Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOMOI

Kotyela Yehova motema esalisi biso tózala na bomoi ya esengo

Kotyela Yehova motema esalisi biso tózala na bomoi ya esengo

Toyebaka te makambo nini tokokutana na yango na bomoi; mpe ntango mosusu ezalaka makambo ya mpasi mpenza. Kasi Yehova apambolaka baoyo batyelaka ye motema, na esika bándimela mayele na bango moko. Yango nde ngai ná mwasi na ngai tomoni na bomoi na biso ya molai mpe oyo etondi na mapamboli. Tiká nabɛtɛla bino lisolo na biso.

TATA ná mama na biso bakutanaki na 1919 na liyangani monene ya Bayekoli ya Biblia ya mokili mobimba, na engumba Cedar Point, na etúká ya Ohio, na États-Unis. Babalanaki mwa moke na nsima, kaka na mbula wana. Ngai nabotamaki na 1922, mpe leki na ngai Paul abotamaki mbula mibale na nsima. Mwasi na ngai Grace abotamaki na 1930. Baboti na ye, Roy ná Ruth Howell, bakolaki na libota ya Bayekoli ya Biblia; bankɔkɔ na ye mpe bazalaki Bayekoli ya Biblia mpe baninga ya Ndeko Charles Russell.

Nakutanaki na Grace na 1947, mpe tobalanaki na mokolo ya 16/07/1949. Liboso tóbalana, tolobelaki polele mikano na biso mpo na mikolo ezali koya. Tozwaki ekateli ete tokosala mosala ya ntango nyonso mpe tokosepela na mokumba ya kobɔkɔla bana te. Na mokolo ya 01/10/1950, tobandaki mosala ya mobongisi-nzela. Na 1952, nakómaki mokɛngɛli ya zongazonga.

MOSALA YA MOKƐNGƐLI-MOTAMBOLI MPE FORMASYO NA GILEADE

Ngai ná Grace tomonaki ete tozali na mposa makasi ya lisalisi mpo tókokisa mokumba wana ya sika. Lokola bandeko oyo bakɔmɛli bazalaki kosalisa ngai, nalukaki mpe moto moko asalisa Grace. Nasololaki na Marvin Holien, moninga moko ya libota na biso oyo azalaki mokɛngɛli-motamboli banda kala mpe nayebisaki ye ete: “Grace azali elenge mpe ayebi makambo mingi te. Oyebi ndeko moko te oyo akoki kosalisa ye mpo na mwa ntango?” Ayanolaki ete: “Ɛɛ, moto azali. Edna Winkle azali mobongisi-nzela oyo aumeli mingi mpe akoki kosalisa ye mpenza.” Na nsima, Grace alobaki mpo na Edna ete: “[Edna] asalisaki ngai nabangaka te ntango nakómi liboso ya moto, ayebaki ndenge ya kosala soki moto alingi kokata lisolo, mpe ateyaki ngai nayokaka malamu ntango moto azali koloba mpo nayeba nini ebongi naloba. Asalisaki ngai mingi mpenza!”

Banda na lobɔkɔ ya mwasi: Nathan Knorr, Malcolm Allen, Fred Rusk, Lyle Reusch, Andrew Wagner

Ngai ná Grace tozalaki kotala masangá ya zongazonga mibale oyo ezalaki na etúká ya Iowa, mpe masangá mosusu na etúká ya Minnesota mpe ya Dakota du Sud. Na nsima, batindaki biso na zongazonga ya New York 1, kati na yango kartye ya Brooklyn mpe ya Queens. Tobosanaka te ndenge tozalaki komona ete tozali na makoki te ya kosala na zongazonga yango. Na zongazonga yango, ezalaki mpe na lisangá ya Brooklyn Heights, oyo ezalaki kosala makita na Ndako ya Bokonzi ya Betele mpe bandeko mingi ya Betele oyo bakɔmɛli na elimo bazalaki na lisangá yango. Ntango nasalaki diskur ya liboso ya mosala na lisangá yango, Ndeko Nathan Knorr ayaki epai na ngai mpe alobaki na ngai: “Malcolm, oyebisi biso mwa makambo oyo tosengeli kobongisa, osali malamu. Kasi kobosana te, soki ozali kopesa biso batoli ndenge esengeli te, okozala na motuya mpenza te na ebongiseli ya Yehova. Kobá na mosala malamu oyo ozali kosala.” Nsima ya makita, nayebisaki Grace likambo yango. Na nsima, tomataki na shambre oyo bapesaki biso na Betele. Lokola tomitungisaki mingi, tolelaki.

“Soki ozali kopesa biso batoli ndenge esengeli te, okozala na motuya mpenza te na ebongiseli ya Yehova. Kobá na mosala malamu oyo ozali kosala”

Mwa basanza na nsima, tozwaki mokanda mpo na kokɔta na kelasi ya mbala ya 24 ya Eteyelo ya Gileade; tozwaki badiplome na eteyelo yango na sanza ya mibale 1955. Liboso tókende, bayebisaki biso ete formasyo oyo tokozwa kuna ezali kaka te mpo tókóma bamisionɛrɛ. Ezalaki nde mpo na kosalisa biso na mosala ya mokɛngɛli-motamboli. Kelasi yango ezalaki malamu mingi kasi eteyaki biso mpe komikitisa.

