Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Zalá na mpiko mpe zalá na makasi mpenza”

“Zalá na mpiko mpe zalá na makasi mpenza”

“Zalá na mpiko mpe zalá na makasi mpenza”

“Zalá na mpiko mpe zalá na makasi mpenza . . . Yehova Nzambe na yo azali na yo.”​—YOS. 1:7-9.

OKOPESA EYANO NINI?

Ndenge nini Enoka mpe Noa bamonisaki mpiko?

Ndenge nini basi mosusu ya ntango ya kala bamonisaki kondima mpe mpiko?

Osepelaka na bandakisa nini ya bilenge oyo bamonisaki mpiko?

1, 2. (a) Ntango mosusu esɛngaka tómonisa ezaleli nini mpo na kotikala sembo? (b) Tokotalela nini na lisolo oyo?

 KOZALA na mpiko elimboli kobanga te, kozala nsɔninsɔni te, mpe kolɛnga te. Tokoki kokanisa ete moto ya mpiko ezali kaka moto ya makasi, elombe to mpe moto oyo abangaka eloko te. Nzokande, ntango mosusu esɛngaka mpiko ata kaka mpo na kotikala sembo na bomoi ya mokolo na mokolo.

2 Bato mosusu oyo Biblia elobeli bamonisaki mpiko ntango bakutanaki na mikakatano ya makasi. Bamosusu bamonisaki ezaleli yango na makambo oyo ekómelaka basaleli nyonso ya Yehova. Bandakisa ya bato yango ya mpiko ekoki koteya biso nini? Ndenge nini tokoki komonisa mpiko?

BASAKOLAKI NA MPIKO EPAI YA BATO OYO BATYOLAKA NZAMBE

3. Enoka asakolaki nini mpo na bato oyo batyolaka Nzambe?

3 Esɛngaki kozala na mpiko mpo na kosakola maloba ya Yehova epai ya bato mabe oyo bazalaki na mokili liboso ya Mpela ya ntango ya Noa. Atako bongo, Enoka, “moto ya nsambo na molɔngɔ oyo ebandi na Adama,” asakolaki na mpiko nyonso nsango oyo: “Talá! Yehova ayei na bamiriade na ye basantu, mpo na kokata makambo ya bato nyonso, mpe kokweisa baoyo nyonso batyolaka Nzambe mpo na misala na bango nyonso ya kotyola Nzambe oyo basalaki na ndenge ya kotyola Nzambe, mpe mpo na makambo nyonso ya kozokisa oyo basumuki, oyo batyolaka Nzambe, balobaki mpo na ye.” (Yuda 14, 15) Enoka alobaki makambo yango lokola nde esilaki kosalema mpamba te esakweli yango ekokaki kozanga kokokisama te. Esalemaki mpe bongo; bato yango oyo bazalaki kotyola Nzambe bakufaki na mpela!

4. Noa “atambolaki elongo na Nzambe” na mokili oyo ezalaki na makambo ya ndenge nini?

4 Mpela ebomaki mokili na mobu 2370 L.T.B., mbula koleka 650 nsima ya Enoka. Liboso na yango, Noa abotamaki, abalaki mpe abotaki bana, mpe ye ná bana na ye batongaki masuwa. Baanzelu oyo batombokaki balataki nzoto ya bato, basangisaki nzoto na bana basi kitoko awa na mabele, mpe babotaki Banefilime. Longola yango, bato bamipesaki mingi na kosala mabe, mpe mabele etondaki na mobulu. (Eba. 6:1-5, 9, 11) Atako bongo, “Noa atambolaki elongo na Nzambe ya solo” mpe azalaki “mosakoli ya boyengebene.” (Tángá 2 Petro 2:4, 5.) Esengeli biso mpe tózala na mpiko ya ndenge wana na mikolo oyo ya nsuka.

