Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Tózwa mateya na libondeli moko oyo ebongisamaki malamu

Tózwa mateya na libondeli moko oyo ebongisamaki malamu

“Tiká bápambola nkombo na yo ya nkembo.”​—NEH. 9:5.

1. Tokolobela liyangani nini oyo basaleli ya Nzambe basalaki, mpe yango ebimisi mituna nini?

“BÓTƐLƐMA, bópambola Yehova Nzambe na bino libela na libela.” Ntango bato ya libota ya Nzambe bayokaki maloba wana, bayanganaki mpo na kobondela elongo; libondeli oyo basalaki ezali moko ya mabondeli milai oyo Biblia elobeli. (Neh. 9:4, 5) Liyangani yango esalemaki na Yerusaleme na mobu 455 L.T.B., na mokolo ya 24 ya sanza ya Tishri, sanza ya nsambo na manaka ya Bayuda. Wana tozali kotalela makambo oyo etindaki bango básala liyangani wana ya ntina mingi, omituna boye: ‘Momeseno nini ya malamu Balevi bazalaki na yango, oyo esalaki ete makambo eleka malamu mokolo wana? Mateya nini mosusu nakoki kozwa na libondeli wana oyo ebongisamaki malamu?’​—Nz. 141:2.

SANZA MOKO YA NTINA MINGI

2. Ndakisa nini ya malamu Bayisraele oyo bayanganaki nsima ya kotonga lisusu bifelo ya Yerusaleme batikelá biso?

2 Sanza moko liboso ya liyangani wana, Bayuda basilisaki kotonga lisusu bifelo ya Yerusaleme. (Neh. 6:15) Basilisaki mosala yango nsima ya mikolo 52 mpamba; na nsima, bakómaki kotya likebi mingi nde na bamposa na bango ya elimo. Yango wana, na mokolo ya liboso ya sanza oyo elandaki, sanza ya Tishri, bayanganaki na esika monene ya bato nyonso mpo na koyoka Ezera, elongo na Balevi mosusu, ntango bazalaki kotánga Mibeko ya Nzambe na mongongo makasi mpe kolimbola yango. Bato nyonso na kati ya mabota, ezala “bato nyonso oyo bazalaki na mayele ya koyoka” batɛlɛmaki mpo na koyoka “banda na kotana ya ntɔngɔ tii na midi.” Bayisraele wana bazali ndakisa malamu mpo na biso oyo toyanganaka na makita lelo oyo na Bandako ya Bokonzi ya malamu! Kasi ntango ozali na makita, ekómaka ete otika makanisi na yo eyengayenga mpe okóma kokanisa makambo oyo ezali na ntina mingi te? Soki osalaka bongo, kanisá lisusu ndakisa ya Bayisraele wana oyo basukaki kaka te na koyoka, kasi bakɔtisaki mpe na motema na bango makambo oyo bayokaki tii balelaki mpo na ndenge ekólo mobimba etosaki te Mibeko ya Nzambe.​—Neh. 8:1-9.

3. Etinda nini Bayisraele batosaki?

3 Nzokande, wana ezalaki te ntango ya koyambola masumu. Lokola ezalaki mokolo ya fɛti, esengelaki kozala ntango ya esengo mpe ya kosambela Yehova. (Mit. 29:1) Na yango, Nehemia ayebisaki bato ete: “Bókende, bólya biloko ya mafutamafuta mpe bómɛla masanga ya elɛngi, mpe bótinda biloko epai ya moto oyo babongiseli eloko moko te; mpo lelo ezali mokolo mosantu na miso ya Nkolo na biso, mpe bóyoka mpasi na motema te, mpo esengo ya Yehova ezali esika makasi ya libateli na bino.” Bato ya ekólo batosaki mpe mokolo yango ekómaki mokolo ya “kosepela mingi.”​—Neh. 8:10-12.

4. Batata ya mabota ya Bayisraele basalaki nini, mpe likambo nini bamonaki ete esengelaki kosalema na fɛti ya mwa bandako ya matiti?

