Bilenge—Liloba ya Nzambe etambwisa bino
Bilenge—Liloba ya Nzambe etambwisa bino
“Zwá bwanya, zwá mayele.”—MAS. 4:5.
1, 2. (a) Nini esalisaki ntoma Paulo abunda na mokakatano oyo azalaki na yango? (b) Epai wapi okoki kozwa bwanya mpe mayele?
“NTANGO nalingi kosala oyo ezali malamu, oyo ezali mabe nde ezali epai na ngai.” Oyebi nani alobaki maloba wana? Ezali ntoma Paulo. Atako Paulo alingaki Yehova, na bantango mosusu, azalaki komona ete kosala oyo ezali malamu ezali etumba. Ayokaki ndenge nini mpo na etumba yango oyo ezalaki na motema na ye? Akomaki boye: “Ngai moto ya mawa!” (Rom. 7:21-24) Oyokaka mpe ndenge Paulo ayokaki? Na bantango mosusu omonaka ete ezali mpasi kosala makambo ya malamu? Epesaka yo mawa, lokola Paulo? Soki ezali bongo, kolɛmba nzoto te. Paulo alongaki mikakatano oyo akutanaki na yango; yo mpe okoki kolonga.
2 Paulo alongaki mpo atikaki “maloba oyo epesaka litomba” etambwisa ye. (2 Tim. 1:13, 14) Mpo na yango, azwaki bwanya mpe mayele oyo asengelaki na yango mpo na kobunda na mikakatano mpe kozwa bikateli ya malamu. Yehova Nzambe akoki kosalisa yo ozwa bwanya mpe mayele. (Mas. 4:5) Apesi toli oyo eleki malamu na kati ya Biblia, Liloba na ye. (Tángá 2 Timote 3:16, 17.) Tótala ndenge mitinda ya Biblia ekoki kosalisa yo na boyokani na yo na baboti na yo, na oyo etali kosalela mbongo, mpe ntango ozali yo moko.
Na kati ya libota
3, 4. Mpo na nini okoki komona ete ezali mpasi kotosa mibeko ya baboti na yo, kasi mpo na nini baboti batyelaka yo mibeko?
3 Omonaka ete ezali mpasi kotosa mibeko ya baboti na yo? Mpo na nini okoki komona bongo? Ekoki kozala mpo ozali na mposa ya kozwa mwa bonsomi ya kosala makambo ndenge olingi. Mposa yango ezali mabe te. Ezalaka bongo ntango moto abandi kokóma mokóló. Kasi, lokola ozali naino na ndako ya baboti, ozali na mokumba ya kotosa mibeko na bango.—Ef. 6:1-3.
4 Koyeba ntina oyo baboti batyeli yo mibeko mpe bazali kosɛnga yo makambo mosusu ekoki kosalisa yo otosa yango. Ya solo, na bantango mosusu okoki koyoka lokola Brielle, * elenge mwasi moko ya mbula 18 oyo alobaki mpo na baboti na ye boye: “Babosaná mpenza ete bango mpe bazalaki bilenge, ndenge nazali. Balingaka te napesa likanisi, nazwa ekateli, nazala mokóló.” Lokola Brielle, okoki mbala mosusu komona lokola baboti na yo bapesaka yo bonsomi moke mpenza. Nzokande, baboti na yo batyelaka yo mibeko libosoliboso mpo bamibanzabanzaka mpo na yo. Longola yango, baboti oyo bazali bakristo bayebi ete bakozongisa monɔkɔ epai ya Yehova mpo na ndenge oyo bazali kobatela yo.—1 Tim. 5:8.
5. Kotosa baboti na yo ekoki kozala na litomba nini?
5 Ya solo, kotosa mibeko ya baboti na yo ezali lokola kofuta nyongo na banki—soki ofutaka malamu, banki ekosepela kopesa yo banyongo mosusu. Ndenge moko mpe, ozali na nyongo ya limemya mpe ya botosi epai ya baboti na yo. (Tángá Masese 1:8.) Soki ozali na botosi mingi, baboti na yo mpe bakosepela kopesa yo bonsomi mingi. (Luka 16:10) Kasi, soki ozali ntango nyonso kobuka mibeko, kokamwa te soki bakati kopesa yo “nyongo,” elingi koloba bakitisi to baboyi kopesa yo mwa bonsomi.
