Ozwaka libula na biso ya elimo na motuya?
“Nzambe abalolaki likebi na ye . . . epai ya bikólo mpo na kobimisa uta na yango ekólo moko mpo na nkombo na ye.”—MIS. 15:14.
1, 2. (a) “Mwa ndako ya matiti ya Davidi” ezalaki nini, mpe ndenge nini esengelaki kotongama lisusu? (b) Banani bazali kosalela Yehova elongo lelo oyo?
NA LIKITA moko monene ya lisangani ya mikóló-bakambi oyo esalemaki na Yerusaleme na mobu 49 T.B., moyekoli Yakobo alobaki ete: “Simeone [Petro] ayebisi malamumalamu ndenge Nzambe abalolaki likebi na ye mpo na mbala ya liboso epai ya bikólo mpo na kobimisa uta na yango ekólo moko mpo na nkombo na ye. Mpe maloba ya Basakoli eyokani na yango, kaka ndenge ekomamá ete: ‘Nsima ya makambo yango, nakozonga mpe nakotonga lisusu mwa ndako ya matiti ya Davidi oyo ekweá; mpe nakotonga lisusu bitika na yango mpe nakotɛlɛmisa yango lisusu, mpo baoyo batikali na kati ya bato báluka Yehova makasi, elongo na bato ya bikólo nyonso, bato oyo babengami na nkombo na ngai, Yehova alobi bongo, ye oyo azali kosala makambo yango, oyo eyebaná banda kala.’”—Mis. 15:13-18.
2 “Mwa ndako ya matiti [to ndako ya mokonzi] ya Davidi” ekweaki ntango balongolaki Zidikiya na bokonzi. (Amo. 9:11) Kasi, “mwa ndako ya matiti” yango esengelaki kotongama lisusu ntango Yesu, mokitani ya Davidi, asengelaki kokóma Mokonzi mpo na libela. (Ezk. 21:27; Mis. 2:29-36) Ndenge Yakobo amonisaki yango na likita wana oyo etiká nsango, esakweli wana ya Amose ekokisamaki ntango Bayuda ná bato ya bikólo bayanganisamaki lokola bazwi-ya-libula ya Bokonzi. Lelo oyo, bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bazali naino awa na mabele mpe bamilio ya “bampate mosusu” ya Yesu bazali kosalela Yehova elongo mpo na koyebisa basusu solo ya Biblia.—Yoa. 10:16.
BASALELI YA YEHOVA BAKUTANI NA MOKAKATANO
3, 4. Nini esalisaki basaleli ya Yehova bátikala sembo ntango bazalaki na Babilone?
3 Ntango Bayuda bamemamaki na boombo na Babilone, emonanaki polele ete “mwa ndako ya matiti ya Davidi” ekweaki. Lokola losambo ya lokuta epalanganaki 1 Yoa. 5:19) Libula na biso ya elimo nde esalisi biso tótikala sembo.
na Babilone, ndenge nini basaleli ya Yehova bakokaki kotikala sembo na boumeli ya mbula 70 ya boombo, kobanda na mobu 607 L.T.B. tii na mobu 537 L.T.B.? Ezali kaka ndenge biso basaleli ya Yehova tozali kotikala sembo na mokili oyo Satana azali koyangela. (4 Liloba ya Nzambe ezali mpe na kati ya libula na biso ya elimo. Bayuda oyo bamemaki na boombo na Babilone bazalaki na Makomami Mosantu na mobimba na yango te, kasi bayebaki Mobeko ya Moize, mpe Mibeko na yango Zomi. Bayebaki ‘banzembo ya Siona,’ bakokaki komikundola masese mingi, mpe bayebaki malamu masolo ya makambo minene oyo basaleli mosusu ya Yehova basalaki kala. Bayuda yango balelaki ntango bazalaki kokanisa Siona, mpe babosanaki Yehova te. (Tángá Nzembo 137:1-6.) Yango esalisaki bango bátikala sembo ntango bazalaki na boombo na Babilone, oyo ezalaki na mateya mingi ya lokuta mpe misala ya mabe.
