Mituna ya batángi
Mituna ya batángi
Ebandeli 6:3 elobi boye: “Elimo na ngai ekokanga motema seko na seko te na makambo ya moto, mpo azali se mosuni. Na yango, mikolo na ye ekozala mbula nkama moko na ntuku mibale (120).” Na maloba yango, Yehova akataki nde ete bomoi ya moto ekoki koleka mbula 120 te, mpe Noa asakolaki koya ya Mpela na boumeli ya bambula yango?
Mpo na mituna wana, eyano ezali ete te.
Liboso ya Mpela, bato mingi baumelaki bankama ya bambula na bomoi. Noa azalaki na mbula 600 ntango Mpela eyaki, mpe mikolo nyonso ya bomoi na ye ezalaki mbula 950. (Eba. 7:6; 9:29) Bato mosusu oyo babotamaki nsima ya Mpela baumelaki mpe mbula koleka 120. Arpakashade azalaki na mbula 438 ntango akufaki mpe Shela mbula 433. (Eb. 11:10-15) Kasi, na ntango ya Moize, bomoi ya moto ekitaki tii na mbula 70 to 80. (Nz. 90:10) Na yango, Ebandeli 6:3 elobaki te ete bomoi ya moto ekoki koleka mbula 120 te.
Boye, vɛrsɛ yango emonisi nde ete Nzambe ayebisaki Noa akebisa bato na boumeli ya mbula 120 mpo na libebi oyo ezalaki koya? Te. Na mabaku mingi, Nzambe asololaki na Noa. Bavɛrsɛ zomi na nsima, lisolo yango elobi boye: “Nzambe alobaki na Noa ete: ‘Nsuka ya ekelamu nyonso ya mosuni eyei liboso na ngai, mpamba te mabele etondi na mobulu.’” Na bambula oyo elandaki, Noa asilisaki mosala monene ya kotonga masuwa, mpe na ntango wana “Yehova alobaki na Noa ete: ‘Kɔtá yo ná bato nyonso ya ndako na yo na masuwa.’” (Eb. 6:13; 7:1) Mpe ezali na bisika mosusu oyo Yehova asololaki na Eba. 8:15; 9:1, 8, 17.
Noa mpo na koyebisa ye makambo mosusu.—Nzokande, Ebandeli 6:3 elobi ndenge mosusu; elobeli Noa te, mpe elobi te ete Nzambe alobaki na ye. Tokoki koloba ete vɛrsɛ yango ezalaki komonisa mokano to ekateli oyo Nzambe ye moko azwaki. (Talá mpe Ebandeli 8:21.) Tosengeli kobosana te ete, na masolo ya kala oyo elobeli makambo oyo esalemaki liboso ya ntango ya Adama, Biblia esaleli maloba lokola: “Nzambe alobaki lisusu ete.” (Eba. 1:6, 9, 14, 20, 24) Ezali polele ete Yehova azalaki koloba na moto moko te awa na mabele, mpo na ntango wana, akelaki naino moto te.
Na yango, tokoki mpenza koloba ete Ebandeli 6:3 emonisi ekateli oyo Nzambe azwaki ya kobebisa mokili mabe ya ntango wana. Yehova alobaki ete etikali mbula 120 mpo asala yango, atako Noa ayebaki yango naino te. Kasi, mpo na nini akataki ntango? Mpo na nini azelaki?
Ntoma Petro apesi bantina: “Motema molai ya Nzambe ezalaki kozela na mikolo ya Noa, ntango masuwa ezalaki kotongama, oyo na kati na yango bato moke, elingi koloba, milimo mwambe, babikaki na mai.” (1 Pe. 3:20) Ya solo, ntango Nzambe azwaki ekateli ete akoboma mokili nsima ya mbula 120, ezalaki naino na makambo oyo esengelaki kosalema. Mbula soki 20 nsima ya kozwa ekateli yango, Noa mpe mwasi na ye babandaki kobota bana. (Eba. 5:32; 7:6) Bana na bango misato ya mibali bakolaki mpe babalaki, mpe libota ekómaki na “milimo mwambe.” Na nsima, basengelaki kotonga masuwa, oyo ezalaki mosala moke te soki totaleli bonene na yango mpe bonene ya libota ya Noa. Ya solo, motema molai ya Nzambe na boumeli ya mbula 120 etikaki ntango mpo makambo wana esalema mpe epesaki mwaye ya kobatela bomoi; epesaki nzela mpo bato mwambe oyo bazalaki sembo ‘bábika na mai.’
Biblia eyebisi te mbula mpenza oyo Yehova ayebisaki Noa ete Mpela ekoya. Lokola bana na ye ya mibali babotamaki, bakolaki mpe babalaki, mbala mosusu ayebisaki ye yango ntango etikalaki mbula 40 to 50 liboso Mpela eya. Na ntango wana nde Yehova ayebisaki Noa ete: “Nsuka ya ekelamu nyonso ya mosuni eyei liboso na ngai.” Abakisaki ete Noa asengeli kotonga masuwa monene mpe kokɔta kuna ye ná libota na ye. (Eb. 6:13-18) Na bambula oyo etikalaki, Noa asukaki kaka te na komonisa ete azali ndakisa ya boyengebene na bomoi na ye. Azalaki “mosakoli ya boyengebene” oyo azalaki na nsango moko ya polele mpo na kokebisa bato: ekateli ya Nzambe ya koboma bato oyo bazalaki kotyola Nzambe na ntango wana. Noa ayebaki te liboso mpenza mbula nini Mpela ekoya, kasi ayebaki ete nsukansuka ekoya. Mpe oyebi ete eyaki.—2 Pe. 2:5.