6. Ndenge nini baboti bakoki kosalisa bana bázala na botosi?
1 Yoa. 5:3) Longola yango, Biblia elobeli mabaku mosusu oyo Yehova apesaki basaleli na ye libaku ya komonisa makanisi na bango. (Eba. 18:22-32; 1 Bak. 22:19-22) Ekoki nde kozala na bantango mosusu oyo baboti bakoki kopesa bana mabaku ya kopesa makanisi na bango?
6 Baboti bakoki kosalisa bana na bango bátosa mibeko oyo bazali kotyela bango soki bango moko bazali kopesa bango ndakisa. Ndenge oyo baboti bazali kotosa mibeko ya Yehova esengeli komonisa ete mibeko ya Nzambe eleki makasi te. Ekosalisa bilenge bátalela mpe mibeko ya baboti na bango ndenge wana. (7, 8. (a) Mokakatano nini bilenge mosusu bazalaka na yango? (b) Koyeba likambo nini ekosalisa yo ozwa matomba na disiplini oyo bapesi yo?
7 Bilenge bakoki mpe kozala na mokakatano ntango bazali komona ete bampamela ya baboti na bango ebongi te. Mbala mosusu okoki koyoka lokola elenge mobali na nkombo Craig, oyo alobaki ete: “Mama azalaki lokola polisi—azalaki koluka ntango nyonso bisika oyo nasali mbeba.”
8 Mbala mingi, kosembola to kopesa disiplini esalemaka na ndenge ya mpamela. Biblia endimi ete disiplini, ata soki epesami ntango esengeli, ezalaka mpasi mpo na kondima yango. (Ebr. 12:11) Nini ekoki kosalisa yo ozwa matomba na disiplini oyo bapesi yo? Likambo ya ntina oyo osengeli kobosana te ezali ete mingimingi bolingo nde etindaka baboti na yo básembola yo. (Mas. 3:12) Balingi kosalisa yo okóma na mimeseno ya mabe te kasi olona oyo ya malamu. Mbala mosusu baboti na yo bazali komona ete soki basemboli yo te, ezali lokola bazali koyina yo! (Tángá Masese 13:24.) Lisusu, osengeli koyeba ete ntango moto azali koyekola, asalaka mabunga. Na yango, ntango basemboli yo, luká bwanya oyo ezali na makambo oyo balobi. “Litomba ya kozwa [bwanya] eleki litomba ya kozwa palata mpe kozwa yango eleki kozwa wolo.”—Mas. 3:13, 14.
9. Na esika bátingama na likambo oyo bamoni ete ezali sembo te, bilenge bakoki kosala nini?
9 Nzokande, baboti mpe basalaka mabunga. (Yak. 3:2) Ntango bazali kopesa yo disiplini, bakoki koloba kozanga kokanisa. (Mas. 12:18) Mpo na nini baboti na yo bakoki kosala bongo? Mbala mosusu, eloko moko ezali kotungisa bango, to bakoki komona ete soki osali mabunga, ezali mpo babɔkɔli yo malamu te. Na esika otingama kaka na likambo oyo omoni ete ezali sembo te, mpo na nini te komonisa botɔndi mpo na mposa na bango ya kosalisa yo? Koyeba kondima disiplini ekosalisa yo mingi ntango okokóma mokóló.
