Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kotika eloko moko te ekómisa yo mosika na Yehova

Kotika eloko moko te ekómisa yo mosika na Yehova

“Bópona bino moko lelo nani bino bokosalela.”​—YOS. 24:15.

1-3. (a) Mpo na nini Yosua azali ndakisa malamu ya moto oyo aponaki nzela ya malamu na bomoi na ye? (b) Likambo nini tosengeli kobosana te ntango tolingi kozwa bikateli?

LILOBA “kopona” ezali na nguya mingi. Soki moto aponi nzela to eloko moko, elingi koloba ete ye moko nde andimi yango mpe alingi bomoi na ye etambwisama ndenge wana. Tózwa ndakisa: kanisá ete moto moko azali kotambola na nzela mpe mbala moko amoni ete nzela yango ekabwani na banzela mibale. Nzela nini akopona? Soki moto yango ayebi esika oyo azali kokende, na ntembe te nzela moko ekomema ye pene na esika yango, kasi nzela mosusu ekoki komema ye mosika na esika yango.

2 Biblia elobeli bato mingi oyo bakutanaki na likambo ya ndenge wana. Na ndakisa, Kaina asengelaki kopona soki akobimisa nkanda na ye nyonso to akopekisa yango. (Eba. 4:6, 7) Yosua asengelaki kopona soki akosalela Nzambe ya solo to akosambela banzambe ya lokuta. (Yos. 24:15) Yosua azalaki na mokano ya kotikala pene na Yehova; yango wana aponaki nzela oyo esalisaki ye akokisa mokano yango. Kaina azalaki na mokano ya ndenge wana te, yango wana aponaki nzela oyo ekomisaki ye mosika na Yehova.

3 Na bantango mosusu, esɛngaka ete biso mpe tózwa bikateli ya ntina mingi mpo tókoka kotikala na nzela ya malamu. Yango wana, tosengeli kobosana te ete nzela oyo toponi kolanda ekoki kopesa Yehova lokumu mpe kosalisa biso tótikala pene na ye to kokómisa biso mosika na ye. (Tángá Baebre 3:12.) Na lisolo oyo mpe oyo elandi, tokotalela makambo nsambo ya bomoi na biso oyo tosengeli kotika te ete ekómisa biso mosika na Yehova.

MOSALA

4. Mpo na nini mosala ezali na ntina?

4 Bakristo bazali na mokumba ya kokokisa bamposa na bango moko mpe oyo ya mabota na bango. Biblia emonisi ete soki moto alingi te kokokisa bamposa ya bato ya ndako na ye te, azali mabe koleka moto oyo azali na kondima te. (2 Tes. 3:10; 1 Tim. 5:8) Ya solo, mosala ezali na ntina mingi na bomoi na biso. Kasi soki tokebi te, mosala ekoki kokómisa biso mosika na Yehova. Na ndenge nini?

5. Makambo nini ya ntina tosengeli kotalela liboso ya kondima mosala moko?

5 Kanisá ete ozali koluka mosala. Soki ofandi na mboka oyo kozwa mosala ezalaka pɛtɛɛ te, mbala mosusu okoki kokanisa ete osengeli kondima mosala ya liboso to mpe mosala nyonso oyo bapesi yo. Kasi okosala nini soki mosala yango eyokani te na mitinda ya Biblia? Okosala nini soki programɛ ya mosala yango mpe ntango oyo ekobanda kozwa yo mpo na kokende mpe kozonga ekopekisa yo olekisaka ntango mingi na makambo ya elimo to elongo na libota na yo? Okondima kaka mosala yango, mpo okanisi ete eleki malamu ondima ata mosala ya mabe na esika ozala na mosala te? Kobosana te ete soki oponi nzela ya mabe, yango ekoki kokómisa yo mosika na Yehova. (Ebr. 2:1) Ezala ozali koluka mosala to ozali kotala soki osengeli koluka mosala mosusu, ndenge nini okoki kozwa bikateli ya malamu?