4 Na mokolo oyo elandaki, batata ya mabota bayanganaki mpo na kotalela ndenge oyo bato ya ekólo bakokaki kotosa malamumalamu Mibeko ya Nzambe. Ntango bazalaki koyekola Makomami, bamonaki ete na sanza yango ya nsambo, elingi koloba sanza ya Tishri, basengelaki mpe kosala fɛti ya mwa bandako ya matiti, oyo ezalaki kosuka na liyangani moko monene, kobanda na mokolo ya 15 tii na mokolo ya 22; na yango babandaki komibongisa. Fɛti yango ezalaki fɛti oyo elekaki malamu kobanda na mikolo ya Yosua mpe bato “basepelaki mingi mpenza.” Na fɛti yango, esengelaki kotángela bato nyonso Mibeko ya Nzambe “mokolo na mokolo, banda na mokolo ya liboso tii na mokolo ya nsuka.”​—Neh. 8:13-18.

MOKOLO YA KOYAMBOLA MASUMU

5. Bato ya ekólo ya Nzambe basalaki nini liboso Balevi bábondela Yehova mpo na bango?

5 Mikolo mibale nsima ya fɛti yango, ntango ekokaki mpo bato nyonso báyambola masumu na bango. Ezalaki mokolo ya fɛti te kasi ya kokila bilei. Atako bongo, Bayisraele bakilaki bilei mpe balataki ngɔtɔ mpo na komonisa mawa na bango. Na ntɔngɔ, batángelaki lisusu bato Mibeko ya Nzambe na boumeli ya ngonga pene na misato. Na nsima ya midi, “bayambolaki masumu mpe bagumbamaki liboso ya Yehova Nzambe na bango.” Na nsima, Balevi basalaki libondeli moko ya malamu mpo na bato nyonso. ​—Neh. 9:1-4.

6. Nini esalisaki Balevi básala libondeli moko ya mozindo, mpe yango eteyi biso nini?

6 Balevi bazalaki kotánga Mibeko ya Nzambe mbala na mbala; yango esalisaki bango básala libondeli wana ya malamu mpe ya mozindo. Eteni ya liboso ya libondeli yango elobelaki misala mpe bizaleli ya Yehova. Na eteni ya mibale, Balevi balobelaki masumu ndenge na ndenge ya Bayisraele mpe balimbolaki ntina oyo ebongaki te ete Nzambe amonisela bango “motema mawa” na ye. (Neh. 9:19, 27, 28, 31) Mabondeli na biso mpe ekozala malamu mpe mozindo soki tomekoli Balevi wana; elingi koloba soki tozali komanyola Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo. Na ndenge yango, tokotika Yehova aloba na biso mpe biso tokozala na makambo ebele ya koyebisa ye na libondeli.​—Nz. 1:1, 2.

7. Balevi basɛngaki nini epai ya Nzambe, mpe yango eteyi biso nini?

7 Na libondeli na bango, Balevi wana basɛngaki kaka likambo moko. Likambo yango ezali na eteni ya nsuka ya vɛrsɛ 32, oyo elobi: “Mpe sikoyo, Ee Nzambe na biso, Nzambe monene, ya nguya mpe ya nsɔmɔ, yo oyo obatelaka kondimana mpe motema boboto, kotika te ete bampasi nyonso oyo ezwi biso, bakonzi na biso, bankumu na biso, banganga-nzambe na biso, basakoli na biso, bankɔkɔ na biso ná bato na yo nyonso banda na mikolo ya bakonzi ya Asiri tii na mokolo ya lelo, emonana eloko moke liboso na yo.” Na yango, Balevi batikelá biso ndakisa malamu. Ntango tozali kobondela, tosengeli libosoliboso kokumisa Yehova mpe kopesa ye matɔndi, bongo na nsima tokoki kosɛnga makambo na biso moko.

BASANZOLAKI NKOMBO YA NKEMBO YA NZAMBE

8, 9. (a) Na maloba nini ya komikitisa Balevi babandaki libondeli na bango? (b) Emonani ete Balevi balobelaki mampinga nini mibale oyo ezali na likoló?

