyo, tosengeli koyebisa mpe kolakisa bango makambo nyonso oyo toyebi. Tosengeli te kobomba boyebi ndambo mpo tozali kobanga ete lobilobi moto oyo azali kozwa formasyo azwa esika na biso. Tolobaka mpe te ete: ‘Ngai mpe bapesaki ngai formasyo te! Ye mpe abunda kaka ye moko.’ Makanisi ya ndenge wana ebongi te mpo na basaleli ya Yehova. Tosengeli nde kozala na esengo ya kopesa basusu kaka boyebi te, “kasi mpe bomoi na biso mpenza.” (1 Tes. 2:8) Tozalaka na elikya ete “bango mpe bakozala na makoki ya koteya bato mosusu.” (2 Tim. 2:1, 2) Soki moto na moto na ngala na ye azali kolakisa basusu makambo oyo ayekolá, biso nyonso tokobanda koyoka esengo ya kopesa.
NTANGO TOMONI ETE BATO BAZALI NA BOTƆNDI TE
14. Bato mingi basalaka nini ntango tokabeli bango?
14 Ntango tokabeli basusu, mingimingi bandeko na biso ya lisangá, mbala mingi bapesaka biso matɔndi. Bakoki kotindela biso karte to kopesa matɔndi na bango na ndenge mosusu. (Kol. 3:15) Ntango moto amonisi botɔndi, toyokaka esengo mingi.
15. Likambo nini tosengeli kokanisa ntango basusu bamonisi botɔndi te?
15 Kasi, tóyeba ete bato mosusu bamonisaka botɔndi te mpo na likambo oyo tosaleli bango. Ekómaka ete topesaki basusu ntango, makasi, to biloko na biso, kasi na nsima tozali komituna soki bato yango bamoni makambo oyo tosaleli bango. Soki esalemi bongo, nini ekosalisa biso tóbungisa te esengo na biso mpe tólɛmba nzoto? Kanisá lisusu maloba ya vɛrsɛ oyo esimbi lisolo oyo, Misala 20:35. Esengo na biso etaleli te ndenge oyo bato bakosala ntango tokabeli bango. Tokoki kopona koyoka esengo ya kopesa ata soki tomoni ete bato bazali na botɔndi te. Na ndenge nini? Tólobela yango.
16. Nini ekosalisa biso tókoba kopesa na esengo?
16 Kobosana te ete ozali komekola Yehova. Apesaka bato biloko ya malamu ezala bamonisi botɔndi to te. (Mat. 5:43-48) Yehova alaki ete ntango biso mpe tozali kopesa “kozanga kozela ete bázongisela [biso] eloko . . . mbano na [biso] ekozala monene.” (Luka 6:35) “Eloko” oyo bakoki kozongisela biso ekoki kozala mpe matɔndi oyo moto apesi. Ezala moto apesi matɔndi to te, Yehova akozanga te kofuta bolamu oyo tosalaka mpo na basusu, mpo tozali ‘kopesa na esengo.’—Mas. 19:17; 2 Ko. 9:7.
17. Nini ekosalisa biso tókoba komekola kaka Yehova? (Luka 14:12-14)
17 Eloko mosusu oyo ekosalisa biso tómekola Yehova ezali likambo oyo Yesu alobaki na Luka 14:12-14. (Tángá.) Ezali mabe te komonisa ezaleli ya koyamba bapaya epai ya baoyo bakoki mpe kosala bongo epai na biso to kokabela biso na ndenge mosusu. Kasi, tosengeli kosala nini soki tomoni ete na bantango mosusu topesaka basusu na elikya ete bango mpe bázongisela biso mwa eloko? Ekozala malamu tómeka kosala likambo oyo Yesu alobaki. Tokoki komonisa ezaleli ya koyamba bapaya epai ya moto oyo toyebi ete azali na likoki te ya kosala mpe bongo epai na biso. Soki tosali bongo, tokozala na esengo mpo tozali komekola Yehova. Kotalela makambo ndenge wana ekosalisa biso mpe tóbatela esengo na biso ntango bato bamonisi botɔndi te.