6, 7. (a) Mikano nini mibale moto akoki kozala na yango na oyo etali mosala? (b) Mokano nini ekosalisa yo ozala pene na Yehova, mpe mpo na nini?

6 Ndenge tomonaki yango liboso, osengeli kobosana te esika oyo ozali kokende. Omituna boye: ‘Nalingi ete mosala yango esalisa ngai na nini?’ Soki otalelaka mosala lokola nzela ya kokokisa bamposa na yo mpe oyo ya libota na yo mpo bókoba kosalela Nzambe, Yehova akopambola milende oyo ozali kosala. (Mat. 6:33) Lobɔkɔ ya Yehova ezali mokuse te; akoki kosalisa yo soki obungisi mosala na yo to ntango nkita ekwei na mbalakaka. (Yis. 59:1) Yehova “ayebi kosikola na komekama bato oyo bakangamaka na Nzambe.”​—2 Pe. 2:9.

7 Kasi ezali boni soki olingi ete mosala na yo esalisa yo okóma na mbongo mingi? Mbala mosusu okokokisa mokano na yo. Kasi, ata soki okómi na mbongo mingi, kobosana te ete kosala mosala kaka mpo na kokóma mozwi ekoki kozala likama. (Tángá 1 Timote 6:9, 10.) Soki bozwi mpe mosala ezali makambo oyo eleki ntina na bomoi na yo, ekoki kokómisa yo mosika na Yehova.

8, 9. Mituna nini baboti basengeli komituna na oyo etali mosala, mpe mpo na nini?

8 Soki ozali moboti, osengeli koyeba ete bana na yo bakoki kolanda ndakisa na yo. Bana na yo bamonaka ete eloko nini eleki ntina mpo na yo? Mosala na yo to boninga na yo ná Yehova? Soki bamonaka ete na bomoi na yo, olukaka libosoliboso nde kozala moto monene, kozala na lokumu mingi, mpe kozala na mbongo mingi, omoni te ete bakoki kolanda yo na nzela wana ya mabe? Bakozala kaka na limemya mpo na yo? Elenge mwasi moko oyo azali mokristo alobi boye: “Nabosanaka te ete mpo na papa, mosala ezalaki likambo ya liboso na bomoi na ye. Na ebandeli, ezalaki komonana lokola nde azalaki kosala mingi mpo azalaki na mposa ete libota na biso ezala na biloko nyonso oyo eleki malamu. Alingaki ete bamposa na biso ekokisama malamu. Kasi na bambula oyo euti koleka, makambo ebongwanaki. Papa akómaki kosala ntango nyonso, mpe azalaki kosomba biloko ya ntalo mingi, kasi ezalaki te biloko oyo tozalaki mpenza na mposa na yango. Na yango, toyebanaki lokola libota moko ya bato ya mbongo, kasi te lokola libota oyo elendisaka basusu básalela Yehova. Nalingaki kosepela mingi soki papa akómaki kosala mingi mpo na kosalisa biso tókoba kozala pene na Yehova, na esika ete asalaka mingi mpo na kozala na mbongo mingi.”

9 Baboti, bótika te ete mosala na bino ekómisa bino mosika na Yehova. Na ndakisa oyo bozali kopesa, bósalisa bana na bino bámona ete bondimaka mpenza ete bozwi oyo eleki ntina ezali ya elimo, kasi ya mosuni te.​—Mat. 5:3.

10. Makambo nini elenge asengeli kotalela ntango alingi kopona mosala oyo akosala na bomoi na ye?

10 Soki ozali elenge mpe ozali kokanisa mosala nini osengeli kosala na bomoi na yo, ndenge nini okoki kopona nzela ya malamu? Ndenge tomonaki yango liboso, osengeli koyeba esika oyo ozali kokende. Formasyo oyo olingi kozwa mpe mosala oyo olingi kosala ekosalisa yo otya mosala ya Yehova na esika ya liboso to ekokómisa yo nde mosika na Yehova? (2 Tim. 4:10) Olingi kozala lokola bato oyo bayebi Yehova te, oyo bazalaka na esengo kaka soki bazali na mbongo mingi? To okozala nde na kondima lokola Davidi, oyo akomaki ete: “Nazalaki elenge, nakómi mpe mobange, kasi namoná naino te moyengebene asundolami mpenza, to bana na ye bazali koluka limpa.” (Nz. 37:25) Kobosana te ete nzela moko ekoki kokómisa yo mosika na Yehova, kasi mosusu ekoki kosalisa yo ozala na bomoi oyo eleki malamu. (Tángá Masese 10:22; Malaki 3:10.) Okopona nzela nini? *