Fern ná George Couch elongo na ngai ná Grace na Gileade, na 1954

Nsima ya Gileade, batindaki ngai mokɛngɛli ya etúká. Tozalaki kosala na etúká ya Indiana, Michigan, mpe Ohio. Na nsima, na sanza ya zomi na mibale 1955, tokamwaki ntango tozwaki mokanda oyo eutaki epai ya Ndeko Knorr; elobaki ete: “Na mbala oyo, yebisá ngai makanisi na yo polelepolele mpe kobomba eloko te. Soki bokolinga koya kosala na Betele mpe kotikala awa . . . to soki bokolinga kokende kosala na mboka mopaya nsima ya kosala mwa moke na Betele, yebisá ngai yango. Soki mpe bolingi kaka kosala mosala ya zongazonga mpe ya etúká, nakosepela koyeba yango.” Tozongisaki ete tokosepela kosala esika nyonso oyo bakotinda biso. Eumelaki te, babengisaki biso na Betele!

BAMBULA OYO TOSALAKI NA BETELE

Na bambula oyo nasalaki na Betele, bazalaki mpe kopesa ngai mokumba ya kosala badiskur na masangá, na mayangani ya minene mpe ya mike na États-Unis mobimba. Nazalaki mpe na kati ya bato oyo basalisaki mpe bapesaki formasyo na bilenge mibali ebele, oyo na nsima bazwaki mikumba minene na ebongiseli ya Yehova. Nsukansuka, nakómaki sɛkrɛtɛrɛ ya Ndeko Knorr, na biro oyo ezalaki kotambwisa mosala ya kosakola na mokili mobimba.

Nazali kosala na Departema ya Mosala, na 1956

Namonaka ete bambula oyo nalekisaki na Departema ya Mosala nde ezalaki ya esengo koleka. Kuna, nasalaki elongo na Thomas (Bud) Sullivan. Azalaki mokɛngɛli na departema yango banda bambula mingi. Kasi, ezalaki mpe na bandeko mosusu oyo bateyaki ngai makambo ebele. Moko na bango ezalaki Fred Rusk, oyo azalaki kopesa ngai formasyo. Nazali koyeba lisusu ete mokolo moko natunaki ye na esengo nyonso ete: “Fred, mpo na nini obomaka makambo mpe obakisaka makanisi na mikanda mosusu oyo nakomaka?” Asɛkaki, kasi na nsima alobaki maloba oyo ya mozindo: “Malcolm, soki olobi likambo na monɔkɔ, okoki koloba makambo mosusu mpo na kolimbola yango, kasi soki okomi likambo, mingimingi soki euti awa na biro, osengeli kosala nyonso ezala malamu mpe sikisiki.” Na nsima, alobaki na boboto ete: “Kobanga te, ozali kosala malamu, mpe nsima ya mikolo, okomesana.”

Na boumeli ya bambula oyo tozalaki na Betele, Grace asalaki misala ndenge na ndenge, na ndakisa kotya bopɛto na bashambre ya bandeko. Azalaki kosepela na mosala yango. Tii lelo, soki tokutani na bandeko oyo bazalaki bilenge na Betele na bambula wana, bayebisaka Grace na mwa kosɛka ete: “Yo moto olakisá ngai kotanda mbeto, mpe tiká nayebisa yo, mama na ngai asepelá mingi.” Grace asalaki mpe na makambo etali bazulunalo, na departema ya kopesa biyano na mituna ya Biblia, mpe na departema ya kobimisa bakasɛti. Mikumba wana nyonso esalisaki ye amona ete ata soki tozali kosala nini mpe epai wapi na ebongiseli ya Yehova, mosala nyonso ezali lokumu mpe lipamboli. Tii lelo, amonaka ete ezali bongo.

MBONGWANA OYO TOSALAKI

Na katikati ya bambula ya 1970, tokómaki komona ete baboti na biso oyo bakómaki mibange bazalaki na mposa ya lisungi. Nsukansuka, esɛngaki tózwa ekateli moko ya mpasi. Tozalaki na mposa ya kobima Betele te mpe kotika bandeko oyo tozalaki kosala na bango kuna, oyo tokómaki kolinga mingi. Atako bongo, namonaki ete nazalaki na mokumba ya kosalisa baboti na biso. Yango wana, nsukansuka tobimaki Betele, kasi tozalaki na elikya ete tokozonga, soki makambo ebongwani.

