Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Bakristo bakoki kotumba ebembe?

Makomami epekisi te kotumba ebembe.

Ezali na masolo ya Biblia oyo emonisi ete batumbaki bibembe to mikuwa ya bato mosusu. (Yos. 7:25; 2 Nt. 34:4, 5) Likambo yango ekoki komonisa lokola ete bato yango babongaki te kokundama na lolenge oyo ebongi. Nzokande, kotumba bibembe ezalaki ntango nyonso te na ndimbola wana.

Tokoki komona yango na lisolo oyo elobeli liwa ya Mokonzi Saulo mpe bana na ye misato ya mibali. Bango nyonso minei bakufaki ntango babundaki na Bafilistia. Moko ya bana yango ezalaki Yonatane moninga ya Davidi ya motema mpe oyo azalaki kokɔtela ye. Ntango bilombe Bayisraele oyo bazalaki kofanda na engumba ya Yabeshe-gileade bayokaki likambo yango, bazwaki bibembe na bango nyonso minei, batumbaki yango mpe na nsima bakundaki mikuwa na bango. Na nsima Davidi akumisaki Bayisraele yango mpo na oyo basalaki.​—1 Sa. 31:2, 8-13; 2 Sa. 2:4-6.

Biblia elobi ete bakufi bakosekwa, elingi koloba ete Nzambe akozongisa na bomoi moto oyo akufaki. Ezala soki moto oyo akufaki atumbami to te, Nzambe azali na likoki ya kozongisa ye na bomoi na nzoto ya sika. Baebre misato ya sembo oyo mokonzi Nebukadenezare apesaki mitindo bábwaka bango na mɔtɔ ya kongala bakokaki kobanga te ete soki baziki na litumbu ya mɔtɔ oyo ezali kopela, Nzambe akokoka kosekwisa bango te. (Dan. 3:16-18) Ezalaki mpe bongo mpo na basaleli ya sembo ya Yehova oyo babomamaki mpe oyo batumbaki bibembe na bango na Bakaa ya Banazi. Basaleli mingi ya sembo ya Yehova bakufá na babɔmbi to na balolenge mosusu oyo ata mwa eteni ya nzoto na bango emonaná te. Atako bongo, bakosekwa.​—Em. 20:13.

Yehova akosangisa te nzoto oyo moto akufaki na yango mpo na kosekwisa ye. Likambo yango emonisami na ndenge Nzambe asekwisaka bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpo na bomoi na likoló. Ndenge moko na Yesu oyo “azongisamaki na bomoi na elimo,” soki mokristo oyo atyami mafuta na elimo akufi, kaka ye nde moto akosekwa kasi na nzoto ya elimo. Ata eteni moko te ya nzoto na ye ya mosuni oyo azalaki na yango ekendaka elongo na ye na likoló.​—1 Pe. 3:18; 1 Ko. 15:42-53; 1 Yoa. 3:2.

Elikya na biso na lisekwa esimbami te na lolenge boye to oyo bakoki kosala nzoto na biso, kasi nde na kondima oyo tozali na yango na makoki mpe mposa oyo Nzambe azali na yango ya kokokisa bilaka na ye. (Mis. 24:15) Ya solo, tokoki mpenzampenza te kokanga ntina ya ndenge oyo Nzambe asalaki likamwisi ya kosekwisa bato na ntango ya kala, to ndenge oyo akosala yango na mikolo ezali koya. Atako bongo, totyelaka Yehova motema. Apesi biso “ndanga” ndenge asekwisaki Yesu.​—Mis. 17:31; Luka 24:2, 3.

Bakristo bakosala malamu soki bazali kotalela ndenge makambo esalemaka epai bazali, ndenge bato bakoyoka mpe oyo mibeko ya Leta elobi na oyo etali ndenge ya kosala mpo na bibembe. (2 Ko. 6:3, 4) Mpo na kosukisa, ezala nzoto ya moto oyo akufi ekotumbama to te, wana ezali ekateli oyo moto na moto to libota ekoki kozwa.