8 Atako Balevi babongisaki libondeli na bango malamu, bazalaki na komikitisa mpe bamonaki ete ata soki babimisi maloba nini, ekokoka te mpo na kopesa Yehova masanzoli oyo ebongi mpenza mpo na ye. Na yango, na ebandeli ya libondeli na bango, basɛngaki Yehova ete: “Tiká bápambola nkombo na yo ya nkembo, oyo ebongi mpenza na mapamboli nyonso mpe masanzoli nyonso.”​—Neh. 9:5.

9 Libondeli yango ekobaki boye: “Yo ozali Yehova, kaka yo moko; yo moko nde osalaki likoló, ɛɛ, mosika kuna na likoló mpenza, mpe limpinga na yango nyonso, mabele mpe nyonso oyo ezali likoló na yango, mbu mpe nyonso oyo ezali na kati na yango; mpe ozali kobatela yango nyonso na bomoi; mpe limpinga ya likoló ezali kogumbamela yo.” (Neh. 9:6) Ya solo, Yehova Nzambe akelá molɔ́ngɔ́ mobimba, oyo ezali na bamiliare na bamiliare ya minzoto. Akelá mpe biloko nyonso oyo ezali na mabele mpe apesá bikelamu oyo ezali na bomoi likoki ya kokoba kobimisa bikelamu mosusu ya sika. Balobelaki mpe limpinga mosusu. Ezali “limpinga ya likoló,” elingi koloba baanzelu, oyo bamonaki ntango Nzambe asalaki biloko wana nyonso. (1 Bak. 22:19; Yobo 38:4, 7) Longola yango, baanzelu basalaka mokano ya Nzambe na komikitisa nyonso na ndenge basalelaka bato ya masumu oyo “bakozwa libula ya lobiko.” (Ebr. 1:14) Biso mpe tosengeli kosalela Yehova na bomoko lokola limpinga oyo ebongisami malamu. Tosengeli komekola baanzelu mpe kosalela Nzambe na komikitisa nyonso.​—1 Ko. 14:33, 40.

10. Ndenge oyo Nzambe asalelaki Abrahama makambo ezali koteya biso nini?

10 Na nsima, Balevi balobelaki makambo oyo Nzambe asalelaki Abrama, oyo tii ntango akómaki na mbula 99 abotaki naino mwana ata moko te na Sarai, mwasi na ye oyo azalaki ekomba. Na nsima, Yehova alongolaki ye nkombo ya Abrama, apesaki ye nkombo Abrahama, oyo elimboli “tata ya ebele ya bikólo.” (Eba. 17:1-6, 15, 16) Nzambe alakaki mpe Abrahama ete momboto na ye akofanda na mokili ya Kanana. Mbala mingi bato babosanaka makambo oyo balakaki; kasi Yehova azali bongo te. Balevi bamonisaki yango na libondeli na bango ntango balobaki ete: “Yo ozali Yehova Nzambe ya solo, moto oponaki Abrama mpe obimisaki ye na Ure ya Bakaladea mpe okómisaki nkombo na ye Abrahama. Mpe omonaki ete motema na ye ezali sembo liboso na yo; bongo osalaki kondimana ná ye mpo na kopesa ye mokili ya Bakanana, . . . mpo na kopesa yango na momboto na ye; mpe okokisaki maloba na yo, mpo ozali moyengebene.” (Neh. 9:7, 8) Biso mpe tosengeli komekola Nzambe na biso ya boyengebene; tosengeli kosala makasi mpo tókokisaka ntango nyonso makambo oyo tolakaka.​—Mat. 5:37.

BALOBELAKI MISALA MINENE YA YEHOVA

11, 12. Nkombo Yehova elimboli nini, mpe ndenge nini ndimbola yango emonanaki na ndenge oyo asalelaki bankɔkɔ ya Abrahama makambo?

11 Nkombo Yehova elimboli “Ye oyo asalaka ete ekóma”; elingi koloba ete Nzambe asalaka makambo ndenge na ndenge mpo na kokokisa bilaka na ye. Yango emonanaki polele na ndenge oyo Nzambe asalelaki bakitani ya Abrahama makambo ntango bazalaki baombo na Ezipito. Na ntango wana, emonanaki lokola ete ekólo mobimba ekokoka te kolongwa na boombo wana mpe kokɔta na Mokili ya Ndaka, ndenge alakaki yango. Kasi, Nzambe asalaki makambo ndenge na ndenge mpo na kokokisa elaka na ye; na ndenge yango amonisaki ete kaka ye nde abongi kobengama na nkombo Yehova.