LITEYA YA BOSATO EBANDÁ KALA
5. Nini emonisi ete na Babilone mpe na Ezipito bazalaki kosambela banzambe misatomisato to Bosato?
5 Losambo ya banzambe misatomisato to Bosato ezalaki na esika monene na Babilone ya kala. Moko ya banzambe misatomisato ya Babilone asalemaki na Sin (nzambe-sanza), Shamash (nzambe-moi), mpe Ishtar (nzambe-mwasi mpo na kobota mpe mpo na etumba). Na Ezipito ya kala, mbala mingi bazalaki kokanisa ete nzambe mokomoko azali na mwasi oyo abotelá ye mwana mobali. Bazalaki mpe kokanisa ete bango misato “basali nzambe moko, to Bosato, oyo tata azalaka ntango nyonso mokonzi te, kasi na bantango mosusu akokisaka kaka mokumba ya mobali, nzokande nzambe-mwasi nde akambaka mboka.” (New Larousse Encyclopedia of Mythology) Moko ya banzambe misatomisato ya Ezipito asalemaki na nzambe Osiris, nzambe-mwasi Isis, mpe mwana na bango Horus.
6. Bosato ezali nini, mpe mpo na nini tondimaka te liteya wana ya lokuta?
6 Lelo oyo, mangomba ya bokristo eteyaka mpe Bosato. Balobaka ete Tata, Mwana, mpe elimo santu bazali Nzambe moko. Kasi koloba ete Yehova, Mokonzi oyo aleki nyonso, azali kaka moko ya banzambe misato oyo basali Bosato ezali mpenza kobebisa lokumu na ye. Basaleli ya Yehova bandimaka te liteya wana ya lokuta, mpo bayebi malamu maloba oyo ya Biblia, ete: “Yoká, Ee Yisraele: Yehova Nzambe na biso azali Yehova kaka moko.” (Mib. 6:4) Yesu azongelaki maloba wana, mpe bakristo nyonso ya solo bandimaka yango.—Mrk. 12:29.
7. Mpo na nini moto oyo azali naino kondima liteya ya Bosato akoki te kozwa batisimo mpo na komonisa ete amipesi mpenza na Nzambe?
7 Liteya ya Bosato eyokani te na mokumba oyo Yesu apesaki bayekoli na ye ete ‘bákómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, bábatisa bango na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu.’ (Mat. 28:19) Mpo moto abatisama mpo na kokóma mokristo ya solosolo mpe Motatoli ya Yehova, asengeli kondima ete Yehova, Tata, aleki banzambe mosusu nyonso; asengeli mpe kondima mokumba mpe bokonzi oyo Yesu, Mwana ya Nzambe, azali na yango. Moto oyo alingi kozwa batisimo asengeli mpe kondima ete elimo santu ezali nde nguya ya Nzambe oyo esalaka mosala, kasi te nzambe moko na kati ya Bosato. (Eba. 1:2) Moto oyo azali naino kondima liteya ya Bosato akoki te kozwa batisimo mpo na komonisa ete amipesi mpenza na Yehova Nzambe. Tozali mpenza na botɔndi ndenge libula na biso ya elimo ebateli biso mpo tóndima te liteya wana oyo ebebisaka lokumu ya Nzambe!
MISALA YA BILIMO MABE EUTAKI WAPI?
8. Ndenge nini bato ya Babilone bazalaki kotalela banzambe mpe bademo?
8 Na Babilone, ezalaki na mateya mingi ya lokuta mpe bato bazalaki kondimela banzambe, bademo, mpe komipesa na misala ya bilimo mabe. Buku moko
(The International Standard Bible Encyclopaedia) elobi ete: “Na mangomba ya Babilone, bademo bazalaki na esika ya mibale nsima banzambe mpe bazalaki na nguya ya kotungisa bato na maladi ndenge na ndenge mpe kobebisa makanisi na bango. Bato mingi ya Babilone bazalaki kobundisa bademo yango mpe kobondela banzambe bisika nyonso mpo básalisa bango balongá kotɛmɛla bademo yango.”9. (a) Ndenge nini Bayuda mingi oyo bakendaki na boombo na Babilone bakómaki kondima makanisi ya mangomba ya lokuta? (b) Nini ebatelaka biso mpo tómikɔtisa te na misala ya bilimo mabe?