MASANO MPE KOMINANOLA

11. Biblia elobi nini na oyo etali masano mpe kominanola, mpe likambo nini tosengeli kobosana te?

11 Biblia epekisi kosakana te; emonisi mpe te ete kominanola to masano ezali kolekisa ntango mpamba. Paulo akomelaki Timote ete: “Ngalasisi ya nzoto ezali na litomba na mwa makambo moke.” (1 Tim. 4:8) Kutu Biblia elobi ete ezali na “ntango ya kosɛka” mpe “ntango ya kopumbwapumbwa,” mpe elendisaka biso ete tózwaka mwa ntango ya kopema. (Mos. 3:4; 4:6) Kasi soki tokebi te, masano mpe kominanola ekoki kokómisa biso mosika na Yehova. Na ndenge nini? Likama ekoki kouta na makambo oyo mibale: lolenge ya kominanola to masano oyo tozali kopona mpe ntango oyo tozali kolekisa na yango.

Kominanola ya malamu mpe oyo elyaka ntango mingi te epesaka esengo

12. Makambo nini osengeli kotalela ntango olingi kopona lolenge moko ya masano to ya kominanola?

12 Liboso, osengeli kotalela lolenge ya kominanola to masano oyo oponi. Ya solo, masano mpe kominanola ya malamu ezali. Kasi, masano mpe kominanola mingi etindaka bato básala makambo oyo Nzambe ayini, na ndakisa mobulu, misala ya bilimo mabe, mpe kosangisa nzoto na ndenge ya mbindo. Yango wana, tosengeli kotalela malamumalamu lolenge ya kominanola to masano oyo tolingi kopona. Tosengeli komituna boye: Ekotinda ngai nakóma na bizaleli ya malamu to ya mabe? Ekotinda ngai nakóma na elimo ya mobulu, elimo ya kowelana, to bolingo ya ekólo? (Mas. 3:31) Ekolya ngai mbongo? Ekobɛtisa basusu libaku? (Rom. 14:21) Masano mpe kominanola oyo olingi kopona ekosala ete osangana na bato ya ndenge nini? (Mas. 13:20) Ekokolisa epai na yo mposa ya kosala makambo ya mabe?​—Yak. 1:14, 15.

13, 14. Makambo nini osengeli kotalela na oyo etali ntango oyo osengeli kolekisa na kominanola?

13 Osengeli mpe kotalela ntango oyo okolekisa na kominanola to masano yango. Omituna boye: ‘Nalekisaka ntango mingi mpo na kominanola mpe yango esalaka ete natikala kaka na ntango moke mpo na makambo ya elimo?’ Soki oponi kolekisa ntango mingi na masano mpe kominanola, okoyoka mpenza esengo na yango te ndenge okanisaki. Kutu, baoyo batikaka kominanola na esika na yango nde bayokaka esengo mingi koleka. Mpo na nini? Mpamba te lokola bayebaka ete bakokisaki liboso “makambo oyo eleki ntina,” lisosoli na bango etungisaka bango te soki bazwi mwa ntango mpo na kominanola.​—Tángá Bafilipi 1:10, 11.