BAMONISAKI KONDIMA MPE MPIKO

5. Ndenge nini Moize amonisaki kondima mpe mpiko?

5 Moize azalaki na kondima mpe na mpiko ya solosolo. (Ebr. 11:24-27) Kobanda mobu 1513 tii na mobu 1473 L.T.B., Nzambe apesaki ye mokumba ya kobimisa Bayisraele na Ezipito mpe kotambwisa bango na esobe. Moize amonaki ete mokumba yango eleki makasi mpo na ye, kasi andimaki yango. (Kob. 6:12) Ye ná ndeko na ye Arona bakendaki mbala na mbala kokutana na Farao, mokonzi ya Ezipito oyo azalaki moto mabe; babangaki te koyebisa ye Malɔzi Zomi oyo Yehova asengelaki kotinda mpo na kosambwisa banzambe ya Ezipito mpe kolongola bato na Ye na boombo. (Kob., mik. 7-12) Moize amonisaki kondima mpe mpiko mpamba te Nzambe azalaki kosunga ye, ndenge asungaka mpe biso.​—Mib. 33:27.

6. Ntango bakonzi ya Leta bazali kosambisa biso, nini ekosalisa biso tópesa litatoli na mpiko?

6 Tosengeli kozala na mpiko lokola Moize, mpamba te Yesu alobaki boye: “Bakomema bino na makasi liboso ya baguvɛrnɛrɛ mpe bakonzi mpo na ngai, mpo na kopesa bango mpe bikólo litatoli. Nzokande, ntango bakokaba bino, bómitungisa te mpo na ndenge oyo bokoloba to makambo oyo bokoloba; mpo bakopesa bino oyo bokoloba kaka na ngonga wana; mpo baoyo bazali koloba ezali kaka bino moko te, kasi elimo ya Tata na bino nde ezali koloba na nzela na bino.” (Mat. 10:18-20) Ntango bakonzi ya Leta bazali kosambisa biso, elimo ya Yehova ekosalisa biso tópesa litatoli na limemya, na kondima mpe na mpiko.​—Tángá Luka 12:11, 12.

7. Mpo na nini Yosua azalaki na mpiko mpe alongaki kokokisa mokumba na ye?

7 Yosua, moto oyo atambwisaki Yisraele nsima ya Moize, akómaki na kondima mpe na mpiko mpo azalaki ntango nyonso koyekola Mibeko ya Nzambe. Na mobu 1473 L.T.B., Bayisraele bakómaki pene ya kokɔta Mokili ya Ndaka. Nzambe alobaki na Yosua boye: “Zalá na mpiko mpe zalá na makasi mpenza.” Yosua alingaki kosala makambo na bwanya mpe kolonga soki atosi makambo oyo ezalaki na Mibeko. Yehova abakisaki boye: “Kolɛnga te mpe kozala na nsɔmɔ te, mpo Yehova Nzambe na yo azali na yo epai nyonso okokende.” (Yos. 1:7-9) Na ntembe te, maloba wana elendisaki mpenza Yosua! Nzambe azalaki mpenza elongo na ye. Nsima ya mbula motoba mpamba, elingi koloba na mobu 1467 L.T.B., bazwaki eteni monene ya Mokili ya Ndaka.

BASI YA MPIKO OYO BAMITYAKI NA NGÁMBO YA YEHOVA

8. Ndenge nini Rahaba amonisaki kondima mpe mpiko?

8 Basi mingi ya ntango ya kala bamonisaki mpiko mpe babangaki te komitya na ngámbo ya Yehova. Tozali na ndakisa ya Rahaba oyo azalaki kofanda na engumba Yeriko. Mwasi yango ya ndumba andimelaki Nzambe mpe abombaki mibali mibale oyo Yosua atindaki mpo na kotalatala mokili; aboyaki koyebisa basoda ya mokonzi ete bato yango bazali na ndako na ye. Ye ná libota na ye babikaki ntango Bayisraele bakweisaki Yeriko. Rahaba atikaki kindumba, akómaki kosambela Yehova na bosembo, mpe akómaki nkɔkɔ ya Masiya. (Yos. 2:1-6; 6:22, 23; Mat. 1:1, 5) Kondima mpe mpiko na ye ememelaki ye mpenza mapamboli!