12 Na libondeli wana ya Balevi, balobaki na Yehova ete: “Omonaki mpasi ya bankɔkɔ na biso na Ezipito, mpe oyokaki kolela na bango pene na Mbu Motane. Bongo opesaki bilembo mpe makamwisi mpo na kotɛmɛla Farao, basaleli na ye nyonso ná bato nyonso ya mokili na ye, mpo oyebaki ete basalelaki bango makambo na lofundo; mpe nkombo na yo ekumisamaki lokola na mokolo oyo. Mpe okabolaki mbu liboso na bango, bongo bakatisaki na kati ya mbu na mabele oyo ekauki; mpe obwakaki bato oyo bazalaki kolanda bango na bozindo lokola libanga na mai ya makasi.” Na nsima, libondeli yango elobelaki makambo mosusu oyo Yehova asalelaki bato na ye: “Obandaki kotya na nse na bango bato oyo bafandi na mokili yango, Bakanana . . . Mpe bazwaki bingumba oyo ebatelami makasi mpe mabele ya malamu mpenza mpe bazwaki bandako oyo etondá na biloko ya malamu, mabulu oyo batimolá mpo na kobomba mai, bilanga ya vinyo, bilanga ya olive ná banzete mpo na bilei ebele; bongo babandaki kolya mpe kotonda, kokóma mafutamafuta mpe kosepela mpo na bolamu na yo monene.”​—Neh. 9:9-11, 24, 25.

13. Ndenge nini Yehova akokisaki bamposa ya elimo ya Bayisraele, kasi bango basalaki nini?

13 Nzambe asalaki makambo mosusu mingi mpo na kokokisa mokano na ye. Na ndakisa, mwa moke nsima ya kobima ya Bayisraele na Ezipito, Yehova akokisaki bamposa na bango ya elimo. Na libondeli na bango, Balevi balobaki ete: “Okitaki na Ngomba Sinai mpe osololaki na bango uta na likoló mpe opesaki bango bikateli ya sembo ya lisambisi ná mibeko ya solo, malako mpe mitindo ya malamu.” (Neh. 9:13) Yehova alukaki koteya bato na ye mpo bázala bato oyo babongi kobengama na nkombo na ye mosantu mpe oyo bakokɔta na Mokili ya Ndaka, kasi batosaki mibeko ya Yehova mpo na ntango molai te.​—Tángá Nehemia 9:16-18.

BAYISRAELE BASENGELAKI KOZWA ETUMBU

14, 15. (a) Ndenge nini Yehova amoniselaki bato na ye motema mawa? (b) Ndenge oyo Yehova asalelaki ekólo na ye makambo ekoki koteya biso nini?

14 Libondeli ya Balevi elobelaki masumu mibale oyo Bayisraele basalaki mwa moke nsima ya kolaka na Ngomba Sinai ete bakotosa Mibeko ya Nzambe. Mpo na masumu yango, babongaki kozwa etumbu: bakufaki na esobe. Kasi, libondeli wana esanzolaki Yehova na maloba oyo: “Na motema mawa oyo otondi na yango, otikaki bango te na kati ya esobe. . . . Opesaki bango bilei na esobe mbula ntuku minei (40). Bazangaki eloko te. Bilamba na bango ekufaki te, mpe makolo na bango evimbaki te.” (Neh. 9:19, 21) Lelo mpe Yehova apesaka biso nyonso oyo tosengeli na yango mpo tósalela ye na bosembo. Na yango, tózala ata mokolo moko te lokola bankóto ya Bayisraele oyo bakufaki na esobe mpo na kozanga botosi mpe kozanga kondima. Kutu, makambo nyonso wana “ekomamaki mpo ezala likebisi mpo na biso baoyo tokómi na bansuka ya bantango oyo.”​—1 Ko. 10:1-11.

