Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Tósepela mpenza na bizaleli ya Yehova

Tósepela mpenza na bizaleli ya Yehova

“Bókóma bamekoli ya Nzambe, lokola bana ya bolingo.”​—EF. 5:1.

1. (a) Bizaleli nini ya Yehova eyelaka yo namakanisi? (b) Matomba nini tokozwa soki toyekoli bizaleli ya Nzambe?

NTANGO okanisaka bomoto ya Yehova, bizaleli nini eyelaka yo na makanisi? Mingi na biso tokanisaka bolingo, bosembo, bwanya, mpe nguya. Na ntembe te, toyebi ete Yehova azali na bizaleli mosusu ebele oyo tokoki kosepela na yango. Kutu, tokoki kotánga bizaleli koleka 40 oyo Yehova azali na yango, oyo mokomoko na yango esilá kolobelama na mikanda na biso. Soki oluki koyeba malamu ezaleli yango mokomoko ntango ozali koyekola yo moko to elongo na libota, okoyeba makambo mingi oyo etali bomoto ya Yehova! Matomba nini tokoki kozwa na boyekoli ya ndenge wana? Ekoki kosalisa biso tókóma kosepela lisusu mingi na bizaleli ya Tata na biso ya likoló. Yango ekosalisa biso tókóma lisusu na mposa makasi ya kopusana penepene na Yehova mpe komekola ye.​—Yos. 23:8; Nz. 73:28.

2. (a) Pesá ndakisa oyo emonisi ndenge oyo tokoki kokóma kosepela lisusu mingi na bizaleli ya Yehova. (b) Tokotalela nini na lisolo oyo mpe masolo mosusu mibale oyo elandi?

2 Kasi, “kosepela na likambo” elimboli nini? Na lisolo oyo, maloba yango elimboli koyeba valɛrɛ ya solosolo ya eloko to ya likambo moko. Mbala mingi, esɛngaka ntango mpo tókóma kosepela mpenza na likambo to na eloko moko. Tózwa ndakisa: Kanisá ete olingi komeka bilei oyo olyá naino te. Liboso, okoki kosepela naino na nsolo na yango. Na nsima, soki omeki yango, mpe oyoki yango elɛngi na monɔkɔ, nsukansuka, okolamba yango yo moko. Ndenge moko mpe, mpo tósepela lisusu mingi na ezaleli moko ya Yehova, tosengeli naino koyekola ezaleli yango malamumalamu. Na nsima, tosengeli komanyola na ndenge oyo Yehova amonisaka yango. Mpe nsukansuka, tokoya komekola ezaleli yango na bomoi na biso. (Ef. 5:1) Mokano ya lisolo oyo mpe masolo mosusu mibale oyo elandi ezali ya kosalisa biso tósepela lisusu mingi na bizaleli ya Nzambe oyo tokanisaka mingi te, ndenge tokanisaka bizaleli na ye oyo eleki minene. Mpo na ezaleli mokomoko, tokotalela mituna oyo: Ezaleli yango elimboli nini? Ndenge nini Yehova amonisaka yango? Mpe ndenge nini tokoki komonisa ezaleli yango mpo na komekola Yehova?

YEHOVA ANDIMAKA BATO BÁYA EPAI NA YE

3, 4. (a) Moto oyo andimaka ete basusu báya epai na ye azalaka ndenge nini? (b) Ndenge nini Yehova amonisi ete andimaka bato báya epai na ye?

3 Tólobela naino ndenge oyo Yehova andimaka ete bato báya epai na ye. Yango elingi koloba nini? Mbala mosusu, okoki koloba ete ‘moto oyo andimaka ete basusu báya epai na ye azalaka na boboto, andimaka kopesa basusu ntango, mpe ezalaka mpasi te mpo na kosolola na ye.’ Mbala mingi, maloba ya moto, elongi na ye, mpe bajɛstɛ to makambo mosusu oyo azali kosala ata soki alobi eloko te, ekoki komonisa soki andimaka ete bato báya epai na ye to te.