9. Ndenge nini Debora, Barake, mpe Yaele bamonisaki mpiko?

9 Yosua akufaki na mobu soki 1450 L.T.B. Na nsima, basambisi bakómaki kotambwisa Yisraele. Ezalaki na eleko wana nde Yabine, mokonzi ya Kanana, anyokolaki Bayisraele mbula 20. Mpo na yango, Nzambe atindaki mosakoli-mwasi Debora alendisa Mosambisi Barake abundisa mokonzi yango. Barake ayanganisaki mibali 10 000 na Ngomba Tabore mpe amibongisaki mpo na kobunda na Sisera, mokonzi ya basoda ya Yabine. Sisera ná basoda na ye oyo bazalaki na makalo 900 bakitaki na lobwaku ya Kishone. Ntango Bayisraele mpe bazalaki kokita na lobwaku yango, Nzambe anɔkisaki mbula oyo etondisaki lobwaku yango na pɔtɔpɔtɔ mpe makalo ya Bakanana ekokaki lisusu kotambola te. Barake ná bato na ye balongaki mpe “kaa mobimba ya Sisera ekweaki na mopanga.” Sisera akimaki mpe akendaki kobombana na hema ya Yaele, kasi mwasi yango abomaki ye ntango alalaki. Na kolanda esakweli oyo Debora ayebisaki Barake, Yaele nde azwaki “lokumu” mpo na bolongi wana. Lokola Debora, Barake, mpe Yaele bamonisaki mpiko, Yisraele “ekómaki na kimya mbula ntuku minei (40).” (Bas. 4:1-9, 14-22; 5:20, 21, 31) Ebele ya mibali mpe basi oyo bazalaki kobanga Nzambe bamonisaki kondima mpe mpiko ya ndenge wana.

MALOBA NA BISO EKOKI KOPESA BASUSU MPIKO

10. Mpo na nini tokoki koloba ete maloba na biso ekoki kopesa basusu mpiko?

10 Maloba na biso ekoki kopesa bandeko na biso basambeli ya Yehova mpiko. Na ekeke 11 L.T.B., Mokonzi Davidi alobaki na mwana na ye Salomo boye: “Zalá na mpiko mpe na makasi mpe salá. Kobanga te, koyoka nsɔmɔ mpe te, mpo Yehova Nzambe, Nzambe na ngai, azali na yo. Akosundola yo te, akotika yo mpe te tii mosala nyonso ya ndako ya Yehova, oyo esengeli kosalema, ekosila.” (1 Nt. 28:20) Salomo amonisaki mpiko mpe atongaki tempelo kitoko mpo na Yehova na Yerusaleme.

11. Ndenge nini maloba ya elenge mwasi moko ya mpiko ebongolaki bomoi ya mobali moko?

11 Na ekeke ya zomi L.T.B., elenge mwasi moko ya mpiko alobaki likambo oyo esalisaki mobali moko oyo azalaki na maladi ya maba. Miyibi oyo bazalaki kokɔta na Yisraele bakangaki elenge mwasi yango mpe akómaki kosala epai ya Namana, mokonzi ya basoda ya Siri. Lokola elenge mwasi yango ayebaki makamwisi oyo mosakoli Elisa asalaki na nguya ya Yehova, ayebisaki mwasi ya nkolo na ye ete soki Namana akei na Yisraele, mosakoli yango akobikisa ye. Namana akendaki na Yisraele, abikisamaki na ndenge ya likamwisi, mpe akómaki mosambeli ya Yehova. (2 Bak. 5:1-3, 10-17) Soki ozali elenge mpe olingaka Nzambe lokola elenge oyo touti kolobela, Nzambe akoki kopesa yo mpiko mpo opesa litatoli epai ya balakisi, baninga na yo ya kelasi, mpe bato mosusu.

12. Nini esalemaki ntango bato bayokaki maloba ya Mokonzi Hizikiya?

12 Maloba ya kolendisa ekoki kopesa basusu mpiko na ntango ya mpasi. Na ekeke ya mwambe L.T.B., ntango bato ya Asiri bayaki kobundisa Yerusaleme, Mokonzi Hizikiya ayebisaki bato ya ekólo na ye boye: “Bózala na mpiko mpe na makasi. Bóbanga te, bózala na nsɔmɔ mpe te mpo na mokonzi ya Asiri mpe mpo na ebele ya bato nyonso wana oyo bazali elongo na ye; mpo baoyo bazali na biso bazali ebele koleka baoyo bazali na ye. Lobɔkɔ ya moto nde ezali elongo na ye, kasi Yehova Nzambe na biso azali elongo na biso mpo na kosalisa biso mpe kobundela biso bitumba.” Nini esalemaki ntango bato bayokaki maloba yango? Biblia elobi boye: “Bato balendisamaki na maloba ya Hizikiya mokonzi ya Yuda.” (2 Nt. 32:7, 8) Maloba ya kolendisa ndenge wana ekoki kopesa biso mpe bakristo mosusu mpiko ntango banguna bazali kotya biso mpanzi likoló.