18. Nini ekosalisa biso tókanisela basusu mabe te?
18 Kokaniselaka basusu mabe te. (1 Ko. 13:7) Soki basusu bamonisi botɔndi te, tokoki komituna boye: ‘Bazangá mpenza botɔndi, to babosani kaka komonisa botɔndi na bango?’ Mbala mosusu ezali na makambo oyo esali ete bámonisa botɔndi te ndenge oyo biso tokanisaki. Bato mosusu bazalaka na botɔndi mingi na motema kasi bayebaka komonisa yango te. Mbala mosusu bazali koyoka nsɔni mpo na lisalisi oyo bazwi, mingimingi soki kala bango nde bazalaki kosalisa basusu. Ezala bongo to te, bolingo ya bokristo ekotinda biso tókanisela bandeko mabe te, mpe tókoba koyoka esengo ya kopesa.—Ef. 4:2.
19-20. Mpo na nini motema molai ezali na ntina ntango tozali kopesa basusu? (Talá mpe elilingi.)
19 Zalá na motema molai. Na oyo etali kokaba, Mokonzi Salomo akomaki: “Bwaká limpa na yo na mai, mpo nsima ya mikolo mingi okozwa yango lisusu.” (Mos. 11:1) Bato mosusu bayaka komonisa botɔndi ntango molai na nsima, elingi koloba “nsima ya mikolo mingi.” Tótalela ndakisa oyo emonisi likambo yango.
20 Eleki bambula mingi, mwasi ya mokɛngɛli moko ya zongazonga akomelaki ndeko mwasi moko oyo autaki kozwa batisimo sika mwa mokanda na maloba oyo eutaki na motema; alendisaki ye abatela bosembo na ye. Mbula soki 8 na nsima, ndeko mwasi yango akomelaki mwasi ya mokɛngɛli mokanda moko ya molai; alobaki: “Namonaki ete nasengeli kaka kokoma mpo na koyebisa yo ndenge osalisi ngai bambula oyo nyonso kozanga kutu oyeba yango.” Abakisaki boye: “[Mwa mokanda na yo] ezalaki na maloba kitoko, kasi vɛrsɛ oyo otyaki nde esimbaki motema na ngai mpe nabosaná yango te.” a Na nsima, atángaki mwa mikakatano oyo akutanaki na yango, mpe alobaki: “Na bantango mosusu nayokaki lokola natika makambo nyonso, natika solo, natika mikumba na ngai, natika kaka kosalela Yehova. Kasi vɛrsɛ oyo okomaki elendisaka ngai, okomona nalobi . . . nakoba kaka.” Abakisaki boye: “Na boumeli ya bambula 8 oyo, eloko moko te esalisá ngai ndenge wana.” Kanisá esengo oyo mwasi ya mokɛngɛli ayokaki ntango azwaki mokanda yango “nsima ya mikolo mingi”! Ekoki kosalema mpe ndenge wana mpo na biso; bakoki kopesa biso matɔndi nsima ya ntango molai.
21. Mpo na nini ozwi ekateli ya kokoba komekola Yehova na oyo etali kokaba?
21 Ndenge tomonaki yango, Yehova akelá biso na likoki moko ya kokamwa. Ya solo tosepelaka kozwa, kasi toyokaka esengo mingi koleka ntango topesi. Tomiyokaka malamu ntango tosalisi bandeko na biso. Mpe tozalaka na esengo ntango bamonisi botɔndi na bango. Kasi, ata soki moto oyo topesaki amonisi botɔndi to te, tokoki kaka kosepela mpo tosalaki likambo ya malamu. Tóbosana te ete ata soki topesaki eloko nini, ‘Yehova azali na makoki ya kopesa biso mingi koleka oyo wana.’ (2 Nt. 25:9) Tokoki kozala lobɔkɔ pɛtɛɛ koleka Yehova te! Mpe kofutama na Yehova nde ekopesa biso esengo koleka nyonso. Na yango, tózala na ekateli ya kokoba komekola Tata na biso ya likoló na likambo etali kokaba.
LOYEMBO 17 “Nalingi”
b NDIMBOLA YA BILILINGI: Ndenge makambo elekaki; mwasi ya mokɛngɛli ya zongazonga akomi mwa mokanda mpo na kolendisa ndeko mwasi moko. Bambula mingi na nsima, azwi mokanda oyo emonisi botɔndi ya ndeko mwasi yango.