Makanisi ya ntina na mokanda ya Yobo
Liloba ya Yehova ezali na bomoi
Makanisi ya ntina na mokanda ya Yobo
YOBO azalaki kofanda na mokili ya Usa, oyo ezali lelo na Arabie. Na eleko yango, Bayisalaele mingi bazalaki na Ezipito. Yobo azalaki kosambela Yehova Nzambe, atako azalaki Moyisalaele te. Biblia elobi mpo na ye ete: “Mosusu azali lokola ye kati na mokili te, moto malamu bɛɛ mpe na sembo, oyo akotosaka Nzambe mpe akoboyaka mabe.” (Yobo 1:8) Na ntembe te, eleko yango ezalaki nsima ya liwa ya Yozefe, mwana ya Yakobo mpe liboso Moize akóma mosakoli.
Na ntembe te Moize, moto oyo balobaka ete akomaki mokanda ya Yobo, ayokaki lisolo na ye ntango alekisaki mbula 40 na Midyani, ekólo oyo ezali pembeni ya mokili ya Usa. Ekoki kozala ete ntango Bayisalaele bakómaki pembeni ya mokili ya Usa, na nsuka ya mobembo na bango ya mbula 40 na esobe nde Moize ayokaki ndenge lisolo ya bomoi ya Yobo esukaki. * Lisolo ya bomoi ya Yobo ekomamaki na elobeli kitoko mpenza na boye ete mokanda yango ezali lisolo moko oyo ekomamá malamu mpenza. Kasi, likambo oyo eleki ntina, mokanda yango ezali kopesa biyano na mituna lokola: Mpo na nini bato malamu banyokwamaka? Mpo na nini Yehova atiki nzela na mabe? Bato ya kozanga kokoka bakoki nde kotikala sembo epai ya Nzambe? Lokola mokanda ya Yobo ezali na kati ya Liloba epemami na Nzambe, nsango na yango ezali na bomoi mpe ezali na nguya ata na moi ya lelo.—Baebele 4:12.
“TIKÁ ETE MOKOLO OYO NABOTAMAKI EBEBA”
Mokolo moko, Satana abɛtelaki bosembo ya Yobo ntembe liboso ya Nzambe. Yehova apesaki Satana nzela abimisela Yobo mikakatano ndenge na ndenge. Kasi, Yobo aboyaki ‘kolakela Nzambe mabe.’—Yobo 2:9.
Baninga misato ya Yobo bayaki mpo na “kobɔndisa ye.” (Yobo 2:11) Bafandaki pene na ye mpe balobaki ata liloba moko te tii ntango Yobo alobaki ete: “Tiká ete mokolo oyo nabotamaki ebeba.” (Yobo 3:3, NW) Alobaki ete elekaki malamu azala “lokola bana baoyo bamoni pole te,” to bana oyo babotamaka bakufá.—Yobo 3:11, 16.
Biyano na mituna ya Biblia:
1:4—Bana ya Yobo bazalaki nde kosepela mikolo ya kobotama? Te. Na Liebele, liloba oyo ebongolamaka na “mokolo” ekeseni na liloba oyo ebongolamaka na “mokolo ya kobotama.” (Genese 40:20) Na Yobo 1:4, basaleli liloba “mokolo”; elingi koloba ntango oyo elekaka banda ntɔngɔ etani tii moi ekolala. Ekoki mpenza kozala ete mbala moko na mbula, bana mibali nsambo ya Yobo bazalaki kosala fɛti oyo ezalaki koumela mikolo nsambo. Mwana mokomoko azalaki koyamba bandeko na ye na ndako na ye mpo na fɛti yango na “mokolo na ye.”
1:6; 2:1—Banani bazalaki na ndingisa ya komimonisa liboso ya Yehova? Na kati ya baoyo bamimonisaki liboso ya Yehova, ezalaki Mwana mobotami-se-moko ya Nzambe, to Liloba; baanzelu ya sembo; mpe ‘bana ya Nzambe,’ oyo bazangaki botosi, oyo moko na bango ezali Satana Zabolo. (Yoane 1:1, 18) Babenganaki Satana ná bademo na ye na likoló mwa moke nsima ya kotyama ya Bokonzi ya Nzambe na 1914. (Emoniseli 12:1-12) Ndenge Yehova atikelaki bango nzela bámimonisa liboso na ye, emonisi ete alingaki ete bikelamu nyonso ya elimo báyeba ntembe oyo Satana abimisaki.
