Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOMOI

Mbula ntuku mitano na mosala ya ntango nyonso pene na Cercle arctique

Mbula ntuku mitano na mosala ya ntango nyonso pene na Cercle arctique

Toyebisaki moninga na biso moko oyo azalaki na mosala ya ntango nyonso ete: “Mpo na yo, ezali mpasi te kozala mobongisi-nzela. Baboti na yo nyonso mibale bazali na kati ya solo, mpe bakoki kosalisa yo.” Kasi ye azongisaki ete: “Ezali bongo te! Biso nyonso tozali bana ya Tata moko.” Eyano na ye ezalaki na liteya moko ya ntina mingi: Tata na biso ya likoló asalisaka basaleli na ye mpe apesaka bango makasi. Makambo oyo tokutanaki na yango na bomoi na biso emonisi ete yango ezali solo.

TOBOTAMAKI na nɔrdi ya Ostrobotnie, na ekólo Finlande. Tozalaki bana zomi na libota na biso, mpe tozalaki kofanda na ferme. Na bomwana na biso, totikalaki na suvenire mabe ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Atako tozalaki kofanda mosika na esika oyo bitumba ezalaki, nsɔmɔ ya etumba yango etikalaki bambula ebele na mitema na biso. Ntango babwakaki bɔmbi na bingumba Oulu mpe Kalajoki oyo ezalaki pene na biso, tomonaki ndenge mɔtɔ ezalaki kopela likoló na butu. Baboti na biso bazalaki koyebisa biso tókende komibomba soki tomoni bampɛpɔ ya bitumba ezali koleka. Yango wana, ntango Tauno, yaya na biso ya mobali ya liboso, ayebisaki biso ete na paradiso makambo ya kozanga bosembo ekozala te, yango esimbaki mitema na biso.

Tauno ayekolaki solo ya Biblia ntango azalaki na mbula 14, na mikanda oyo azwaki epai ya Bayekoli ya Biblia. Ntango Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki, aboyaki kokɔta na mosala ya soda mpo lisosoli na ye oyo eteyamaki na Biblia epekisaki ye; mpo na yango, batyaki ye na bolɔkɔ. Kuna na bolɔkɔ, banyokolaki ye mingi. Kasi, yango ekómisaki lisusu makasi ekateli na ye ya kosalela Yehova, mpe ntango babimisaki ye, akómaki lisusu molende mingi na mosala ya kosakola. Ndakisa malamu ya yaya na biso wana elendisaki biso tóyanganaka na makita ya Batatoli oyo ezalaki kosalema na mboka moko ya pembeni. Tozalaki mpe kokende na mayangani ya minene, atako ezalaki kosɛnga ete tósalaka makasi mpo na kobomba mwa mbongo mpo na mibembo yango. Tozalaki kotongela bato bilamba, kolona matungulu, mpe kobuka bambuma. Lokola na ferme tozalaki na misala mingi, mbala mingi, tokokaki te kokende na liyangani biso nyonso mbala moko; yango wana tozalaki kokende moto na moto na ngala na ye.

Kobanda na lobɔkɔ ya mwasi: Matti (tata), Tauno, Saimi, Maria Emilia (mama), Väinö (bebe), Aili, mpe Annikki na 1935

Mateya ya solo oyo toyekolaki mpo na Yehova mpe mikano na ye etindaki biso tólinga ye lisusu mingi, yango wana tozwaki ekateli ya komipesa epai na ye. Na mobu 1947, biso nyonso mibale tozwaki batisimo mpo na komonisa ete tomipesi na ye; Annikki azalaki na mbula 15 mpe Aili azalaki na mbula 17. Saimi, yaya na biso ya mwasi, azwaki mpe batisimo na mbula wana. Toyekolaki mpe Biblia na Linnea, yaya na biso mosusu ya mwasi, oyo asilaki kobala. Ye ná libota na ye bakómaki mpe Batatoli ya Yehova. Nsima ya kozwa batisimo, tomityelaki mokano ya kozala babongisi-nzela; yango wana tozalaki kosɛnga mosala ya mobongisi-nzela mosungi mbala na mbala.