14 Atako kolekisa ntango mingi na kominanola ekoki mbala mosusu komonana lokola nde epesaka esengo, kolanda nzela wana ekoki kokómisa yo mosika na Yehova. Kim, ndeko mwasi moko ya mbula 20 azwaki liteya na likambo yango. Alobi boye: “Liboso, nazalaki kokende bafɛti na nsuka ya pɔsɔ nyonso, na mokolo ya mitano, ya pɔsɔ mpe ya lomingo. Kasi sikoyo, nakóma komona ete ezali na makambo mosusu eleki ntina oyo nasengeli kosala. Na ndakisa, lokola nazali mobongisi-nzela, nalamukaka na ngonga ya motoba (6:00) ya ntɔngɔ mpo na kobima na mosala ya kosakola; yango wana nakoki te kotikala na fɛti tii na ngonga ya liboso (1:00) to ya mibale (2:00) ya butu. Nayebi ete bafɛti ezalaka ntango nyonso mabe te, kasi ekoki kolongola likebi na biso na makambo eleki ntina. Lokola eloko mosusu nyonso, esengeli kotika bafɛti na esika na yango.”

15. Ndenge nini baboti bakoki kosalisa bana na bango bápona masano to kominanola oyo ekozala malamu mpo na bango?

15 Baboti bazali na mokumba ya kokokisa bamposa ya mosuni, ya elimo, mpe ya motema, ezala ya bango moko to ya bana na bango. Mpo na yango, basengeli mpe kozwaka bibongiseli mpo na kominanola. Soki ozali moboti, osengeli te kopekisa bana na yo lolenge nyonso ya masano to ya kominanola. Atako bongo, osengeli kokebisa bango na masano mpe kominanola oyo ekoki kobebisa bango. (1 Ko. 5:6) Soki okanisi malamu liboso, okoki kozwa masano mpe kominanola oyo ekozala mpenza malamu mpo na libota na yo. * Soki osali bongo, yo ná bana na yo bokopona nzela oyo ekosalisa bino bózala pene na Yehova.

BOYOKANI NA KATI YA LIBOTA

16, 17. Likambo nini ya mawa epesaka baboti mingi mpasi, mpe ndenge nini toyebi ete Yehova ayebi mpasi na bango?

16 Boyokani oyo ezalaka kati na moboti mpe mwana na ye ezalaka makasi mpenza, yango wana Yehova azwaki ndakisa ya boyokani yango mpo na komonisa ndenge oyo ye moko alingaka basaleli na ye. (Yis. 49:15) Na yango, ezali mabe te koyoka mpasi mingi soki moto moko ya libota na biso atiki Yehova. Ndeko mwasi moko, oyo mwana na ye ya mwasi abimisamaki na lisangá alobi boye: “Esalaki ngai mpasi mingi, mpe nazalaki komituna boye: ‘Mpo na nini atiki Yehova?’ Namiyokaki lokola namemi ngambo mpe nazalaki komipesa foti.”

17 Yehova ayebi mpasi oyo ozali koyoka. Ye moko mpe “ayokaki mpasi na motema na ye” ntango mwana na ye ya liboso awa na mabele, mpe na nsima, pene na bato nyonso oyo bazalaki na bomoi liboso ya Mpela, batombokelaki ye. (Eba. 6:5, 6) Soki likambo ya ndenge wana ekómelá yo naino te, mbala mosusu okoyeba te ndenge oyo yango esalaka mpasi. Atako bongo, ekozala malamu te tótika ete etamboli mabe ya moto ya libota na biso oyo abimisami na lisangá ekómisa biso mosika na Yehova. Na yango, ndenge nini okoki kosala mpo mawa na yo eleka ndelo te ntango moto moko ya libota na yo atiki Yehova?

18. Mpo na nini baboti basengeli te komipesa foti soki mwana na bango moko atiki Yehova?

18 Komipesa foti te mpo na likambo oyo esalemi. Yehova atikelá moto na moto bonsomi ya kopona nzela oyo alingi kolanda, mpe moto mokomoko ya libota na yo oyo amipesá epai ya Yehova mpe azwá batisimo “akomema mokumba na ye moko.” (Gal. 6:5) Na miso ya Yehova, mosumuki nde azali na ngambo mpo na nzela oyo aponi kolanda, kasi yo te. (Ezk. 18:20) Lisusu, osengeli te kopesa basusu foti. Osengeli nde kotosa ebongiseli oyo Yehova azwi mpo na kopesa disiplini na moto oyo asali lisumu. Osengeli kotɛmɛla nde Zabolo, kasi te bankulutu oyo bazali na mokumba ya kobatela lisangá.​—1 Pe. 5:8, 9.