4 Ndenge nini Yehova amonisaka ete andimaka bato báya epai na ye? Atako azali Mozwi-ya-Nguya-Nyonso mpe Mozalisi ya molɔ́ngɔ́ mobimba, alingi tóyeba ete azalaka mpenza na mposa ya koyoka mabondeli na biso mpe asepelaka koyanola na mabondeli yango. (Tángá Nzembo 145:18; Yisaya 30:18, 19.) Tokoki kosolola na Nzambe ezala na esika nini, na ntango nini, to na boumeli ya ntango boni. Tokoki kobanga te kosolola na ye, mpo toyebi ete akopamela biso te soki tozali kosala bongo. (Nz. 65:2; Yak. 1:5) Mpo na kolobela Yehova, Biblia esaleli maloba oyo biso bato tokoki kokanga ntina, mpo na komonisa ete andimaka bato báya epai na ye. Na ndakisa, Davidi, mokomi ya nzembo akomaki ete “miso ya Yehova ezali epai” na biso mpe ‘lobɔkɔ na ye ya mobali ezali kosimba biso makasi.’ (Nz. 34:15; 63:8) Mosakoli Yisaya akokanisaki Yehova na mobateli ya mpate, ntango alobaki ete: “Na lobɔkɔ na ye akoyanganisa bana-mpate; mpe akomema yango na ntolo na ye.” (Yis. 40:11) Kanisá naino! Yehova alingi ete tózala pene na ye lokola mwana mpate oyo ezali na ntolo ya mobateli ya mpate. Ya solo, Yehova azali mpenza Tata oyo andimaka ete bato báya epai na ye! Ndenge nini tokoki komekola Yehova na likambo yango?

EZALELI YANGO EZALI NA MOTUYA MINGI

5. Mpo na nini ezali na ntina ete bankulutu bázala bato oyo bandeko babangaka te koya epai na bango?

5 Na mikolo oyo euti koleka, batunaki Batatoli ya molende oyo bafandi na mikili ndenge na ndenge motuna oyo: “Ezaleli nini osepelaka na yango mingi koleka epai ya nkulutu?” Mingi kati na bango bayanolaki ete: “Bandeko bábangaka te kopusana pene na ye.” Ezali solo ete mokristo nyonso asengeli komonisa ezaleli yango; kasi mingimingi bankulutu nde basengeli kozala bato oyo bandimaka ete basusu báya epai na bango. (Yis. 32:1, 2) Mpo na komonisa ete ezaleli yango ezali na ntina mingi, ndeko mwasi moko alobaki ete: “Bandeko bakoki koyeba malamu bizaleli mosusu malamu ya nkulutu moko kaka soki andimaka ete basusu báya epai na ye.” Likambo oyo ndeko mwasi wana alobaki ezali mpenza solo! Kasi nini esalaka ete basusu bábanga te koya epai ya moto?

6. Osengeli kosala nini mpo basusu bábangaka te koya epai na yo?

6 Mpo basusu bábangaka te koya epai na yo, osengeli kotyelaka bango likebi. Soki nkulutu atyelaka basusu likebi mpe andimaka komipesa mpo na bolamu na bango, na ntembe te, bandeko basi mpe mibali, ata mpe bana mike, bakomona yango. (Mrk. 10:13-16) Carlos, elenge mobali moko ya mbula 12 alobi boye: “Na Ndako ya Bokonzi, nasepelaka mingi ntango namonaka bankulutu bazali kosɛka elongo na bandeko mpe komonisela bango boboto.” Kasi, nkulutu asengeli te kosuka kaka na koloba ete andimaka bandeko báya epai na ye; asengeli mpe komonisa yango. (1 Yoa. 3:18) Ndenge nini?

7. Mpo na nini mbala mingi kolata makarɔ ya liyangani epesaka biso libaku ya kobanda lisolo ná moto, mpe liteya nini tokoki kozwa na likambo yango?