1:7; 2:2—Yehova ye moko nde alobaki na Satana? Biblia elobi mingi te mpo na ndenge oyo Yehova asololaka na bikelamu ya elimo. Kasi, na emonaneli moko, mosakoli Mikaya amonaki anzelu moko azali kosolola na Yehova. (1 Mikonzi 22:14, 19-23) Na bongo, tokoki kokanisa ete Yehova ye moko asololaki na Satana.
1:21—Na ndenge nini Yobo akokaki kozonga na “libumu ya mama” na ye? Lokola Yehova Nzambe asalaki moto “na mputulu ya mokili,” na vɛrsɛ yango, “mama” ezali liloba ya elilingi mpo na kolobela mabelé.—Genese 2:7.
2:9—Ekoki kozala ete makanisi ya mwasi ya Yobo ezalaki ndenge nini ntango ayebisaki mobali na ye ete afinga Nzambe mpe akufa na ye? Mwasi ya Yobo ayokaki mpe mpasi mingi mpo na mikakatano nyonso oyo ekómelaki bango. Ayokaki mpasi mingi na komona mobali na ye oyo azalaki nzoto kolɔngɔnɔ, akómi na maladi mabe. Akufelaki bana na ye nyonso. Mbala mosusu makambo nyonso wana etungisaki ye mingi na boye ete abosanaki likambo oyo elekaki mpenza ntina, elingi koloba boyokani na bango ná Nzambe.
Mateya mpo na biso:
1:8-11; 2:3-5. Ndenge lisolo ya Yobo emonisi yango, longola maloba mpe misala ya malamu, bosembo epai ya Nzambe esɛngaka mpe kozala na makanisi ya malamu mpo na kosalela Yehova.
1:21, 22. Tokomonisa ete Satana azali mobuki-lokuta soki tozali sembo epai ya Yehova ezala na ntango ya bisengo to na ntango ya mpasi.—Masese 27:11.
2:9, 10. Lokola Yobo, tosengeli kozala na kondima makasi ata soki bandeko na biso bazali kotyola mikano na biso ya elimo to bazali kolɛmbisa biso mpo tózonga nsima to tótika kondima na biso.
2:13. Baninga ya Yobo babimisaki ata likanisi moko te ya kobɔndisa oyo eyokani na mokano ya Nzambe mpe bilaka na ye mpamba te bazalaki kotalela makambo ndenge moko te na Nzambe.
“NAKOMILONGWELA SEMBO NA NGAI TE”
Likanisi mpenza oyo baninga misato ya Yobo babimisaki na maloba na bango ezali ete Yobo asalaki likambo moko ya mabe mpenza yango wana Nzambe apesaki ye etumbu ya makasi ndenge wana. Elifaza nde azwaki maloba moto ya liboso. Biledada alandaki, abakisaki maloba ya kolɛmbisa. Sofala alobaki maloba ya kotyola mpenza.
Yobo andimaki makanisi ya bato yango te. Lokola ayebaki te mpo na nini Nzambe atikaki nzela ete anyokwama, alukaki libosoliboso komilongisa. Atako bongo, Yobo alingaki Nzambe mpe alobaki boye: “Kino nakokufa nakomilongwela sembo na ngai te.”—Yobo 27:5.
Biyano na mituna ya Biblia:
7:1; 14:14 (NW)—“Mosala ya kotindikama na makasi” ezali nini? Mpasi ya Yobo elekaki na boye ete akanisaki ete bomoi ezali bwale lokola mosala ya kotindikama na makasi. (Yobo 10:17, maloba na nse ya lokasa na NW) Lokola ntango oyo moto alekisaka na Sheole—banda ntango akufi tii ntango akosekwa—ezali eleko oyo ye moko aponi te, Yobo akokanisaki yango na mosala ya kotindikama na makasi.
7:9, 10; 10:21; 16:22—Maloba ya bavɛrsɛ yango ezali nde komonisa ete Yobo azalaki kondima lisekwa te? Yobo alobaki bongo mpo na mikolo oyo elingaki kolanda liwa na ye. Kasi, alingaki koloba nini? Ntango mosusu alingaki koloba ete soki akufi, bato oyo bazalaki na eleko na ye balingaki komona ye lisusu te. Mpo na bato yango, akokaki kozonga lisusu na ndako na ye te mpe bakobosana ye tii ntango Nzambe akosekwisa ye. Ekoki mpe kozala ete alingaki koloba ete moto moko te akoki kobima na Sheole na ndenge na ye moko. Mokapo ya Yobo 14:13-15 emonisi polele ete Yobo azalaki kondima lisekwa.