10. Okoki kosala nini mpo ondimaka mibeko mpe mpamela ya baboti na yo?
10 Olingi ondimaka mibeko mpe mpamela ya baboti na yo kozanga mpasi? Soki bongo, osengeli kobongisa ndenge na yo ya kosolola. Ndenge nini okoki kosala yango? Ya liboso, osengeli koyeba koyoka. Biblia elobi ete osengeli “koyokaka noki, kowelaka koloba te, koyokaka nkanda noki te.” (Yak. 1:19) Na esika oluka komilongisa nokinoki, meká kokanga motema mpe koyoka makambo oyo baboti na yo balingi koloba. Tyá likebi na makambo oyo bazali koloba, kasi te na ndenge oyo bazali koloba yango. Na nsima, zongelá makanisi na bango na maloba na yo moko mpe na limemya nyonso, yebisá bango makambo oyo balobi na yo. Kosala bongo ekondimisa bango ete oyoki makambo oyo balobi. Okosala nini soki olingi koyebisa ntina oyo olobaki to osalaki likambo moko boye? Mbala mingi, ezalaka malamu ‘opekisa mbɛbu na yo’ tii ntango okosala oyo baboti na yo bazali koluka osala. (Mas. 10:19) Soki kaka baboti na yo bamoni ete oyoki bango malamu, bango mpe bakolinga mpenza koyoka yo. Kosala makambo lokola mokóló ndenge wana ekomonisa ete Liloba ya Nzambe ezali kotambwisa yo.
Na oyo etali kosalela mbongo
11, 12. (a) Na oyo etali mbongo, Liloba ya Nzambe elendisi biso tósala nini, mpe mpo na nini? (b) Ndenge nini baboti na yo bakoki kosalisa yo na kosalela mbongo?
11 Biblia elobi ete “mbongo ebatelaka.” Kasi, vɛrsɛ yango emonisi mpe ete bwanya ezali na motuya mingi koleka mbongo. (Mos. 7:12) Liloba ya Nzambe elendisi biso tóyeba ete mbongo ezali na ntina, kasi tólinga yango te. Mpo na nini osengeli te kokolisa bolingo ya mbongo? Talá ndakisa oyo: Na mabɔkɔ ya molambi oyo ayebi mosala, mbeli ya mino ezali esaleli moko ya ntina mingi. Kasi, na mabɔkɔ ya moto oyo ayebi kosalela yango te to oyo azangi likebi, kaka mbeli yango ekoki kozokisa makasi. Ndenge moko mpe, soki osaleli yango na mayele, mbongo ekoki kosalisa. Nzokande, mbala mingi baoyo “balingaka kaka kozala bazwi” babebisaka boninga, boyokani na libota, ata mpe boyokani na bango na Nzambe. Na yango, bamitɔbɔlatɔbɔlaka na “ebele ya bampasi.”—Tángá 1 Timote 6:9, 10.
12 Ndenge nini okoki koyeba kosalela mbongo na mayele? Mpo na nini te kosɛnga baboti na yo toli mpo na ndenge ya kosalela mbongo na yo? Salomo akomaki boye: “Moto ya bwanya akoyoka mpe akozwa lisusu mateya mingi, mpe moto ya mayele nde moto oyo akómaka na makoki ya koyeba kotambwisa makambo.” (Mas. 1:5) Elenge mwasi moko na nkombo Anna atunaki baboti na ye toli mpo ayeba kotambwisa makambo. Alobi boye: “Tata ateyaki ngai ndenge ya kosalela mbongo oyo nazali na yango, mpe amonisaki ngai ntina ya kobongisa makambo mpe koyeba ndenge nazali kosalela mbongo na ngai.” Mama ya Anna mpe asalisaki ye. Anna alobi boye: “Amonisaki ngai ntina ya koyeba ntalo ya biloko na bisika ekeseni liboso ya kosomba.” Ndenge nini batoli wana esalisaki Anna? Ayanoli boye: “Sikoyo nayebi kosalela mbongo na ngai malamu. Nabimisaka mbongo ngulungulu te, yango wana nazali na bonsomi mpe na kimya ya makanisi mpo nazali na banyongo ya mpambampamba te.”
