Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Zalá na mpiko​—Yehova azali na yo!

Zalá na mpiko​—Yehova azali na yo!

“Zalá na mpiko mpe zalá na makasi. . . . Yehova Nzambe na yo azali na yo.”​—YOS. 1:9.

1, 2. (a) Bizaleli nini ekosalisa biso tólonga komekama? (b) Kondima ezali nini? Pesá ndakisa.

MOSALA ya Yehova epesaka biso esengo. Atako bongo, tokutanaka na mikakatano lokola bato nyonso, mpe tokoki “konyokwama mpo na boyengebene.” (1 Pe. 3:14; 5:8, 9; 1 Ko. 10:13) Mpo tólonga komekama yango, tosengeli kozala na kondima mpe na mpiko.

2 Kondima ezali nini? Ntoma Paulo akomaki ete: “Kondima ezali ezaleli ya kozela na motema mobimba biloko oyo ozali kolikya kozwa, ezali elembeteli oyo ezali komonisa bosolo ya makambo atako ezali komonana te.” (Ebr. 11:1) Libongoli mosusu ya Biblia (The Simple English Bible) elobi ete: “Kondima ezali kozala na ndanga ete okozwa biloko oyo ozali kozela. Kondima ezali kozanga kotya ntembe na makambo oyo tokoki komona te.” Na ndakisa, soki bapesi biso buku ya lopango, tokondima ete lopango yango ekómi ya biso. Ndenge moko mpe, lokola tozali na kondima ete Nzambe akokisaka ntango nyonso bilaka na ye, ezali lokola nde bapesi biso mokanda moko oyo ezali ndanga ete tokozwa eloko moko ya motuya. Kondima oyo tozali na yango esalaka ete tótya ntembe te ete bilaka oyo ezali na Biblia ekokokisama mpenza, mpe tondimaka makambo oyo Nzambe alaki atako tokoki komona yango te.

3, 4. (a) Mpiko ezali nini? (b) Wapi lolenge moko ya kokómisa kondima na biso makasi mpe kobakisa mpiko na biso?

3 Diksionɛrɛ moko (The New Interpreter’s Dictionary of the Bible) elobi ete liloba mpiko elimboli “makasi ya elimo, ya makanisi, mpe ya bizaleli oyo esalisaka moto aloba mpe asala makambo kozanga kobanga ntango akutani na mikakatano mpe makama.” Kozala na mpiko elimboli kozala makasi mpe kobanga te, ata liboso ya mikakatano.​—Mrk. 6:49, 50; 2 Tim. 1:7.

4 Kondima mpe mpiko ezali bizaleli oyo tosengeli kolona. Kasi tokosala nini soki tomoni ete tosengeli kokóma na kondima makasi mpe tozali na mpiko te? Biblia elobeli basaleli mingi ya Nzambe oyo bamonisaki kondima mpe mpiko. Na yango, lolenge moko oyo tokoki kokómisa kondima na biso makasi mpe kobakisa mpiko na biso ezali ya kotalela bandakisa yango mosusu.

YEHOVA AZALAKI NA YOSUA

5. Mpo Yosua akokisa mokumba na ye malamu, asengelaki na nini?

5 Tótalela likambo moko oyo esalemaki esili koleka mbula soki 3500. Mbula 40 esilaki koleka banda Yehova asalelaki lobɔkɔ na ye ya nguya mpo na kolongola bamilio ya Bayisraele na boombo na Ezipito. Mosakoli Moize nde azalaki kokamba bango. Ntango akómaki na mbula 120, amonaki Mokili ya Ndaka kaka na mosika mpe na nsima akufaki likoló ya Ngomba Nebo. Mokitani na ye ezalaki Yosua, moto oyo “atondaki na elimo ya bwanya.” (Mib. 34:1-9) Bayisraele bazalaki pene ya kokɔta na mokili ya Kanana. Mpo Yosua akamba bango malamu, asengelaki na bwanya oyo euti epai ya Nzambe. Asengelaki mpe komonisa kondima epai ya Yehova mpe kozala na mpiko mpe makasi.​—Mib. 31:22, 23.

6. (a) Ndenge Yosua 23:6 emonisi yango, tosengeli na mpiko mpo na kosala nini? (b) Maloba oyo ezali na Misala 4:18-20 mpe Misala 5:29 eteyi biso nini?