TOKƆTI NA MOSALA YA NTANGO NYONSO

Kobanda na lobɔkɔ ya mwasi: Eeva Kallio, Saimi Mattila-Syrjälä, Aili, Annikki, mpe Saara Noponen na 1949

Na mobu 1955, tokendaki kofanda na Kemi, engumba moko oyo ezali na nɔrdi. Atako biso nyonso mibale tozalaki kosala misala oyo ezalaki kozwa biso mokolo mobimba, tozalaki kaka na mposa ya kokóma babongisi-nzela, kasi tozalaki koyeba te ndenge oyo tokobanda kosala mpo na kozwa mbongo ya kobikela. Na yango, tomonaki ete tosengeli naino kobomba mwa mbongo. Ezalaki na ntango wana nde tosololaki na ndeko mwasi mobongisi-nzela oyo tolobeli na ebandeli ya lisolo oyo. Yango esalisaki biso tómona ete kosalela Yehova na mosala ya ntango nyonso esɛngaka kaka te kozala na mbongo mingi to kozala na libota oyo ezali kosalisa yo. Likambo eleki ntina ezali nde kotyela Tata na biso ya likoló motema.

Mobembo mpo na kokende na liyangani na Kuopio na 1952. Kobanda na lobɔkɔ ya mwasi: Annikki, Aili, Eeva Kallio

Na ntango wana, tobombaki mwa mbongo oyo ekokaki kosalisa biso na boumeli ya sanza mibale. Yango wana, na sanza ya mitano 1957, totondisaki formilɛrɛ mpo na kozala babongisi-nzela na boumeli ya sanza mibale na Pello, mwa engumba moko ya Laponie, likoló ya Cercle arctique. Nsima ya sanza mibale, mwa mbongo oyo tobombaki ezalaki kaka; yango wana tosɛngaki lisusu mosala ya mobongisi-nzela mpo na sanza mibale. Sanza mibale na nsima, mbongo nyonso oyo tobombaki ezalaki kaka. Na ntango wana nde tondimisamaki ete Yehova akokokisa bamposa na biso. Nsima ya mbula 50 na mosala ya mobongisi-nzela, tozangaka kaka eloko te! Soki tokanisi bambula wana nyonso, tomiyokaka lokola nde Yehova azalaki kosimba biso na lobɔkɔ mpe koloba na biso: ‘Bóbanga te. Ngai moko nakosalisa bino.’​—Yis. 41:13.

Nsima ya mbula 50 na mosala ya mobongisi-nzela, tozangaka kaka eloko te!

Kaisu Reikko mpe Aili na mosala ya kosakola

Na mobu 1958, mokɛngɛli na biso ya zongazonga asɛngaki ete tókende kosala lokola babongisi-nzela monene na engumba Sodankylä, na ekólo Laponie. Na ntango wana, na teritware yango, Motatoli azalaki kaka moko: ndeko mwasi moko. Ndenge oyo ndeko mwasi yango ayambaki solo ekamwisaki biso mingi. Mwana na ye ya mobali asalaki mobembo elongo na bana-kelasi na bango na Helsinki, mboka-mokonzi ya ekólo Finlande. Ntango bazalaki kotambola na engumba yango, ndeko mwasi moko ya mobange apesaki mwana mobali yango, oyo azalaki na nsuka ya molɔngɔ, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe ayebisaki ye apesa yango mama na ye. Mwana yango asalaki kaka bongo, mpe mama na ye asosolaki mbala moko ete makambo oyo atángaki ezali solo.

Tofutelaki shambre moko pembeni ya izini moko ya kopasola mabaya. Tozalaki kosala makita na shambre yango. Na ebandeli, kaka biso mibale mpe ndeko mwasi wana ná mwana na ye ya mwasi nde tozalaki koyangana na makita yango. Tozalaki kotánga elongo masolo oyo tosengelaki koyekola na makita. Na nsima, mobali moko oyo ayekolaki Biblia ná Batatoli ya Yehova ayaki kosala na izini yango. Ye ná libota na ye babandaki mpe koyangana elongo na biso. Na nsima, mobali yango ná mwasi na ye bazwaki batisimo. Ndeko mobali yango nde akómaki kotambwisa makita na biso. Longola yango, mibali mosusu oyo bazalaki kosala na izini wana babandaki mpe koyangana na makita mpe bayambaki solo ya Biblia. Nsima ya mwa bambula, etuluku na biso wana ekolaki mpe nsukansuka ekómaki lisangá.