9 Bayuda mingi oyo bakendaki na boombo na Babilone bakómaki kondima makanisi oyo euti na Makomami te. Lokola mateya ya Bagrɛki ekómaki kopalangana, Bayuda mingi bakómaki mpe kondima ete bademo bakoki kosala bato mabe to malamu, yango wana bademo bakómaki mpe kotungisa bango. Libula na biso ya elimo ebatelaka biso mpo tómikɔtisa te na misala ya bademo, mpamba te toyebi ete Nzambe apesaki Babilone etumbu mpo na misala na yango ya bilimo mabe. (Yis. 47:1, 12-15) Longola yango, totalelaka misala ya bilimo mabe ndenge oyo Nzambe atalelaka yango.—Tángá Mibeko 18:10-12; Emoniseli 21:8.
10. Tokoki koloba nini mpo na misala mpe mateya ya Babilone Monene?
10 Longola bato ya Babilone, bandimi ya Babilone Monene, elingi koloba lisangá ya mangomba ya lokuta ya mokili mobimba, bamipesaka mpe na misala ya bilimo mabe. (Em. 18:21-24) Buku moko (The Interpreter’s Dictionary of the Bible) elobi ete: “Okoki kokuta mateya mpe misala ya Babilone [Monene] na bamboka mpe mimeseno mingi na mokili. Babilone Monene eyebani mingimingi mpo na losambo na yango ya bikeko, ezala na mboka nini to na eleko nini.” (Vol. 1, p. 338) Tii lelo, Babilone Monene etondi na misala ya bilimo mabe, losambo ya bikeko, mpe masumu mosusu; kasi mosika te, ekobomama.—Tángá Emoniseli 18:1-5.
11. Makebisi nini ebimaki na mikanda na biso na oyo etali misala ya bilimo mabe?
11 Yehova alobaki ete: “Nakoki te kondima misala ya maji.” (Yis. 1:13) Na siɛklɛ ya 19, bato mingi bakómaki komipesa na misala ya bilimo mabe. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Siona (na Lingelesi) ya sanza ya mitano 1885 elobaki ete: “Liteya oyo elobaka ete bakufi bazali na bomoi esika mosusu to na nzoto mosusu ebandá kala. Liteya yango eutá na mangomba ya kala, mpe esimbaki masapo nyonso na ntango wana.” Linɔ́ngi yango ebakisaki ete liteya oyo euti na Makomami te, oyo elobaka ete bakufi bakoki kosolola na bato ya bomoi “nde esalisaka bademo bákosaka bato mpe bámibimisa lokola bato oyo bakufá. Bademo basalelaka mayele wana mingi mpo na kotinda bato bákanisa ete bato bakufaka solo te, mpe na ndenge yango, bazali kobebisa makanisi mpe bomoi ya bato mingi.” Mwa buku moko ya kala (Que disent les Écritures du spiritisme?) ekebisaki mpe bato na misala ya bademo, kaka ndenge mikanda na biso ezali kosala lelo oyo.
MILIMO ENYOKWAMAKA NDE NA MBOKA YA BAWEI?
12. Na litambwisi ya elimo ya Nzambe, Salomo alobaki ete bakufi bazalaka ndenge nini?
12 “Baoyo nyonso bayebi solo” bakoki koyanola na motuna yango. (2 Yoa. 1) Na ntembe te, tondimaka maloba oyo ya Salomo ete: “Mbwa ya bomoi eleki nkɔsi oyo ekufá. Mpo bato ya bomoi bayebi ete bakokufa; kasi bakufi bayebi ata eloko moko te. . . . Nyonso oyo lobɔkɔ na yo ezwi mpo na kosala, salá yango na makasi na yo mpenza, mpo mosala ezali te, mwango te, boyebi te, bwanya mpe te na Nkunda, esika ozali kokende.”—Mos. 9:4, 5, 10.