13. Ndenge nini okoki komipekisa na oyo etali kobimisa mbongo?
13 Soki ozali kosomba biloko na loyenge to mpe ozali kobimisa mbongo na yo kaka mpo na kokamwisa baninga na yo, okoki kosutuka okómi na banyongo ebele. Nini ekoki kosalisa yo okwea na mitambo wana te? Na oyo etali kobimisa mbongo, osengeli koyeba komipekisa. Yango nde Ellena, oyo azali na mbula mwa moke koleka 20 asalaka. Alobi boye: “Ntango nabimi na baninga na ngai, nabongisaka makambo liboso mpe nakataka motángo ya mbongo oyo nakolekisa te. . . . Namonaka mpe ete ezali malamu kokende kosomba kaka na baninga oyo babatelaka mbongo na bango mpe oyo bakolendisa ngai natambola naino liboso nasomba mpe nasomba te kaka eloko ya liboso oyo namoni.”
14. Mpo na nini osengeli kokeba na “nguya ya bokosi ya bomɛngo”?
14 Na bomoi, koluka mpe kosalela mbongo ezali na ntina mingi. Nzokande, Yesu alobaki ete esengo ya solosolo ezali nde mpo na “baoyo bayebi bobola na bango ya elimo.” (Mat. 5:3) Alobaki ete makambo lokola “nguya ya bokosi ya bomɛngo” ekoki kotya mposa ya moto mpo na makambo ya elimo nkaka. (Mrk. 4:19) Na yango, ezali mpenza na ntina otika Liloba ya Nzambe etambwisa yo mpe otalelaka mbongo na ndenge ya malamu!
Ntango ozali yo moko
15. Ntango nini bosembo na yo epai ya Nzambe ekoki komekama mingi?
15 Okanisi ete bosembo na yo epai ya
Nzambe ekomekama mingi ntango nini? Ntango ozali na basusu to ntango ozali yo moko? Ntango ozali na kelasi to na mosala, na ntembe te okebaka mingi na makambo oyo ekoki kobebisa elimo na yo. Ezali ntango ozali kominanola, ntango oyo ozali kokeba mingi te, nde okoki kokwea na komekama ya kobuka mitinda ya Nzambe na oyo etali bizaleli ya malamu.16. Mpo na nini osengeli kolinga kotosa Yehova ata ntango ozali yo moko?
16 Mpo na nini osengeli kolinga kotosa Yehova ata ntango ozali yo moko? Kobosana likambo oyo te: Okoki koyokisa motema ya Yehova mpasi to kosepelisa yango. (Eba. 6:5, 6; Mas. 27:11) Misala na yo ekoki koyokisa motema ya Yehova mpasi to kosepelisa yango mpo “atyelaka [yo] likebi.” (1 Pe. 5:7) Alingi oyoka ye mpo na litomba na yo moko. (Yis. 48:17, 18) Ntango basaleli mosusu ya Yehova na Yisraele ya kala babosanaki batoli na ye, bayokisaki ye motema mpasi. (Nz. 78:40, 41) Nzokande, Yehova asepelaki mingi na mosakoli Danyele; anzelu moko abengaki ye “moto oyo alingami mingi.” (Dan. 10:11) Mpo na nini? Mpo Danyele atikalaki sembo kaka na miso ya bato te kasi mpe ntango azalaki ye moko.—Tángá Danyele 6:10.
17. Mituna nini okoki komituna ntango olingi kopona ndenge ya kominanola?
17 Mpo otikala sembo epai ya Nzambe ntango ozali yo moko, osengeli kokolisa ‘makoki na yo ya kososola mpo na kokesenisa mabe ná malamu’ mpe na nsima, ‘kosalela’ makoki yango mpo na komesenisa yango, na kosaláká makambo oyo oyebi ete ezali malamu. (Ebr. 5:14) Na ndakisa, ntango ozali kopona miziki oyo okoyoka, bafilme oyo okotala, to basite ya Internet oyo okofungola, mituna oyo elandi ekoki kosalisa yo opona oyo ezali malamu mpe oboya oyo ezali mabe. Omituna boye: ‘Makambo oyo ekolendisa ngai nazala na motema mawa mingi to ekotinda ngai nasepela na “likama ya moto mosusu”?’ (Mas. 17:5) ‘Ekosalisa ngai ‘nalinga oyo ezali malamu’ to ekosala ete nazala na mpasi ya ‘koyina oyo ezali mabe’?’ (Amo. 5:15) Oyo osalaka ntango ozali yo moko, emonisaka soki opesaka motuya na makambo ya ndenge nini.—Luka 6:45.