15 Likambo ya mawa, nsima ya kokɔta na Mokili ya Ndaka, Bayisraele balandaki losambo ya Bakanana, oyo ezalaki kolendisa bato bámipesa na misala ya mbindo mpe bátumbaka bana na bango mbeka. Yango wana, Yehova atikaki nzela ete bikólo oyo ezalaki zingazinga enyokola ekólo oyo ye aponaki. Ntango babongolaki motema, Yehova azalaki kolimbisa bango mpe kobikisa bango na mabɔkɔ ya banguna. Esalemaki bongo “mbala na mbala.” (Tángá Nehemia 9:26-28, 31.) Balevi bandimaki yango mpe balobaki ete: “Okangelaki makambo na bango motema bambula mingi mpe ozalaki kaka kotatwela bango na elimo na yo na nzela ya basakoli na yo, mpe batyaki litoi te. Nsukansuka opesaki bango na lobɔkɔ ya bato ya bikólo ya mikili yango.”​—Neh. 9:30.

16, 17. (a) Nini esalemaki ntango Bayisraele bazongelaki ezaleli na bango ya kozanga botosi? (b) Likambo nini Bayisraele bandimaki, mpe elaka nini basalaki?

16 Ata nsima ya kouta na boombo na Babilone, Bayisraele bazongelaki ezaleli na bango ya kozanga botosi. Yango ememaki nini? Balevi bakobaki kobondela ete: “Talá! Tozali lelo baombo; mpe mokili oyo opesaki bankɔkɔ na biso mpo na kolya mbuma na yango mpe biloko na yango ya malamu, talá! tozali baombo na mokili yango, mpe mbuma na yango etondi beboo mpo na bakonzi oyo otyelaki biso mpo na masumu na biso, mpe . . . tozali na mpasi monene.”​—Neh. 9:36, 37.

17 Balevi balingaki nde koloba ete Nzambe azali sembo te ndenge atikaki ete mpasi wana ekómela Yisraele? Te, balingaki koloba bongo te. Balobaki ete: “Yo ozali moyengebene na makambo nyonso oyo ekweli biso, mpamba te osalaki makambo na bosembo, kasi biso nde tosalaki mabe.” (Neh. 9:33) Na nsima, na nsuka ya libondeli na bango oyo eutaki na motema, balakaki ete banda sikoyo, ekólo mobimba ekobanda kotosa Mibeko ya Nzambe. (Tángá Nehemia 9:38; 10:29) Na yango, basalaki mokanda moko mpe bankumu ya Bayuda 84 batyaki sinyatire na mokanda yango.​—Neh. 10:1-27.

18, 19. (a) Tosengeli kosala nini mpo tókɔta na mokili ya sika ya Nzambe? (b) Tosengeli kotika te kobondela mpo na likambo nini, mpe mpo na nini?

18 Biso mpe tozalaka na mposa ete Yehova apesa biso disiplini mpo tózala bato oyo babongi kokɔta na mokili ya sika ya boyengebene. Ntoma Paulo atunaki boye: “Mwana nini oyo tata apesaka disiplini te?” (Ebr. 12:7) Tokomonisa ete tozali kondima litambwisi ya Nzambe na bomoi na biso soki tozali kolendendela na mosala na ye mpe tozali kotika elimo na ye ebongisa biso. Mpe soki tosali lisumu ya monene, tokoki kotya motema ete Yehova akolimbisa biso soki tobongoli mpenza motema mpe tondimi disiplini na ye na komikitisa nyonso.

19 Etikali moke, Yehova akosala makambo ya minene mpo na kokumisa nkombo na ye, koleka makambo oyo asalaki mpo na kobimisa Bayisraele na Ezipito. (Ezk. 38:23) Mpe ndenge kaka Bayisraele bazangaki te kokɔta na Mokili ya Ndaka, bakristo nyonso oyo bakotikala sembo na losambo ya Yehova bakozwa bomoi na mokili ya sika mpe ya boyengebene oyo Nzambe alaki. (2 Pe. 3:13) Lokola tozali na elikya wana kitoko, tótika te kobondela mpo na kosantisama ya nkombo ya Nzambe oyo etondi na nkembo. Lisolo oyo elandi ekolobela libondeli mosusu oyo ekoki kosalisa biso tósala makambo oyo esɛngami mpo tózwa mapamboli ya Nzambe sikoyo mpe na mikolo ezali koya.