Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Malawi, Afrika

Mituna ya batángi . . .

Ndako ya Bokonzi ezali nini?

Ndako ya Bokonzi ezali nini?

Ndako ya Bokonzi ezali ndako epai Batatoli ya Yehova basalaka losambo na bango. Na mokili mobimba, Bandako ya Bokonzi ezali bankóto na bankóto. Pɔsɔ na pɔsɔ, masangá koleka 105 000 ya Batatoli ya Yehova esanganaka na bandako yango.

Ndako ya Bokonzi nyonso ezalaka na esika oyo bato bafandaka epai bayekolaka Biblia mpe balandaka masukulu. Na bisika yango mingi, okokuta ebaelo oyo ezalaka estrade epai batambwisaka makita. Mbala mingi, bisika ya kofanda ezalaki mpo na bato 100 kino 300. Ndako ya Bokonzi ekoki mpe kozala na eteni moko to mibale ya mike mpo na bakelasi mosusu, biro, mpe mwa bibliotɛkɛ oyo batye mikanda oyo elimbolaka Biblia mpe mikanda mosusu oyo moto nyonso ya lisangá akoki kosalela mpo na bolukiluki.

Kasi na Ndako ya Bokonzi, okokuta elembo moko te ya losambo to mpe biloko mosusu oyo mbala mingi emonanaka na bandako-nzambe ya mangomba ya bokristo. Okomona altare te, bililingi te mpe ekulusu te. Mpo na nini? Mpo Batatoli ya Yehova bandimaka ete kosalela biloko ya ndenge wana eyokani te na mitindo ya Biblia oyo elobi ete “bókima losambo ya bikeko.” (1 Bakorinti 10:14; Yoane 4:24) Bandako-nzambe ná batempelo mingi ezalaka na bililingi mpe mayemi ndenge na ndenge. Kasi batongaka Bandako ya Bokonzi mpo biteni na yango nyonso ezala na mosala mpe ezalaka mindɔndɔ te. Likebi etyamaka mingi nde na mateya ya Biblia oyo epesamaka na ndako yango, kasi na ndako yango moko te.

Mpo na nini nkombo Ndako ya Bokonzi? Makita oyo esalemaka na Ndako ya Bokonzi elobelaka libosoliboso mateya ya Biblia mpe nsango na yango monene oyo etali “bokonzi ya Nzambe,” motó ya likambo oyo Yesu alobelaki na mateya na ye. (Luka 4:43) Na yango, nkombo Ndako ya Bokonzi, oyo babimisaki na bambula ya 1930, elobelaka malamu mpenza ntina ya bandako yango​—kotombola losambo ya solo mpe kozala esika ya ntina mingi mpo na kosakola ‘nsango malamu ya bokonzi.’ (Matai 24:14) Na yango, basalelaka Bandako ya Bokonzi mpo na masano to makambo ya mombongo te. Mbongo mpo na kotonga, kosalela mpe kobatela yango eutaka kaka na makabo oyo bato bapesaka na bolingo na bango moko. Batambwisaka saani ya mabonza te. Kasi, batyá kɛsi na esika moko mpo na moto nyonso oyo alingi kopesa likabo.

Basalelaka Bandako ya Bokonzi kaka ndenge moko na mokili mobimba, kasi batongaka yango na minene mpe midɛlɛ ekeseni. Midɛlɛ na yango ekeseni na kolanda biloko ya kotonga oyo ezwami na esika moko, na kolanda klima mpe makoki ya Batatoli ya Yehova ya esika yango. Batongaka bandako mosusu na briki, mosusu na nzete mpe mosusu na mabanga. Mosusu ezalaka polele na mipanzi, mosusu ezalaka na bifelo ya bambu mpe na nsamba ya matiti.

Bayambaka bapaya nyonso oyo bayei na makita na Ndako ya Bokonzi. (Baebre 10:25) Kutu, likita moko ya bato nyonso esalemaka pɔsɔ na pɔsɔ, oyo elobelaka likambo moko oyo euti na Biblia mpe oyo ebendaka likebi ya bato ya lisangá mpe ya bapaya. Mpo na nini te kokende na Ndako ya Bokonzi oyo ezali na esika oyo ofandi?

Angleterre, Grande-Bretagne