7 Tózwa ndakisa oyo: Na mikolo oyo euti koleka, ndeko mobali moko alataki makarɔ na ye ya liyangani na kati ya mpɛpɔ ntango autaki na liyangani moko na mboka mopaya. Ntango moto moko oyo asalaka na mpɛpɔ yango amonaki maloba “Tiká Bokonzi ya Nzambe eya!” na makarɔ oyo ndeko yango alataki, alobaki na ye ete: “Ɛɛ, eya mpenza!​—nakosepela tólobela yango lisusu mwa mingi.” Na nsima, basololaki, mpe moto yango andimaki kozwa bazulunalo na biso. Mingi na biso tosilá kokutana na makambo ya ndenge wana. Kasi, mpo na nini mbala mingi kolata makarɔ ya liyangani epesaka biso libaku ya kobanda lisolo ná moto? Mpamba te ezali lokola nde eyebisaka bato ete: “Bóbanga te kopusana pene na ngai. Bótuna ngai soki nazali kokende wapi.” Makarɔ ezali elembo oyo esalisaka bato báyeba ete tozali na mposa ya koyebisa bango bindimeli na biso. Ndenge moko mpe, bankulutu basengeli kosala makambo oyo ekozala lokola bilembo oyo ezali koyebisa bandeko na bango bakristo ete: “Bóbanga te kopusana pene na ngai.” Wapi mwa makambo yango?

8. Ndenge nini bankulutu bakoki komonisa ete batyelaka basusu likebi, mpe yango ekoki kosala nini epai ya bandeko?

8 Ezali solo ete mboka na mboka ezali na mimeseno na yango; kasi mbala mingi, kosɛka mwa moke ntango tomoni ndeko mobali to ndeko mwasi, kopesa ye mbote ya esengo, to koyamba ye na boboto, emonisaka ete tozali kotyela ye likebi. Kasi, nani asengeli kobanda kosala yango? Tótalela ndakisa oyo Yesu atiká. Matai alobi ete na likita moko oyo Yesu asalaki ná bayekoli na ye, “Yesu apusanaki mpe asololaki na bango.” (Mat. 28:18) Ndenge moko mpe lelo oyo, bankulutu basengeli kozala bato ya liboso ya kopusana epai ya bandeko na bango mpe kosolola na bango. Yango ekoki kosala nini epai ya bandeko? Ndeko mwasi moko mobongisi-nzela oyo azali na mbula 88 alobaki boye: “Ndenge bankulutu basɛkaka na ngai mpe balobaka na ngai maloba ya kolendisa ntango nazali kokɔta na Ndako ya Bokonzi esalaka ete nalinga bango lisusu mingi.” Ndeko mwasi mosusu ya sembo alobaki ete: “Soki nkulutu ayambi ngai na mwa kosɛka na makita, ekoki komonana lokola likambo ya moke, nzokande elendisaka ngai mingi.”

ZWÁKÁ NTANGO YA KOSOLOLA NA BANDEKO

9, 10. (a) Ndakisa nini ya malamu mpenza Yehova apesaka? (b) Ndenge nini bankulutu bakoki kopesa basusu ntango?

 9 Tokoki koloba te ete tondimaka basusu báya epai na biso soki topesaka bango ntango te. Na likambo yango, Yehova azali ndakisa ya malamu mpenza. “Azali mosika te na mokomoko na biso.” (Mis. 17:27) Lolenge moko oyo bankulutu bapesaka bandeko ntango ezali ndenge bazwaka mwa ntango liboso mpe nsima ya makita mpo na kosolola na bandeko mibali mpe basi, ezala bilenge to mikóló. Ndeko mobali moko oyo azali mobongisi-nzela alobaki ete: “Nasepelaka mingi ntango nkulutu atuni ngai “nsango nini” mpe atɛlɛmi mpo na koyoka eyano na ngai.” Ndeko mwasi moko oyo asaleli Yehova na boumeli ya mbula pene na 50 alobaki boye: “Bankulutu oyo bazwaka mwa ntango mpo na kosolola na ngai nsima ya makita basalisaka ngai namiyoka ete nazali na valɛrɛ.”

10 Toboyi te, bakɛngɛli bakristo basengeli mpe kokokisa mikumba na bango mosusu. Kasi, na makita, mokano na bango ya libosoliboso esengeli kozala ya kotyela bampate likebi.

YEHOVA APONAKA BILONGI TE

11, 12. (a) Kopona bilongi te elimboli nini? (b) Ndenge nini Biblia emonisi ete Yehova aponaka bilongi te?