13. Ndenge nini Obadia, mosaleli ya Mokonzi Ahaba, amonisaki mpiko?

13 Ntango mosusu, komonisa mpiko esɛngaka koboya koloba makambo mosusu. Na ekeke ya zomi L.T.B., Obadia, mosaleli ya Mokonzi Ahaba amonisaki mpiko na ndenge azwaki basakoli nkama ya Yehova mpe abombaki bango “ntuku mitano ntuku mitano na kati ya mobenga moko” mpo bábomama te ndenge Yezabele, mwasi mabe ya mokonzi yango, apesaki mitindo. (1 Bak. 18:4) Lokola Obadia, moto oyo azalaki kobanga Nzambe, lelo oyo mpe basaleli mingi ya Yehova oyo bazali sembo bamonisaka mpiko na ndenge baboyaka koyebisa banguna makambo mosusu oyo etali bandeko na bango bakristo mpo na kobatela bango.

ESTERE AMONISAKI MPIKO

14, 15. Ndenge nini Estere amonisaki kondima mpe mpiko, mpe ebimisaki mbuma nini?

14 Na ekeke ya mitano L.T.B., Estere, mwasi ya mokonzi ya Perse, amonisaki kondima makasi mpe mpiko ntango Hamane, moto moko ya motema mabe, alukaki kobomisa Bayuda nyonso na ekólo Perse. Ntango Bayuda bayokaki likambo yango, balelaki mpe bakilaki bilei; na ntembe te babondelaki mpe Nzambe na etingya. (Est. 4:1-3) Estere atungisamaki mingi. Yaya na ye Mordekai atindelaki ye mokanda ya mobeko oyo elobaki ete báboma Bayuda mpe asɛngaki ye akende kokutana na mokonzi mpo na kolobela Bayuda, bato ya ekólo na ye. Nzokande, moto nyonso oyo akɔti epai ya mokonzi kozanga bábengisa ye, azalaki kozwa etumbu ya liwa.​—Est. 4:4-11.

15 Atako bongo, Mordekai alobaki na Estere ete: ‘Soki ofandi nyɛɛ, lobiko ekouta epai mosusu. Nani ayebi soki ezali te mpo na ntango lokola oyo nde okómi na lokumu ya bokonzi?’ Estere asɛngaki Mordekai ayanganisa Bayuda na Shushane mpe bákila bilei mpo na ye. Alobaki boye: “Ngai mpe . . . nakokila bilei, mpe na nsima nakokɔta epai ya mokonzi, atako yango eyokani te na mobeko; mpe soki esengeli nakufa, nakufa.” (Est. 4:12-17) Mwasi yango amonisaki mpiko, mpe mokanda ya Estere emonisi ete Nzambe abikisaki bato na ye. Lelo oyo, bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpe bampate mosusu bamonisaka mpiko ya ndenge wana ntango bakutani na komekama mpe Yehova, “Moyoki ya libondeli” azalaka ntango nyonso pene na bango.​—Tángá Nzembo 65:2; 118:6.

“BÓZALA NA MPIKO”

16. Bilenge bakoki kolanda ndakisa ya Yesu na likambo nini?

16 Ntango Yesu azalaki na mbula 12, mokolo moko bakutaki ye na tempelo, “afandi na katikati ya bateyi mpe azali koyoka bango mpe kotuna bango mituna.” Lisusu, “baoyo nyonso bazalaki koyoka ye bazalaki se kokamwa na mayele na ye mpe na biyano na ye.” (Luka 2:41-50) Atako Yesu azalaki elenge, azalaki na kondima mpe mpiko ya kotuna mituna na mikóló oyo bazalaki bateyi na tempelo. Kokanisa ndakisa ya Yesu ekoki kosalisa bilenge na kati ya lisangá bálekisaka te libaku ya ‘koloba liboso ya moto nyonso oyo atuni bango ntina ya elikya oyo bazali na yango.’​—1 Pe. 3:15.