6 Na ntembe te, bwanya, mpiko, mpe kondima oyo Yosua amonisaki na boumeli ya ntango molai oyo Bayisraele bazalaki kobɔtɔla mokili ya Kanana elendisaki bango mingi. Nzokande, longola kozala makasi na bitumba, basengelaki mpe kozala na mpiko mpo na kosala oyo Yosua asɛngaki bango. Na maloba na ye ya nsuka liboso akufa, Yosua alobaki ete: “Bosengeli kozala na mpiko mpenza mpo na kotosa mpe kosalela nyonso oyo ekomami na buku ya mobeko ya Moize ete bópɛngwa na yango soki moke te mpo na kokende na lobɔkɔ ya mobali to na lobɔkɔ ya mwasi.” (Yos. 23:6) Biso mpe tosengeli kozala na mpiko mpo na kotosa Yehova ntango nyonso, mingimingi ntango bato bazali kotinda biso tósala makambo oyo eyokani te na mokano ya Nzambe. (Tángá Misala 4:18-20; 5:29.) Soki tozali kobondela Yehova mpe kotyela ye motema, akosalisa biso tómonisa mpiko ya ndenge wana.

NDENGE OYO TOKOKI KOLONGISA NZELA NA BISO

7. Mpo Yosua asala makambo na mpiko mpe alonga, asengelaki kosala nini?

7 Mpo tózwa mpiko oyo tosengeli na yango mpo na kosala mokano ya Nzambe, tosengeli koyekola Liloba na ye mpe kosalela yango. Yango nde likambo oyo Nzambe ayebisaki Yosua asala ntango akómaki mokitani ya Moize; alobaki ete: “Zalá na mpiko mpe zalá na makasi mpenza mpo okeba ete otosa makambo nyonso ndenge ezali na mobeko oyo Moize, mosaleli na ngai, apesaki yo mitindo. . . . Buku oyo ya mobeko esengeli kolongwa na monɔkɔ na yo te, mpe osengeli kotángaka yango na mongongo ya nse butu moi, mpo okeba ete otosa makambo nyonso ndenge ekomami na kati na yango; mpo, na ndenge yango nde okolongisa nzela na yo mpe na ndenge yango nde okosala makambo na bwanya.” (Yos. 1:7, 8) Lokola Yosua alandaki toli wana, ‘alongisaki nzela na ye.’ Soki biso mpe tosali bongo, tokokóma na mpiko mingi mpe tokolonga na mosala ya Nzambe.

Mokapo ya mobu 2013: “Zalá na mpiko mpe zalá na makasi. . . . Yehova Nzambe na yo azali na yo.”​—Yosua 1:9

8. Mokapo ya mobu 2013 ezwami na vɛrsɛ nini, mpe ndenge nini maloba yango ekosalisa yo?

8 Na ntembe te, Yosua alendisamaki mingi ntango ayokaki maloba mosusu oyo Yehova ayebisaki ye ete: “Zalá na mpiko mpe zalá na makasi. Kolɛnga te mpe kozala na nsɔmɔ te, mpo Yehova Nzambe na yo azali na yo epai nyonso okokende.” (Yos. 1:9) Yehova azali mpe na biso. Yango wana tosengeli “kolɛnga te mpe kozala na nsɔmɔ te,” ata soki tokutani na komekama ya ndenge nini. Maloba: “Zalá na mpiko mpe zalá na makasi. . . . Yehova Nzambe na yo azali na yo” esengeli mpenza kobenda likebi na biso. Maloba wana ya Yosua 1:9 eponami lokola mokapo ya mobu 2013. Na ntembe te, maloba yango ekolendisa biso na basanza oyo ezali koya, kaka ndenge maloba mpe misala ya bato mosusu oyo bamonisaki kondima mpe mpiko elendisaka biso.

NA MPIKO NYONSO, BAPONAKI KOSALA MOKANO YA NZAMBE

9. Na makambo nini Rahaba amonisaki kondima mpe mpiko?

9 Ntango Yosua atindaki banɔngi mibale na Kanana, Rahaba, mwasi moko ya ndumba abombaki bango mpe atindaki banguna na bango na nzela mosusu. Lokola asalaki makambo oyo emonisaki kondima mpe mpiko, ye ná bato ya libota na ye babatelamaki ntango Bayisraele bakweisaki engumba Yeriko. (Ebr. 11:30, 31; Yak. 2:25) Na ntembe te, Rahaba atikaki bomoi na ye ya mbindo mpo na kosepelisa Yehova. Bato mosusu oyo bakómaki bakristo bamonisaki kondima, mpiko, mpe babongolaki bizaleli na bango mpo na kosepelisa Nzambe.