10:10 (NW)—Ndenge nini Yehova ‘asopaki Yobo lokola miliki mpe akangisaki ye lokola fromajɛ’? Yango ezali maloba ya elilingi mpo na komonisa ndenge oyo Yobo asalemaki na libumu ya mama na ye.
19:20—Yobo alingaki koloba nini na maloba “nabiki bobele na loposo ya mino na ngai”? Ndenge Yobo alobaki ete abikaki na loposo ya eloko oyo emonanaka lokola nde ezali na loposo te, alingaki komonisa ete atikalaki ata na eloko te.
Mateya mpo na biso:
4:7, 8; 8:5, 6; 11:13-15. Tosengeli kokanisa mbala moko te ete moto oyo azali na mpasi azali kobuka mbuma mabe ya misala na ye to mpe Nzambe aboyi ye.
4:18, 19; 22:2, 3. Tosengeli ntango nyonso kopesaka toli oyo euti na Liloba ya Nzambe, kasi na makanisi na biso moko te.—2 Timote 3:16.
10:1. Mpasi elekelaki Yobo na boye ete akokaki lisusu kokanisa bantina mosusu te oyo ekokaki komemela ye minyoko wana. Tosengeli komilelalelaka te ntango tozali konyokwama, mingimingi lokola toyebi malamu ntina ya bampasi oyo tokutanaka na yango.
14:7, 13-15; 19:25; 33:24. Ata komekama nini oyo Satana akoki komemela biso, elikya ya lisekwa ekolendisa biso.
16:5; 19:2. Maloba na biso esengeli kolendisa mpe kobɔndisa basusu, kasi te koyokisa bango mpasi.—Masese 18:21.
22:5-7. Toli oyo epesami likoló ya bifundeli oyo toyebi te soki ezali ya solo ezali ntina te; kutu, epesaka nde mpasi na motema.
27:2; 30:20, 21. Mpo na kotikala sembo, esɛngi kaka te kozala moto ya kokoka. Yobo amikosaki na ndenge alobaki mabe mpo na Nzambe.
27:5. Kaka Yobo ye moko nde akokaki kozwa ekateli ya kotika bosembo na ye mpamba te, bosembo ya moto etalelaka bolingo oyo azali na yango mpo na Nzambe. Yango wana, tosengeli kolona bolingo makasi mpo na Yehova.
28:1-28. Moto ayebi bisika oyo mabanga ya ntalo ezali na kati ya mabelé. Asalelaka mayele na ye mpo na kotimola banzela na nse ya mabelé oyo ata ndɛkɛ moko te oyo amonaka na mosika akoki komona. Kasi, bwanya ya solosolo eutaka na ezaleli ya kobanga Yehova.
29:12-15. Tosengeli kosepelaka kosalisa bato oyo bazali na bosɛnga.
31:1, 9-28. Yobo atikelaki biso ndakisa malamu na likambo etali koboya kokangamakangama na moto oyo azali molongani na yo te, koboya ekobo, koboya konyokola bato, koboya kolinga biloko ya mokili, mpe koboya kosambela bikeko.
“NABONGOLI MOTEMA NA MPUTULU MPE NA MPUTULU YA MƆTƆ”
Elenge moko na nkombo Elihu afandaki nyee mpe alandaki masolo na bango nyonso. Na nsima, ye mpe azwaki maloba. Asembolaki Yobo ná baninga na ye misato oyo bazalaki kotungisa ye.
Ntango kaka Elihu asilisaki koloba, Yehova alobaki na kati ya mopɛpɛ makasi. Alobaki te ntina oyo Yobo azalaki konyokwama. Kasi, na nzela ya mituna oyo Mozwi-ya-Nguya-Nyonso atunaki, amonisaki Yobo nguya mpe bwanya na Ye monene. Yobo andimaki ete alobaki kozanga kokanisa mpe abakisaki ete: “Namityoli mpe nabongoli motema na mputulu mpe na mputulu ya mɔtɔ.” (Yobo 42:6) Ntango mpasi ya Yobo esilaki, azwaki mbano mpo na bosembo na ye.