MIKAKATANO OYO TOKUTANAKI NA YANGO

Ezalaki pɛtɛɛ te kokende kosakola na bateritware ya mosika. Na eleko ya molunge, tozalaki kotambola na makolo, na velo, ata mpe na bwato, mpo na kokende kotala bato ya teritware na biso. Bavelo na biso ezalaki kosalisa biso mingi. Tozalaki mpe kosalela yango mpo na kokende na mayangani mpe kokende kotala baboti na biso, oyo bazalaki kofanda mosika mpenza. Na eleko ya malili, tozalaki kozwa bisi na ntɔngɔ mpo na kokende na mboka moko ya teritware na biso, na nsima tozalaki kosakola ndako na ndako. Soki tosilisi kosakola na mboka moko, tozalaki kokende na makolo na mboka oyo elandi. Nɛjɛ ezalaki kokwea mingi, mpe na bantango mosusu banzela ezalaki komonana malamu te. Mbala mingi, ntango tozalaki kotambola na banzela ya mikemike, tozalaki kotya makolo na bisika oyo sharɛti oyo bampunda ebendaka elekaki. Na bantango mosusu, nɛjɛ ezalaki kozipa banzela oyo bato balekaki liboso, mpe na ebandeli ya prɛnta, nɛjɛ ezalaki kokóma pɛtɛɛ mpe pɔtɔpɔtɔ, yango wana ezalaki kosɛnga tótambola malɛmbɛmalɛmbɛ.

Na mosala ya kosakola, na mokolo moko ya malili makasi

Malili wana ya makasi mpe nɛjɛ eteyaki biso kolata bilamba ya malili. Tozalaki kolata bas, basosɛti mibale to misato, mpe basapato ya milai. Atako bongo, mbala mingi, basapato na biso ezalaki kotonda na nɛjɛ. Soki tokómi na baeskalye ya ndako moko, tozalaki kolongola basapato na biso mpe koningisa yango mpo na kolongola nɛjɛ. Longola yango, nsɔngɛ ya bakazaka ya milai oyo tozalaki kolata na eleko ya malili ezalaki kopɔla na nɛjɛ. Soki ezwi malili mingi, bansɔngɛ na yango ezalaki kokóma makasi lokola ebende. Mwasi moko alobaki na biso boye: “Bozali mpenza na kondima makasi ndenge bondimaki koya awa na mboka ya malili makasi boye.” Mpo na kokóma na ndako ya mwasi yango, tosalaki kilomɛtrɛ 11 na makolo.

Lokola tozalaki kokende kosakola mosika, mbala mingi tozalaki kolala na bandako ya bato ya bamboka yango. Soki butu ebandi koyinda, tozalaki koluka esika ya kolala. Bato yango bazalaki na bandako ya malonga te, kasi bazalaki na boboto mpe bayebaki koyamba bapaya; bazalaki kosuka kaka te na kopesa biso esika ya kolala, bazalaki mpe kopesa biso biloko ya kolya. Mbala mingi, tozalaki kolala likoló ya mposo ya nyama. Kasi mikolo mosusu, tozalaki kolala na bisika ya kitoko. Na ndakisa, mwasi moko oyo ayambaki biso na ndako moko ya monene amemaki biso na shambre moko ya bapaya oyo ezalaki likoló, mpe kuna tokutaki mbeto moko ya kitoko oyo batandaki na drap ya mpɛmbɛ. Mbala mingi, tozalaki kosolola masolo ya Biblia ná bankóló-ndako tii na butu makasi. Na esika moko, mobali moko ná mwasi na ye batikelaki biso ngámbo moko ya shambre na bango mpe bango balalaki na ngámbo mosusu. Tobandaki kosolola na bango masolo ya Biblia kobanda na butu tii pene na ntɔngɔ. Mobali yango ná mwasi na ye bazalaki kaka kotuna mituna, moko nsima ya mosusu.

MATOMBA OYO MOSALA NA BISO EBIMISI

Laponie ezali ekólo moko kitoko, atako mabele na yango ebotaka malamu te. Kitoko na yango ebongwanaka na kotalela bileko. Kasi mpo na biso, bato oyo bandimaki Yehova bazalaki kitoko mingi koleka. Na bato ya mitema sembo oyo topesaki litatoli, ezalaki mpe na bakati-nzete oyo bazalaki kofanda na bakaa ya bakati-nzete na Laponie. Na bantango mosusu, tozalaki kokuta mibali ebele na kati ya ndako ya moke, mpe ezalaki kosɛnga ete biso bana basi mibale tókɔta kuna mpo na kopesa bango litatoli. Kasi bingambe mibali yango bazalaki kondima koyoka nsango ya Biblia mpe kosepela kozwa mikanda.