10. Nsima ya kokutana na makambo nini Ruta amityaki na ngámbo ya losambo ya solo, mpe yango ememelaki ye mapamboli nini?

10 Nsima ya liwa ya Yosua, Ruta, oyo azalaki Momoabe, amityaki na mpiko nyonso na ngámbo ya losambo ya solo. Lokola mobali na ye oyo akufaki azalaki Moyisraele, ekoki kozala ete ayebaki mwa makambo oyo etali Yehova. Naomi, mama-bokilo na ye oyo mobali na ye mpe akufaki, afandaki na Moabe kasi azwaki ekateli ya kozonga na engumba Beteleme, na Yisraele. Nzelanzela, Naomi azalaki koyebisa Ruta azonga epai ya bato na ye, kasi Ruta azongisaki ete: “Kobondela ngai te ete nasundola yo, nazonga, natika yo. . . . Bato na yo bakozala bato na ngai, mpe Nzambe na yo Nzambe na ngai.” (Ruta 1:16) Ruta asalaki kaka ndenge alobaki. Na nsima, Boaze, ndeko moko ya mobali ya Naomi, abalaki Ruta, oyo abotaki mwana mobali mpe akómaki moko ya bankɔkɔ ya Davidi mpe ya Yesu. Ya solo, Yehova apambolaka bato oyo bamonisaka kondima mpe mpiko.​—Ruta 2:12; 4:17-22; Mat. 1:1-6.

MINGI BATYAKI BOMOI NA BANGO NA LIKAMA!

11. Ndenge nini Yehoyada ná Yehosheba bamonisaki mpiko, mpe yango ebimisaki matomba nini?

11 Kondima mpe mpiko na biso ekómaka lisusu makasi ntango tomoni ete Nzambe azali na baoyo bazali kotya matomba na ye mpe bolamu ya basaleli na ye mosusu liboso ya matomba na bango moko. Tózwa ndakisa ya Nganga-nzambe monene Yehoyada ná mwasi na ye Yehosheba. Nsima ya liwa ya Mokonzi Ahazia, mama na ye Atalia abomaki bana nyonso ya mokonzi, longola kaka Yehoashe, mpe amikómisaki mokonzi. Yehoyada ná Yehosheba batyaki bomoi na bango na likama na ndenge babikisaki Yehoashe, mwana ya Ahazia, mpe babombaki ye na boumeli ya mbula motoba. Na mbula ya nsambo, Yehoyada asakolaki ete Yehoashe akómi mokonzi mpe abomisaki Atalia. (2 Bak. 11:1-16) Na nsima, Yehoyada apesaki Mokonzi Yehoashe mabɔkɔ na mosala ya kobongisa tempelo. Mpe ntango Yehoyada akufaki wana azalaki na mbula 130, akundamaki esika moko ná bakonzi “mpo asalaki malamu na Yisraele mpe epai ya Nzambe ya solo ná ndako na Ye.” (2 Nt. 24:15, 16) Mpiko oyo Yehoyada ná mwasi na ye bamonisaki esalaki ete molɔngɔ ya bakonzi oyo ebandaki na Davidi mpe esengelaki kobimisa Masiya ebatelama.

12. Ndenge nini Ebede-meleke amonisaki mpiko?

12 Ebede-meleke, mokube moko oyo azalaki kosala na ndako ya Mokonzi Zidikiya, atyaki bomoi na ye na likama mpo na Yirimia. Mokonzi akabaki Yirimia na mabɔkɔ ya bankumu ya Yuda, oyo bakoselaki ye makambo ete azali kotinda bato bátomboka mpe babwakaki ye na libulu ya kobomba mai oyo ezalaki na pɔtɔpɔtɔ, mpo akufa. (Yir. 38:4-6) Ebede-meleke asɛngaki Zidikiya abikisa mosakoli Yirimia, atako yango ezalaki mpenza likama mpo na bomoi na ye mpamba te bato mingi bazalaki koyina Yirimia. Zidikiya andimaki mpe apesaki Ebede-meleke mibali 30 mpo bákende kobimisa Yirimia na libulu wana. Na nzela ya mosakoli Yirimia, Nzambe ayebisaki Ebede-meleke ete akokufa te ntango bato ya Babilone bakoya kobebisa Yerusaleme. (Yir. 39:15-18) Yango emonisi ete Nzambe apesaka mbano na baoyo bamonisaka mpiko mpo na kosala mokano na ye.

