LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI—NIMERO YA BOYEKOLI Sanza ya Octobre 2013

Nimero oyo elobeli biloko oyo Nzambe akelá, oyo emonisaka nguya mpe bwanya na ye. Elobeli mpe ndenge oyo tokoki kosala na boyokani na libondeli moko ya Yesu.

Bamipesaki na bolingo na bango moko na Philippines

Talá eloko oyo etindaki bato mosusu bálongwa na misala na bango, bátɛka biloko na bango, mpe bákende kofanda na bamboka ya mikemike ya Philippines.

Bozalisi emonisaka Nzambe ya bomoi

Talá ndenge oyo tokoki kosalisa basusu báyeba solo na ntina etali Mozalisi na biso mpe bákóma na kondima makasi epai na ye.

“Bósalela Yehova lokola baombo”

Ndenge nini tokoki koboya kozala baombo ya Satana? Mapamboli nini tokozwa soki tosaleli Yehova na bosembo lokola baombo?

LISOLO YA BOMOI

Kotyela Yehova motema esalisi biso tózala na bomoi ya esengo

Malcolm mpe Grace Allen basaleli Yehova moto na moto mbula koleka 75. Talá ndenge bayaki komona ete Yehova apambolaka baoyo batyelaka ye motema.

Tózwa mateya na libondeli moko oyo ebongisamaki malamu

Mateya nini tokoki kozwa na libondeli oyo Balevi basalaki? Tokoki kosala nini mpo mabondeli na biso ezala ya mozindo?

Salá na boyokani na libondeli ya Yesu

Ntango Yesu azalaki kobondela, alobelaki mokano ya Yehova liboso ya bamposa na ye moko. Ndenge nini tokoki kosala na boyokani na libondeli yango?

Bakisá molende na mosala ya kokebisa bato!

Talá ndenge bato mosusu basimbaka mabaku mokolo na mokolo mpo kopesa bato litatoli.