Tokutanaki na makambo mingi oyo esepelisaki biso. Mokolo moko, montre ya monene oyo ezalaki na esika oyo tozwaka bisi ezalaki na miniti mitano liboso ya ngonga, mpe bisi etikaki biso. Na yango, tozwaki ekateli ya komata na bisi mosusu mpo emema biso na mboka mosusu. Tosakolaki naino te na teritware wana liboso. Na ndako ya liboso, tokutaki mwasi moko oyo alobaki boye: “Bana basi oyo, boyei? Nazalaki mpenza kozela bino!” Tozalaki koyekola Biblia ná yaya na ye ya mwasi. Mwasi yango asɛngaki yaya na ye ayebisa biso tókende kotala ye mokolo wana. Kasi, yaya na ye ayebisaki biso te. Tobandaki koyekola Biblia ná mwasi yango mpe bandeko na ye mosusu oyo bazalaki kofanda na ndako moko ya pembeni. Eumelaki te, tosangisaki bango nyonso na boyekoli moko, mpe bato nyonso oyo bazalaki koya mpo na boyekoli yango bakómaki pene na zomi na mibale. Kobanda wana, bato mingi na libota wana bakómaki Batatoli ya Yehova.

Na mobu 1965, batindaki biso na lisangá oyo tozali sikoyo, na Kuusamo, mwa moke na nse ya Cercle arctique. Na ntango wana, lisangá yango ezalaki na basakoli mingi te. Na ebandeli, ezalaki komonana ete teritware na biso ya sika ezali mwa mpasi. Bato mingi bazalaki kosambela mpe bazalaki kokanisela biso mabe. Atako bongo, bato mingi bazalaki na limemya mpo na Biblia; yango ezalaki kopesa biso likoki ya kosolola na bango. Na yango, mokemoke, tozalaki kosala makasi mpo na koyeba bato yango, mpe nsima ya mbula soki mibale, ezalaki lisusu mpasi te mpo na kobanda koyekola na bato Biblia.

TOZALI KOKOBA KOSAKOLA

Bato mosusu oyo toyekolaki na bango Biblia

Lelo oyo, tozali lisusu te na makasi ya kolekisa bangonga mingi na mokolo na mosala ya kosakola; atako bongo tobimaka na mosala ya kosakola pene na mikolo nyonso. Kosakola nsango malamu epai ya bato ya teritware na biso ya monene ekómaki pɛpɛlɛ ntango Aili ayekolaki kokumba motuka, ndenge mwana ya ndeko na biso ya mobali alendisaki ye, mpe azwaki mokanda oyo epesaka ndingisa ya kokumba motuka (permis de conduire) na mobu 1987, ntango azalaki na mbula 56. Makambo ekómaki lisusu pɛtɛɛ mpo na biso ntango Ndako ya Bokonzi ya sika etongamaki, mpe tokendaki kofanda na ndako moko oyo ekangami na yango.

Bokoli oyo tomoni na miso epesaka biso esengo mingi. Ntango tobandaki mosala ya ntango nyonso na nɔrdi ya Finlande, ezalaki kaka na basakoli moke oyo bapalanganaki na teritware wana monene. Sikoyo, masanga ekómá ebele mpe esali zongazonga mobimba. Mbala mingi, ekómaka ete na liyangani moko ya monene to ya moke, moto moko ayebisa biso nkombo na ye mpe atuna biso soki toyebi ye lisusu. Mbala mosusu, ezalaka ete moto yango azalaki naino mwana moke ntango tozalaki kotambwisa boyekoli ya Biblia na ndako na bango. Mboto oyo tolonaki esili koleka bambula mingi, ata mpe mbula ntuku mibale to ntuku misato, ebotaki mbuma!​—1 Ko. 3:6.

Tobimaka na mosala ya kosakola, ata na mikolo ya mbula

Na mobu 2008, tokokisaki mbula 50 na mosala ya mobongisi-nzela monene. Totɔndaka Yehova na ndenge tozwaki likoki ya kolendisana mpo tóyika mpiko na mosala na ye, oyo eleki ntina. Tozali na bomoi ya mindɔndɔ te, kasi tozangaka eloko te. (Nz. 23:1) Emonani ete tozalaki kobanga mpamba na ebandeli! Likambo ya esengo, na boumeli ya bambula wana nyonso, Yehova alendisaki biso kaka ndenge alaki na Yisaya 41:10 ete: “Nakopesa yo makasi. Nakosalisa yo mpenza. Nakosimba yo mpenza na lobɔkɔ na ngai ya mobali ya boyengebene.”