11 Ezaleli mosusu ya Yehova oyo tokoki kosepela na yango ezali ete aponaka bilongi te. Yango elimboli nini? Elimboli kozala sembo, koboya koponapona bato mpo na bozwi, mposo to ekólo na bango. Kozanga kopona bilongi ya solosolo etaleli makambo mibale: makanisi mpe misala. Mpo na nini makambo wana mibale ezali na ntina? Mpamba te moto akoki kosalela basusu makambo kozanga koponapona kaka soki, na kati ya makanisi na ye, moto yango andimi ete asengeli kopona bilongi te. Na Makomami ya Grɛki ya bokristo, maloba “kopona bilongi te” elimboli “kotala bilongi te,” to kosepela te na elongi moko koleka mosusu. (Mis. 10:34) Na yango, moto oyo aponaka bilongi te atyaka likebi mingi te na ndenge oyo moto azali komonana libándá to na bomoi oyo azali na yango, kasi nde na bizaleli na ye.

12 Yehova azali ndakisa eleki malamu na oyo etali kozanga kopona bilongi. Biblia elobi ete “aponaka bilongi te.” (Tángá Misala 10:34, 35; Kolimbola Mibeko 10:17.) Likambo moko oyo esalemaki na mikolo ya Moize emonisi yango.

Bana basi ya Zelofehade basepelaki mingi ndenge Yehova aponaka bilongi te (Talá  paragrafe 13, 14)

13, 14. (a) Mokakatano nini bana basi mitano ya Zelofehade bakutanaki na yango? (b) Ndenge nini Yehova amonisaki ete aponaka bilongi te?

 13 Mwa moke liboso ete Bayisraele bákɔta na Mokili ya Ndaka, bilenge basi mitano oyo bazalaki bana ya tata moko mpe babalaki naino te bakutanaki na mokakatano moko. Mokakatano yango nini? Bayebaki ete, lokola mabota mosusu ya Yisraele, libota na bango mpe esengelaki kozwa eteni ya mabele na nkombo ya tata na bango. (Mit. 26:52-55) Nzokande, tata na bango Zelofehade, oyo azalaki moto ya libota ya Manase, asilaki kokufa. Na kotalela Mibeko, bana mibali ya Zelofehade nde bazalaki na lotomo ya kozwa mabele yango; nzokande, ye abotaki kaka bana basi. (Mit. 26:33) Lokola libota ya Zelofehade ezalaki na mwana mobali te mpo na kozwa mabele yango, esengelaki nde kopesa yango na bandeko mosusu ya libota mpe kotika bana na ye ya basi mabɔkɔ mpamba?

14 Bana basi yango mitano bakendaki epai ya Moize mpe batunaki ye boye: “Mpo na nini nkombo ya tata na biso elongwa na libota na ye mpo azalaki na mwana mobali te?” Basɛngaki ete: “Boye, pesá biso mabele na kati ya bandeko ya tata na biso.” Moize alobaki nde ete: ‘Mobeko elobi bongo, mpe ezali na eloko moko te oyo nakoki kosala mpo na kosalisa bino’? Te. Moize “amemaki likambo na bango liboso ya Yehova.” (Mit. 27:2-5) Eyano nini Yehova apesaki? Ayebisaki Moize ete: “Bana basi ya Zelofehade balobi malamu. Okopesa mpenza bango mabele ya libula na kati ya bandeko ya tata na bango, mpe osengeli kolekisa libula ya tata na bango epai na bango.” Mpe Yehova asukaki wana te. Ayebisaki Moize abakisaki likambo oyo na Mibeko: “Soki mobali moko akufi, azali na mwana mobali te, bosengeli kolekisa libula na ye epai ya bana na ye ya basi.” (Mit. 27:6-8; Yos. 17:1-6) Kobanda wana, Bayisraele nyonso ya basi oyo bakutanaki na mokakatano wana bakokaki kozwa libula na bango.

15. (a) Ndenge nini Yehova asalelaka basaleli na ye makambo, mingimingi bato oyo bazangi moto ya kosalisa bango? (b) Ndakisa nini mosusu ya Biblia okoki kotánga oyo emonisi ete Yehova aponaka bilongi te?