18. Osengeli kosala nini soki osalaka likambo moko ya mabe na nkuku, mpe mpo na nini?
18 Osengeli kosala nini soki osalaka likambo moko na nkuku mpe oyebi ete ezali mabe? Kobosana te: “Ye oyo azali kozipa makambo na ye oyo ebuki mibeko akolonga te, kasi ye oyo ayamboli mpe atiki yango akoyokelama mawa.” (Mas. 28:13) Ekozala mpenza bozoba kokoba kosala likambo moko ya mabe mpe ‘koyokisa elimo santu ya Nzambe mawa’! (Ef. 4:30) Osengeli koyambola mabe na yo epai ya Nzambe mpe epai ya baboti na yo. Kosala bongo ekozala mpe mpo na bolamu na yo moko. Mpo na yango, “bankulutu ya lisangá” bakoki kosalisa yo mingi. Moyekoli Yakobo alobi boye: “Bábondela mpo na [mosali-mabe], bápakola ye mafuta na nkombo ya Yehova. Mpe libondeli ya kondima ekobikisa moto oyo azali kobɛla, mpe Yehova akotɛlɛmisa ye. Lisusu, soki asalaki masumu, akolimbisama.” (Yak. 5:14, 15) Ya solo, yango ekoki kopesa mwa nsɔni mpe kobimisa makambo mosusu ya esengo te. Kasi soki ozali na mpiko ya kosɛnga lisalisi, okobebisa lisusu makambo te mpe motema na yo ekokita mpo okozala na lisosoli ya pɛto.—Nz. 32:1-5.
Sepelisá motema ya Yehova
19, 20. Yehova alingi nini mpo na yo, kasi osengeli kosala nini?
19 Yehova azali “Nzambe ya esengo,” mpe alingi ozala na esengo. (1 Tim. 1:11) Atyelaka yo mpenza likebi. Ata soki moto mosusu te azali komona milende oyo ozali kosala mpo na kosala oyo ezali malamu, ye amonaka. Eloko moko te ebombami na miso ya Yehova. Atalatalaka, mpo na koluka mabunga te, kasi mpo na kosunga yo na milende na yo ya kosala oyo ezali malamu. “Miso [ya Nzambe] ezali kotambolatambola na mabele mobimba mpo na komonisa makasi na ye mpo na bolamu ya baoyo motema na bango ezali mobimba epai na ye.”—2 Nt. 16:9.
20 Na yango, tiká Liloba ya Nzambe etambwisa yo, mpe salelá batoli na yango. Na ndenge yango, okozwa bwanya mpe mayele oyo esengeli mpo na kolonga mikakatano mpe kozwa bikateli ya malamu na makambo minene ya bomoi. Okosepelisa baboti na yo mpe Yehova, mpe okozala na esengo ya solosolo na bomoi na yo.
[Maloba na nse ya lokasa]
^ par. 4 Bankombo mosusu ezali ya bango te.
Okopesa eyano nini?
• Bilenge bakoki kosala nini mpo bándimaka mibeko mpe mpamela ya baboti na bango kozanga mpasi?
• Mpo na nini ezali na ntina kotalela mbongo na ndenge ya malamu?
• Ndenge nini okoki kotikala sembo epai ya Yehova ata ntango ozali yo moko?
[Mituna ya boyekoli]
[Elilingi na lokasa 6]
Okotikala sembo epai ya Nzambe ntango ozali yo moko?