Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Libondeli​—Esika mpe ntango ezali na ntina?

Libondeli​—Esika mpe ntango ezali na ntina?

NA NTEMBE te, omonaka ndenge mangomba mingi etongaka bandako ya mineneminene mpo na losambo mpe etyaka bangonga ya sikisiki oyo bato basengeli kobondelaka na mokolo. Biblia elobi ete tosengeli kobondelaka kaka na bisika moko boye mpe na bangonga oyo eponami?

Biblia emonisi ete ezali na mabaku oyo ebongi mpo na libondeli. Na ndakisa, liboso ya kolya na bayekoli na ye, Yesu apesaki Nzambe mersi na libondeli. (Luka 22:17) Mpe ntango bayekoli na ye bayanganaki mpo na kosambela, babondelaki elongo. Na yango, bakobaki na momeseno oyo banda kala Bayuda bazalaki kosala na basinagoga mpe na tempelo na Yerusaleme. Mokano ya Nzambe ezalaki ete tempelo ezala “ndako ya mabondeli mpo na bikólo nyonso.”​—Marko 11:17.

Ntango basaleli ya Nzambe basangani mpe babondeli elongo, malɔmbɔ na bango ekoki kobimisa matomba. Soki bato oyo basangani mpo na kobondela bazali na bomoko ya makanisi, mpe libondeli oyo esalemi mpo na bango eyokani na mitinda ya Biblia, Nzambe akosepela. Kutu, libondeli ekoki kotinda ye asala likambo mosusu oyo akokaki kosala te. (Baebre 13:18, 19) Batatoli ya Yehova babondelaka mbala na mbala na makita na bango. Tobengi yo okende na Ndako ya Bokonzi oyo ezali mosika te na esika oyo ofandi mpo yo moko oyoka mabondeli yango.

Kasi, Biblia elobi te ete esengeli kobondela kaka na ngonga boye to na esika boye. Na Biblia, tozali kokuta masolo ya basaleli ya Nzambe oyo babondelaki na ngonga ndenge na ndenge, mpe bisika ndenge na ndenge. Yesu alobaki ete: “Ntango ozali kobondela, kɔtá na eteni ya kati ya ndako na yo mpe, nsima ya kokanga porte na yo, bondelá Tata na yo oyo azali na esika ya kobombana; bongo Tata na yo oyo atalaka uta na esika ya kobombana akofuta yo.”​—Matai 6:6.

Tokoki kobondela ntango nyonso mpe esika nyonso

Oyo libyangi ya malamu mpenza! Okoki kopusana penepene na Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ ntango nyonso, ata ntango ozali mpenza yo moko, mpe zalá na elikya ete akoyoka yo. Tokoki kokamwa te ete mbala mingi Yesu azalaki koluka esika na ye moko mpo na kobondela! Mokolo moko, alekisaki butu mobimba kobondela Nzambe, na ntembe te mpo na koluka litambwisi mpo na ekateli moko ya ntina mingi.​—Luka 6:12, 13.

Biblia elobeli masolo ya mibali mpe basi mosusu oyo babondelaki ntango esengelaki bázwa bikateli ya minene to ntango bakutanaki na mikakatano minene. Ntango mosusu bazalaki kobondela na mongongo makasi mpe ntango mosusu na nse ya motema; babondelaki ntango bazalaki na bato mosusu mpe ntango bazalaki kaka bango moko. Likambo eleki ntina ezali ete babondelaki. Kutu, Nzambe azali kosɛnga na basaleli na ye ete: “Bóbondelaka ntango nyonso.” (1 Batesaloniki 5:17) Asepelaka koyoka ntango nyonso baoyo basalaka mokano na ye. Libyangi oyo emonisi mpenza bolingo ya Yehova!

Na ntembe te, na mokili oyo mabe, bato mingi batunaka soki libondeli ezali mpenza na ntina. Okoki komituna: ‘Ekosalisa ngai mpenza?’