13. Ndenge nini lingomba mpe mimeseno ya Bagrɛki ebebisaki makanisi ya Bayuda mingi?
13 Bayuda bayebaki solo na oyo etali bakufi. Kasi ntango bakonzi minei ya basoda ya Alezandre bakabolaki Grɛsi, milende esalemaki mpo na kosangisa Yuda ná Siri na nzela ya lingomba mpe mimeseno ya Bagrɛki. Nsukansuka, Bayuda mingi bakómaki
kondima mateya ya lokuta oyo elobaka ete moto azali na molimo oyo ekufaka te mpe ete ezali na esika moko oyo bato banyokwamaka nsima ya liwa. Kasi ezali Bagrɛki te nde babimisaki liteya oyo elobaka ete ezali na esika moko oyo milimo ya bato enyokwamaka nsima ya liwa; bato ya Babilone mpe bazalaki kokanisa ete “lifelo ezali esika moko ya kobangisa mpenza oyo banzambe ná bademo ya makasi mingi mpe ya mobulu bakɛngɛlaka.” (The Religion of Babylonia and Assyria) Ya solo, bato ya Babilone bazalaki kondima ete molimo ekufaka te.14. Yobo mpe Abrahama bayebaki nini na oyo etali liwa mpe lisekwa?
14 Atako Yobo, moto ya sembo azalaki na Makomami te, ayebaki solo na oyo etali bakufi. Ayebaki mpe ete Yehova azali Nzambe ya bolingo oyo akozala na mposa makasi ya kosekwisa ye. (Yobo 14:13-15) Abrahama mpe azalaki kondima ete lisekwa ekozala. (Tángá Baebre 11:17-19.) Lokola bakoki te kosekwisa moto oyo akufi te, bato wana oyo bazalaki kobanga Nzambe bazalaki te kondima ete moto azali na molimo oyo ekufaka te. Na ntembe te, elimo ya Nzambe esalisaki Yobo ná Abrahama báyeba ndenge oyo bakufi bazalaka mpe bándima ete lisekwa ekozala. Mateya wana ya solo ezali mpe na kati ya libula na biso.
TOZALI NA MPOSA YA KOSIKOLAMA NA NZELA YA LISIKO
15, 16. Ndenge nini tosikolamaki na boombo ya lisumu mpe liwa?
15 Tozali mpe na botɔndi ndenge Nzambe ayebisi biso nzela oyo asaleli mpo na kolongola biso na boombo ya lisumu mpe ya liwa oyo tosangolaki epai ya Adama. (Rom. 5:12) Toyebi ete Yesu “ayaki, mpo básalela ye te, kasi mpo na kosalela mpe kopesa molimo na ye lisiko na esika ya bato mingi.” (Mrk. 10:45) Ezali mpenza malamu koyeba ndenge oyo ‘tosikolamaki na lisiko oyo Kristo Yesu afutaki’!—Rom. 3:22-24.
16 Na siɛklɛ ya liboso, Bayuda mpe bato ya bikólo mosusu basengelaki kobongola Yoa. 3:16, 36) Soki moto akangami kaka na mateya ya lokuta, na ndakisa liteya ya Bosato mpe liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te, akoki te kozwa matomba ya lisiko. Kasi biso tozali kozwa matomba ya lisiko. Toyebi solo oyo etali “Mwana ya bolingo [ya Nzambe], oyo na nzela na ye tosikolami na nzela ya lisiko, tolimbisami masumu na biso.”—Kol. 1:13, 14.
mitema na masumu na bango mpe komonisa kondima na mbeka ya lisiko ya Yesu. Soki te, masumu na bango elingaki kolimbisama te. Ezali mpe bongo lelo oyo. (LOKOLA TOMEMI NKOMBO YA YEHOVA, TÓKOBA KOKENDE LIBOSO!