17. Mpo na nini Yesu alendisaki bayekoli na ye ‘bázala na mpiko,’ mpe mpo na nini biso mpe tosengeli kozala na mpiko?

17 Yesu alendisaki basusu ete ‘bázala na mpiko.’ (Mat. 9:2, 22) Alobaki na bayekoli na ye boye: “Talá! Ngonga ezali koya, kutu, esili koya, wana bokopanzana moto na moto na ndako na ye mpe bokotika ngai kaka ngai moko; nzokande nazali kaka ngai moko te, mpo Tata azali elongo na ngai. Nalobi na bino makambo oyo mpo na nzela na ngai bózala na kimya. Na mokili bozali na bolɔzi, kasi bózala na mpiko! Ngai nalongi mokili.” (Yoa. 16:32, 33) Mokili ezali koyina biso ndenge eyinaki bayekoli ya Yesu na ekeke ya liboso; atako bongo, tókóma bato ya mokili te. Komanyola na mpiko oyo Mwana ya Nzambe amonisaki ekoki kosalisa biso mpo tólanda te makambo mabe ya mokili oyo. Yesu alongaki mokili; biso mpe tokoki kolonga.​—Yoa. 17:16; Yak. 1:27.

“ZALÁ NA MPIKO!”

18, 19. Nini emonisi ete ntoma Paulo azalaki na kondima mpe na mpiko?

18 Ntoma Paulo akutanaki na mikakatano mingi. Mokolo moko, Bayuda ya Yerusaleme balingaki koboma ye soki basoda ya Roma babikisaki ye te. Na butu oyo elandaki, “Nkolo atɛlɛmaki pene na ye mpe alobaki ete: ‘Zalá na mpiko! Mpo lokola opesi litatoli malamumalamu na Yerusaleme mpo na makambo oyo etali ngai, ndenge moko mpe osengeli kopesa litatoli na Roma.’” (Mis. 23:11) Paulo asalaki mpe bongo.

19 Paulo apamelaki “bantoma minene” oyo balingaki kobebisa lisangá ya Korinti. (2 Ko. 11:5; 12:11) Bazalaki bantoma ya lokuta; kasi, Paulo atángaki makambo oyo emonisaki ete azali mpenza ntoma: akɔtaki babolɔkɔ, abɛtamaki, asalaki mibembo ya makama, mpe akutanaki na makama mosusu, nzala, mposa ya mai, kolala te butu mobimba, mpe komitungisa mpo na bandeko na ye bakristo. (Tángá 2 Bakorinti 11:23-28.) Paulo azalaki mpenza na kondima mpe na mpiko mpe nyonso wana emonisi ete Nzambe apesaki ye makasi!

20, 21. (a) Pesá ndakisa moko oyo emonisi ete tosengeli ntango nyonso kozala na mpiko. (b) Makambo nini ekoki kosɛnga ete tómonisa mpiko, mpe tokoki kozala na elikya nini?

20 Bakristo nyonso te nde bakokutana na mikakatano ya makasi. Atako bongo, biso nyonso tosengeli kozala na mpiko mpo na kolonga mikakatano ya bomoi. Tózwa ndakisa ya elenge mobali moko oyo azalaki na etuluku moko ya bato ya mobulu na Brésil. Nsima ya koyekola Biblia, elenge yango amonaki ete asengeli kotika mobulu; nzokande, mbala mingi soki moto alongwe na etuluku yango, baninga oyo batikali kuna bazalaki koboma ye. Abondelaki Yehova mpe asalelaki Biblia mpo na komonisa mokonzi na bango ntina oyo alingi kolongwa na etuluku yango. Bandimaki elenge yango alongwa mpe balukelaki ye mindɔndɔ te. Na nsima akómaki mosakoli.

21 Esɛngaka mpiko mpo na kosakola nsango malamu. Bilenge basengeli kozala na mpiko mpo bálanda te makambo mabe ya baninga na bango ya kelasi. Tosengeli kozala na mpiko mpo na kosɛnga konje mpo na kozangisa ata mokolo moko te na liyangani ya etúká. Makambo oyo esɛngaka mpiko ezali mingi. Kasi, ata soki tokutani na likambo nini, Yehova akoyoka ‘mabondeli na biso ya kondima.’ (Yak. 5:15) Akozanga te kopesa biso elimo santu na ye mpo ‘tózala na mpiko mpe na makasi mpenza’!

[Mituna ya boyekoli]

[Elilingi na lokasa 11]

Enoka asakolaki na mpiko epai ya bato oyo batyolaka Nzambe

[Elilingi na lokasa 12]

Yaele azalaki mwasi ya mpiko mpenza