Mpo na kozwa mbongo ya kobikela, nakómaki kosala na kompanyi moko ya assurance. Nabosanaka te makambo oyo mokonzi moko ayebisaki ngai ntango azalaki kopesa ngai formasyo; alobaki ete: “Mosala oyo esɛngaka kokende na bandako ya bato na mpokwa. Na ntango wana nde okoki kokuta bango. Eloko moko te ezali na ntina koleka kokende mpokwa nyonso epai ya bato.” Nazongisaki ete: “Nayebi ete ozali koloba bongo mpo yo mpe osalá yango, mpe nakoki kotya ntembe te. Kasi, nazali mpe na mikumba mosusu na makambo ya losambo, oyo nazongisaka nsima ata moke te, mpe nalingi kozongisa yango nsima sikoyo te. Nakobanda kokende epai ya bato na bampokwa mosusu, kasi na mpokwa ya mokolo ya mibale mpe ya mokolo ya minei, nakendaka na makita oyo ezali na ntina mingi.” Yehova apambolaki ngai mpenza mpo nazalaki te kozangisa makita mpo na mosala ya mosuni.

Tozalaki pembeni ya mama ntango akufaki na ndako moko ya mibange na sanza ya nsambo 1987. Mokonzi ya minganga apusanaki pene na Grace mpe alobaki na ye: “Mama Allen, zongá na ndako okende kopema mwa moke. Moto nyonso ayebi ete ozalaki awa ntango nyonso mpo na kobatela bokilo na yo. Komitungisa te, zalá na motema ya kokita.”

Na sanza ya zomi na mibale 1987, totondisaki lisusu baformilɛrɛ mpo na kosala na Betele, esika oyo tozalaki kolinga mingi. Kasi mikolo moke na nsima, bazwaki Grace na maladi ya kanser ya mosɔpɔ ya monene. Basalaki ye lipaso; na nsima balobaki ete kanser yango esili. Kasi, kaka na ntango yango, Betele etindelaki biso mokanda oyo elobaki ete malamu tókoba na mosala na biso na lisangá. Atako bongo, tozalaki kaka na ekateli ya kozonga nsima te na mosala ya Nzambe.

Na nsima, nazwaki mosala moko na etúká ya Texas. Tomonaki ete lokola kuna malili ezalaka makasi te, ekozala malamu mpo na biso. Tosali sikoyo mbula soki 25 awa na Texas mpe tozali na bandeko mibali mpe basi oyo bazali kokipe biso malamu mpe tolingaka bango mingi.

MAKAMBO OYO TOYEKOLI

Grace anyokwamaki mingi mpo na kanser ya mosɔpɔ ya monene mpe ya mongongo, mpe na mikolo oyo euti koleka, na kanser ya libɛlɛ. Kasi, amilelalelaka te mpo na makambo oyo akutaná na yango na bomoi, azalaka ntango nyonso na botosi mpe andimaka kosala makambo na boyokani. Mbala mingi batunaka ye boye: “Nini esalaka ete libala na bino ezala malamu mpe bino mibale bózalaka na esengo?” Alobelaka makambo minei: “Tozali baninga ya motema. Tosololaka mingi mikolo nyonso. Mokolo na mokolo tozangaka te kolekisa ntango elongo. Mpe ata mokolo moko te moko na biso alalaka na nkanda ya moninga na motema.” Ya solo, ekómaka ete moko asala to aloba likambo moko oyo epesi moninga nkanda, kasi tolimbisanaka mpe tobosanaka. Yango nde esalisaka biso mingi.

“Esengeli kotyela Yehova motema ntango nyonso mpe kondima makambo oyo atiki ete esalema”

Na mikakatano nyonso oyo tokutaná na yango, toyekoli makambo mingi:

  1.  Esengeli kotyela Yehova motema ntango nyonso mpe kondima makambo oyo atiki ete esalema. Kondimela mayele na yo moko ata moke te.​—Mas. 3:5, 6; Yir. 17:7.

  2.  Esengeli koluka makanisi ya Liloba ya Yehova liboso ya kozwa ekateli, ata na likambo nini. Kotosa Yehova mpe mibeko na ye ezali na ntina mingi. Okoki kozala na katikati te: to ozali na botosi, to ozali na botosi te.​—Rom. 6:16; Ebr. 4:12.

  3.  Ezali na eloko moko oyo eleki ntina na bomoi: kozala na nkombo malamu epai ya Yehova. Koluka liboso matomba na ye, kasi te bomɛngo ya mokili oyo.​—Mas. 28:20; Mos. 7:1; Mat. 6:33, 34.

  4.  Esengeli kobondela Yehova asalisa biso tózala na molende na mosala na ye mpe tóbota mbuma mingi. Kotya makanisi na makambo oyo tokoki kosala, kasi te na oyo tokoki kosala te.​—Mat. 22:37; 2 Tim. 4:2.

  5.  Esengeli kobosana te ete ezali na ebongiseli mosusu te oyo Yehova azali kopambola mpe kondima.​—Yoa. 6:68.

Ngai ná Grace tosaleli Yehova moto na moto mbula koleka 75, mpe banda tobalaná tosaleli ye elongo mbula pene na 65. Na boumeli ya bambula wana nyonso, tosaleli Yehova na esengo. Libondeli na biso ezali ete bandeko na biso nyonso bámona mpe ete tokoki kozala na bomoi ya esengo soki totyeli Yehova motema.