15 Ekateli wana emonisaki mpenza ete Yehova azali na boboto mpe aponaka bilongi te! Bana basi wana mitano bazalaki na moto mosusu te ya kosalisa bango, mpe Yehova asalelaki bango makambo na bosembo mpe na limemya, ndenge azalaki kosalela Bayisraele mosusu nyonso. (Nz. 68:5) Wana ezali kaka moko ya masolo mosusu mingi ya Biblia oyo emonisi ete Yehova asalelaka basaleli na ye nyonso makambo kozanga kopona bilongi.​—1 Sa. 16:1-13; Mis. 10:30-35, 44-48.

TOKOKI KOMEKOLA YEHOVA

16. Nini ekoki kosalisa biso tóponaka bilongi te, lokola Yehova?

16 Ndenge nini tokoki komekola Yehova na oyo etali kopona bilongi te? Tóbosana te ete kopona bilongi te etaleli makambo mibale. Tokosalela bato makambo kozanga koponapona kaka soki tondimi ete tosengeli kopona bilongi te. Ya solo, biso nyonso tokanisaka ete tondimaka bato ya lolenge nyonso mpe toponaka bilongi te. Kasi, ntango mosusu ezalaka mpasi moto ye moko ayeba mpenza makanisi oyo azalaka na yango mpo na basusu. Sikoyo, nini okoki kosala mpo na koyeba soki oponaka bilongi to te? Ntango Yesu alukaki koyeba oyo bato mosusu bazalaki koloba mpo na ye, atunaki baninga na ye ya motema ete: “Bato bazali koloba ete Mwana ya moto azali nani?” (Mat. 16:13, 14) Mpo na nini te kolanda ndakisa wana ya Yesu? Okoki kotuna moninga na yo moko oyo akoki koyebisa yo polele soki oyebani lokola moto oyo aponaka bilongi to te. Kasi okosala nini soki ayebisi yo ete, na bantango mosusu, osalelaka bato mosusu makambo ya malamu koleka kaka mpo na mposo na bango, bozwi na bango, to mpo batángá kelasi mingi? Na ntango wana, osengeli kobondela Yehova asalisa yo obongola makanisi na yo mpo omekola malamu ezaleli na ye ya kozanga kopona bilongi.​—Mat. 7:7; Kol. 3:10, 11.

17. Tángá mwa makambo oyo tokoki kosala mpo na komonisa ete toponaka bilongi te.

 17 Na kati ya lisangá ya Bokristo, tomonisaka mposa na biso ya komekola Yehova oyo aponaka bilongi te na ndenge tosalelaka bandeko mibali mpe bandeko basi nyonso makambo na limemya mpe na boboto. Na ndakisa, soki tolingi koyamba bandeko na ndako na biso, tosengeli kobengisa bandeko ya lolenge nyonso, ezala baoyo biso ná bango tozali ekólo moko te to mboka moko te, ezala baoyo bazali babola, bitike, to basi oyo mibali bakufá. (Tángá Bagalatia 2:10; Yakobo 1:27.) Longola yango, na mosala ya kosakola, toponaka bilongi te na ndenge tosakolaka nsango malamu epai ya bato ya lolenge nyonso, ezala baoyo bautá na mikili mosusu. Tozali mpenza na esengo ndenge mikanda na biso oyo elimbolaka Biblia ezali kobima sikoyo na minɔkɔ soki 600. Yango ezali elembeteli oyo emonisi ete toponaka bilongi te!

18. Kokanisa ndenge oyo Yehova andimaka ete bato báya epai na ye mpe aponaka bilongi te esengeli kotinda yo osala nini?

18 Ya solo, soki tozali kozwa ntango ya komanyola ndenge oyo Yehova andimaka ete bato báya epai na ye mpe ndenge aponaka bilongi te, tokosepela na ye lisusu mingi. Yango ekotinda biso tómekola bizaleli yango malamumalamu mpe tómonisa yango na boyokani na biso ná bandeko na biso ya lisangá mpe bato oyo tokutanaka na bango na mosala ya kosakola.

“Yehova azali pene na baoyo nyonso bazali kobelela ye.”​—Nz. 145:18 (Talá  paragrafe 9)

“Yehova Nzambe na bino . . . aponaka bilongi te.”​—Mib. 10:17 (Talá  paragrafe 17)