13. Ndenge nini Baebre misato bamonisaki mpiko, mpe ndenge nini lisolo na bango ekoki kosalisa biso?

13 Na siɛklɛ ya nsambo L.T.B., basaleli misato ya Yehova oyo bazalaki Baebre bamonaki polele ete Nzambe apesaka mbano na bato oyo bamonisaka kondima mpe mpiko. Mokonzi Nebukadenezare ayanganisaki bato ya lokumu ya Babilone mpe ayebisaki bango básambela ekeko molai ya wolo oyo asalaki. Moto nyonso oyo akosambela ekeko yango te asengelaki kobwakama na litumbu ya mɔtɔ oyo ezali kopela. Baebre yango misato bayebisaki Nebukadenezare na limemya ete: “Nzambe na biso oyo tozali kosalela akoki kobikisa biso. Akobikisa biso na litumbu ya mɔtɔ oyo ezali kopela mpe na lobɔkɔ na yo, Ee Mokonzi. Kasi soki bongo te, Ee mokonzi, yebá ete tosalelaka banzambe na yo te, mpe ekeko ya wolo oyo otɛlɛmisi, tokosambela yango te.” (Dan. 3:16-18) Danyele 3:19-30 elobeli ndenge oyo Baebre yango misato babikisamaki na ndenge ya kokamwa. Ata soki babwaki biso te na litumbu ya mɔtɔ oyo ezali kopela, tokutanaka na makambo oyo etyaka bosembo na biso na komekama mpe tokoki mpenza kondima ete Nzambe akopambola biso soki tozali komonisa kondima mpe mpiko.

14. Na kotalela Danyele mokapo 6, ndenge nini Danyele amonisaki mpiko, mpe mbano nini azwaki?

14 Danyele amonisaki kondima mpe mpiko ntango banguna na ye batyaki Dariuse mokonzi mbamba mpo abimisa mobeko ete: “Moto nyonso oyo akosala lilɔmbɔ epai ya nzambe mosusu to moto mosusu, kasi epai na yo te, Ee mokonzi, asengeli kobwakama na libulu ya bankɔsi.” Ntango kaka Danyele ayebaki ete mokonzi atye lobɔkɔ na mokanda yango, “akɔtaki na ndako na ye, mpe maninisa ya shambrɛ na ye ya likoló na ngámbo ya Yerusaleme ezalaki polele, ɛɛ, mbala misato na mokolo azalaki kofukama na mabɔlɔngɔ na ye mpe kobondela mpe kopesa masanzoli liboso ya Nzambe na ye, ndenge azalaki kosala mbala na mbala liboso ya likambo yango.” (Dan. 6:6-10) Danyele mobali ya mpiko abwakamaki na libulu ya bankɔsi, kasi Yehova abikisaki ye.​—Dan. 6:16-23.

15. (a) Ndakisa nini ya kondima mpe mpiko Akila ná Prisile batikaki? (b) Maloba ya Yesu oyo ezali na Yoane 13:34 elimboli nini, mpe ndenge nini bakristo mingi bamonisaki bolingo ya ndenge wana?

15 Akila ná Prisile bakutanaki na mikakatano oyo Biblia elobeli polele te mpe ‘batyaki bomoi na bango na likama mpo na molimo ya Paulo.’ (Mis. 18:2; Rom. 16:3, 4) Na mpiko nyonso, batosaki maloba ya Yesu oyo elobi ete: “Nazali kopesa bino mobeko ya sika: bólinganaka bino na bino; ndenge ngai nalingaki bino, bino mpe bólinganaka bino na bino.” (Yoa. 13:34) Mobeko ya Moize ezalaki kosɛnga ete moto alinga mozalani na ye ndenge ye moko amilingaka. (Lev. 19:18) Kasi mobeko oyo Yesu apesaki ezalaki ya “sika” mpamba te ezalaki kolobela bolingo oyo esengeli kotinda moto andima kopesa bomoi na ye mpo na basusu, ndenge ye moko asalaki. Bakristo mingi bamonisaki bolingo na ndenge oyo, na mpiko nyonso, “batyaki bomoi na bango na likama” mpo baboyaki kopesa banguna nzela ete bányokola to báboma bandeko na bango bakristo.​—Tángá 1 Yoane 3:16.

Bakristo ya liboso baboyaki kobuka mobeko ya Nzambe

16, 17. Ndenge nini kondima ya bakristo mosusu ya liboso emekamaki, mpe ndenge nini yango ekokani na makambo oyo bakristo mosusu bazali kokutana na yango na mikolo na biso?