Ezali mabe te ozala na elikya ete mokolo mosusu moto oyo olingaka akozongela Yehova

19, 20. (a) Baboti oyo mwana na bango abimisami na lisangá bakoki kosala nini mpo mawa na bango eleka ndelo te? (b) Elikya nini baboti yango bakoki kozala na yango?

19 Longola yango, soki oponi kokangela Yehova nkanda, okomikómisa nde mosika na ye. Ya solo, moto wana ya libota na yo asengeli komona ete ozali na ekateli ya kolinga Yehova mingi koleka eloko mosusu nyonso, koleka ata boyokani na bino na libota. Yango wana, mpo olonga ntango likambo ya ndenge wana ekómeli yo, osengeli kosala nyonso obatela boyokani na yo ná Yehova. Komitangola te na bandeko basi mpe mibali ya lisangá oyo bazali sembo. (Mas. 18:1) Fungolelá Yehova motema na yo na libondeli. (Nz. 62:7, 8) Koluka te kokakola mobeko ya Yehova mpo na kozala na boyokani ya pene na moto ya libota na yo oyo abimisamá na lisangá, na ndakisa na nzela ya telefone to Internet. (1 Ko. 5:11) Zalá ntango nyonso na mingi ya kosala na mosala ya Yehova. (1 Ko. 15:58) Ndeko mwasi oyo tolobelaki liboso alobi boye: “Nayebi ete nasengeli kozala ntango nyonso na mingi ya kosala na mosala ya Yehova mpe kozala ntango nyonso makasi na elimo mpo nakoka kosalisa mwana na ngai ya mwasi ntango akozongela Yehova.”

20 Biblia elobi ete bolingo “elikyaka makambo nyonso.” (1 Ko. 13:4, 7) Ezali mabe te ozala ntango nyonso na elikya ete mokolo mosusu moto ya libota na yo akozongela Yehova. Mbula nyonso, basumuki mingi babongolaka mitema mpe bazongisamaka na lisangá. Yehova akangelaka bango nkanda te ntango babongoli motema. Kutu, ‘asepelaka kolimbisa.’​—Nz. 86:5.

PONÁ NZELA YA MALAMU

21, 22. Ekateli na yo ezali nini na oyo etali kosalela bonsomi na yo ya kopona?

21 Yehova apesá biso bato bonsomi ya kopona. (Tángá Mibeko 30:19, 20.) Kasi bonsomi yango epesi biso mpe mokumba monene. Mokristo mokomoko asengeli komituna boye: ‘Nzela nini nazali kolanda? Natiki nde ete mosala, masano mpe kominanola, to boyokani na ngai ná bato ya libota ekómisa ngai mosika na Yehova?’

22 Bolingo oyo Yehova azalaka na yango mpo na basaleli na ye esilaka te. Eloko moko te ekoki kokabola biso na Yehova, longola kaka soki biso moko toponi kolanda nzela ya mabe. (Rom. 8:38, 39) Kasi, kotika te ete yango esalema! Zalá na ekateli ya kotika te ete eloko moko ekómisa yo mosika na Yehova. Lisolo oyo elandi ekolobela makambo mosusu minei, oyo tosengeli kotika te ete ekómisa biso mosika na Yehova.

^ par. 10 Mpo na koyeba makambo mosusu na oyo etali kopona mosala, talá mokapo 38 ya buku Mituna oyo bilenge batunaka​Biyano oyo ebongi, volimi 2.

^ par. 15 Mpo na kozwa makanisi mosusu, talá Lamuká! ya sanza ya zomi na moko 2011, nkasa 17-19, na Lifalanse.