Biyano na mituna ya Biblia:
32:1-3—Ntango nini Elihu ayaki? Lokola Elihu ayokaki makambo nyonso oyo balobaki, ekoki mpenza kozala ete ayaki kofanda pembeni mpe ezalaki liboso Yobo abanda koloba, nsima ya mikolo nsambo oyo baninga na ye misato bafandaki nyee.—Yobo 3:1, 2.
34:7—Na ndenge nini Yobo azalaki lokola moto “oyo akomɛlaka kotyola lokola mai”? Na bampasi na ye, Yobo azalaki komona ete baninga na ye misato bazalaki kolobela nde ye maloba wana ya kotyola, atako bazalaki mpenza nde koloba mabe mpo na Nzambe. (Yobo 42:7) Na yango, azalaki koyoka maloba ya kotyola ndenge moto amɛlaka mai na esengo.
Mateya mpo na biso:
32:8, 9. Moto akómaka na bwanya kaka te mpo akómi mokóló. Esɛngaka koyeba Liloba ya Nzambe mpe kotambwisama na elimo na ye.
34:36 (NW). Moto amonisaka bosembo na ye soki ‘amekami tii na nsuka.’
35:2. Elihu ayokaki na likebi mpe alukaki naino koyeba likambo oyo eleki ntina liboso aloba. (Yobo 10:7; 16:7; 34:5) Liboso bankulutu bápesa toli, basengeli koyoka na likebi, koyeba likambo mobimba, mpe kokanga ntina na yango.—Masese 18:13.
37:14; 38:1–39:30. Komanyola likoló ya misala ya kokamwa ya Yehova—makambo oyo ezali komonisa nguya mpe bwanya na ye—etindaka biso tómikitisa mpe esalisaka biso tómona ete kolongisama ya bokonzi na ye ezali na ntina koleka bolamu na biso.—Matai 6:9, 10.
40:1-4. Soki likanisi ya koloba mabe mpo na Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, eyeli biso tosengeli ‘kotya lobɔkɔ na biso na monɔkɔ.’
40:15–41:34. Behemote (ngubu) ná Leviatana (ngando) bazali banyama ya makasi mpenza! Mpo na koyika mpiko na mosala ya Nzambe, esengeli ete Mokeli ya banyama yango apesa biso nguya.—Bafilipi 4:13.
42:1-6. Koyoka liloba ya Yehova mpe kokundwela ye makambo oyo ezali komonisa nguya na ye esalisaki Yobo ‘amona Nzambe,’ to ayeba solo na ntina na ye. (Yobo 19:26) Yango esembolaki makanisi na ye. Ntango basemboli biso na lisalisi ya Biblia, tosengeli kondima mbala moko libunga na biso mpe kobongisa.
Tólona “koyika mpiko ya Yobo”
Mokanda ya Yobo ezali komonisa polele ete bampasi oyo bato bazali kokutana na yango eutaka epai ya Nzambe te. Eutaka nde epai ya Satana. Ndenge oyo Nzambe atiki nzela na mabe ezali kopesa mokomoko na biso libaku ya komonisa soki azali na ngámbo nini na ntembe oyo etaleli bokonzi ya Yehova mpe bosembo ya bato.
Lokola Yobo, bato nyonso oyo balingaka Yehova bakomekama. Lisolo ya Yobo ezali kondimisa biso ete biso mpe tokoki koyika mpiko. Ezali komonisa ete mikakatano oyo tozali kokutana na yango ekotikala libela te. Yakobo 5:11 elobi boye: “Bosili koyoka nsango ya koyika mpiko ya Yobo mpe bosili komona nsuka oyo Yehova abongisaki.” Yehova apesaki Yobo mbano mpo na bosembo na ye. (Yobo 42:10-17) Yehova apesi biso elikya monene mpenza: bomoi ya seko na Paladiso awa na mabelé! Yango wana, lokola Yobo, tózala na ekateli ya kotikala sembo.—Baebele 11:6.
[Maloba na nse ya lokasa]
^ par. 2 Mokanda ya Yobo elobeli makambo oyo elekaki na boumeli ya mbula 140, banda na mobu 1657 mpe mobu 1473 L.T.B.
[Bililingi na lokasa 16]
Liteya nini tokoki kozwa na “koyika mpiko ya Yobo”?