16 Na ndakisa ya Yesu, bakristo ya liboso bamonisaki mpiko na ndenge bazalaki kosambela kaka Yehova. (Mat. 4:8-10) Baboyaki kotumba mpaka ya malasi mpo na amperɛrɛ ya Roma. (Talá elilingi.) Daniel Mannix akomaki ete: “Kaka bakristo moke nde bawanganaki kondima na bango, atako etumbelo moko oyo ezalaki kopela mɔtɔ etyamaki na esika ya masano mpo na bango. Bazalaki kosɛnga na mokangami ete asopa kaka mwa mpaka ya malasi likoló ya mɔtɔ; soki asali bongo, bazalaki kopesa ye mokanda oyo emonisi ete apesi amperɛrɛ mbeka, na nsima bazalaki kotika ye akende. Bazalaki mpe kolimbolela ye malamumalamu ete kosala bongo ezali kosambela amperɛrɛ te, kasi ezali kaka kondima ete lokola amperɛrɛ azali mokonzi ya ekólo Roma, esengeli kotalela ye lokola nzambe. Atako bongo, pene na bakristo nyonso baboyaki kosalela libaku wana mpo na kokima bolɔkɔ.”​—Buku Those About to Die.

17 Na ntango na biso, bakristo oyo batyamaki na bakaa ya bakangami ya Banazi mpe bakatelaki bango etumbu ya liwa bazalaki mbala na mbala kozwa libaku ya kobima na bolɔkɔ soki kaka batye sinyatire na mokanda oyo emonisi ete batiki Yehova. Kasi kaka bandeko moke nde batyaki sinyatire. Na bambula oyo euti koleka, ntango bana-mboka bazalaki kobomana na Rwanda, Batatoli ya Yehova oyo bazalaki Bahutu mpe Batutsi batyaki bomoi na bango na likama na ndenge bandimaki kobatelana. Esɛngaka kozala na kondima mpe mpiko liboso ya komekama ya ndenge wana.

TÓBOSANA TE ETE YEHOVA AZALI NA BISO!

18, 19. Bandakisa nini ya bato oyo bamonisaki kondima mpe mpiko, oyo ezali na Biblia, ekoki kosalisa biso tókokisa mosala ya kosakola?

18 Lelo oyo tozali na libaku malamu ya kopesa mabɔkɔ na mosala eleki monene oyo Nzambe apesi basaleli na ye: mosala ya kosakola nsango ya Bokonzi mpe kokómisa bato bayekoli. (Mat. 24:14; 28:19, 20) Tozali mpenza na botɔndi mpo na ndakisa eleki malamu oyo Yesu atikelá biso! “Abandaki kotambola engumba na engumba mpe mboka na mboka, mpo na koteya mpe kosakola nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe.” (Luka 8:1) Na ndakisa na ye, tosengeli kozala na kondima mpe mpiko mpo na kosakola nsango ya Bokonzi. Na lisalisi ya Nzambe, tokoki kozala lokola Noa, mobali ya mpiko, oyo azalaki “mosakoli ya boyengebene” na “mokili ya bato oyo bazalaki kotyola Nzambe,” oyo etikalaki moke ebomama na mpela ya mokili mobimba.​—2 Pe. 2:4, 5.

19 Libondeli esalisaka biso tókokisa mosala ya kosakola. Ntango bayekoli mosusu ya Kristo oyo bazalaki konyokwama babondelaki mpo bákoka ‘koloba liloba ya Nzambe na mpiko mpenza,’ Nzambe ayokaki libondeli na bango. (Tángá Misala 4:29-31.) Soki obangaka to oyokaka nsɔni mpo na kosakola ndako na ndako, bondelá Yehova asalisa yo okóma na kondima makasi mpe na mpiko mingi, mpe akoyoka yo.​—Tángá Nzembo 66:19, 20. *

20. Lisalisi nini biso basaleli ya Yehova tozali na yango?

20 Ezali pɛtɛɛ te kokoba kosala mokano ya Nzambe na kati ya komekama oyo tozali kokutana na yango na mokili oyo mabe, oyo etondi na yikiyiki. Kasi, tozali biso moko te. Nzambe azali na biso. Mwana na ye, oyo azali Mokonzi ya lisangá, azali mpe na biso. Tozali mpe na bandeko na biso Batatoli ya Yehova koleka milio nsambo na mokili mobimba. Elongo na bango, tókoba komonisa kondima mpe kosakola nsango malamu, wana tozali kobatela na makanisi mokapo na biso ya mobu 2013 oyo elobi ete: “Zalá na mpiko mpe zalá na makasi. . . . Yehova Nzambe na yo azali na yo.”​—Yos. 1:9.

^ par. 19 Mpo na koyeba bandakisa mosusu ya bato oyo bamonisaki mpiko, talá lisolo “Zalá na mpiko mpe zalá na makasi mpenza” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/02/2012.