Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mabulu oyo ebombaka mai te

Mabulu oyo ebombaka mai te

Mabulu oyo ebombaka mai te

NA NTANGO ya kala, bato bazalaki kotimola mabulu mingimingi mpo na kobomba mai. Na bileko mosusu, na Mokili ya Ndaka, bazalaki na lolenge kaka moko wana mpo na kobomba mai.

Maloba ya Nzambe oyo mosakoli Yilimia akomaki, elobelaki mpe mabulu na maloba ya elilingi, ete: “Bato na ngai basali masumu mibale, batiki ngai, liziba ya mai ya bomoi, mpe bamitimoleli mabulu, mabulu matobwani, [mabombaka, NW] mai te.”​—⁠Yilimia 2:⁠13.

Lokola Bayisalaele basundolaki Nzambe na bango Yehova, “liziba ya mai ya bomoi,” basalaki kondimana ya mpamba na bikólo mosusu mpe bakómaki kosambela banzambe ya lokuta, oyo bakoki kobikisa te. Bisika oyo bakanisaki ekobatela bango ebongwanaki oyo Yilimia abengaki maziba matobwani oyo ekokaki kobatela to kobikisa te.​—⁠Deteronome 28:⁠20.

Lelo oyo tokoki nde kozwa liteya na ndakisa yango ya kala? Ndenge kaka ezalaki na mikolo ya Yilimia, lelo oyo mpe Yehova, Nzambe ya seko, azali Liziba se moko ya mai ya bomoi. (Nzembo 36:9; Emoniseli 4:11) Kaka epai na ye, na nzela ya Mwana na ye Yesu Klisto, nde bato bakoki kozwa bomoi ya seko. (Yoane 4:14; 17:⁠3) Kasi, lokola bato ya ntango ya Yilimia, ebele ya bato lelo oyo bazali kopesa Liloba ya Nzambe na kati ya Biblia mokɔngɔ to mpe bazali kobalola yango. Na esika na yango, bazali kotyela bato ya politiki motema, kotya motema na makanisi mpe na filozofi ya bato, oyo ezali kotyola Nzambe. (1 Bakolinti 3:​18-20; Bakolose 2:⁠8) Epai oyo bato basengeli mpenza kotya motema emonani polele. Okotya motema epai ya nani? Epai ya “liziba ya mai ya bomoi,” Yehova, to epai ya “mabulu matobwani, [oyo mabombaka, NW] mai te”?

[Elilingi na lokasa 32]

Ekeko ya mabelé ya nzambe-mama oyo bazwaki na lilita moko ya Bayisalaele

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Tozwi fɔtɔ oyo na ndingisa ya British Museum