17, 18. Ndenge nini tokoki koyeba lisolo ya ebongiseli ya Yehova, mpe matomba nini tokoki kozwa soki toyekoli yango?
17 Biso basaleli ya Nzambe tozali na makambo mingi ya koloba na oyo etali mateya ya solo oyo tondimaka, makambo oyo tokutaná na yango, mpe mapamboli oyo tozwi na elimo mpe na mosuni. Banda bambula mingi, Annuaire na biso ezalaka na masolo ya kolendisa oyo etali mosala na biso na mikili ndenge na ndenge. Lisolo na biso elobelami na bavideo La foi en action, Eteni 1 mpe 2, mpe na mikanda lokola Les Témoins de Jéhovah: Prédicateurs du Royaume de Dieu. Lisusu, mbala mingi bazulunalo na biso ezalaka na masolo ya bomoi ya bandeko na biso bakristo, oyo elendisaka biso mingi.
18 Koyeba lisolo ya ebongiseli ya Yehova ezali na ntina mingi, kaka ndenge ezalaki na ntina mingi ete Bayisraele bákanisaka ndenge oyo Nzambe asikolaki bango na boombo ya Ezipito. (Kob. 12:26, 27) Moize amonaki misala mingi ya kokamwa ya Nzambe; yango wana ntango akómaki mobange, alendisaki Bayisraele na maloba oyo: “Kanisá mikolo ya kala, bótalela bambula ya mabota oyo eleká; tuná tata na yo, mpe akoki koyebisa yo; mibange na yo, mpe bakoki koyebisa yo yango.” (Mib. 32:7) Lokola tozali ‘bato ya Yehova mpe etonga ya esika na ye ya koleisa bibwɛlɛ matiti,’ biso nyonso tosakolaka lisanzoli na ye mpe toyebisaka basusu misala na ye ya nguya. (Nz. 79:13) Lisusu, tosengeli koyeba malamu lisolo ya ebongiseli ya Yehova, kozwa mateya na yango, mpe komityela mikano mpo na mikolo ezali koya.
19. Lokola tozali na pole ya elimo, tosengeli kosala nini?
19 Tozali na botɔndi mingi ndenge tozali koyengayenga te na molili ya mokili oyo, mpo tozali na pole oyo euti na Nzambe. (Mas. 4:18, 19) Yango wana, tiká tómipesa na koyekola Liloba ya Nzambe mpe na molende nyonso tóyebisa basusu mateya ya solo, mpe tózala na makanisi lokola mokomi ya Nzembo oyo akumisaki Yehova, Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, na maloba oyo: “Nakotánga boyengebene na yo, kaka ya yo moko. Ee Nzambe, oteyi ngai banda na bolenge na ngai, mpe kino sikoyo nazali kaka koyebisa misala na yo ya kokamwa. Mpe ata kino na bobange mpe na nsuki mpɛmbɛ, Ee Nzambe, kotika ngai te, kino nakoyebisa lobɔkɔ na yo na libota, nguya na yo, na baoyo nyonso bazali koya.”—Nz. 71:16-18.
20. Ntembe nini mibale ebimaki, mpe osengeli kosala nini mpo na yango?
20 Biso basaleli ya Yehova oyo tomipesá na ye, toyebi malamu ntembe oyo ebimaki mpo na boyangeli ya Nzambe mpe bosembo ya moto. Yango wana, tosakolaka ete Yehova nde azali Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba mpe ebongi mpenza tómipesa na ye na motema mobimba. (Em. 4:11) Na lisalisi ya elimo na ye, tozali mpe koyebisa bato ya komikitisa nsango malamu, kokanga mpota ya bato oyo bazoki na mitema, mpe kobɔndisa baoyo bazali kolela. (Yis. 61:1, 2) Atako Satana azali kosala nyonso mpo na kokonza basaleli ya Nzambe mpe bato nyonso, tozali na botɔndi mingi mpo na libula na biso ya elimo mpe tozali na ekateli ya kotikala sembo epai ya Nzambe mpe kokumisa Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, sikoyo mpe libela na libela.—Tángá Nzembo 26:11; 86:12.