Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mpo na nini Nzambe atiki nzela na mabe mpe bampasi?

Mpo na nini Nzambe atiki nzela na mabe mpe bampasi?

Yekolá na Liloba ya Nzambe

Mpo na nini Nzambe atiki nzela na mabe mpe bampasi?

Lisolo oyo ebimisi mituna oyo okoki komituna mpe emonisi epai okoki kotánga biyano na Biblia na yo. Batatoli ya Yehova bakosepela kosolola mituna yango na yo.

1. Mabe ebandaki ndenge nini?

Mabe ebandaki awa na mabele ntango Satana alobaki lokuta ya liboso. Satana azalaki mabe te ntango akelamaki. Azalaki anzelu ya kokoka, kasi “akangamaki makasi te na solo.” (Yoane 8:44) Akolisaki mposa ya kozwa losambo oyo esengeli kopesama kaka na Nzambe. Satana akosaki Eva, mwasi ya liboso mpe andimisaki mwasi yango atosa ye na esika ya kotosa Nzambe. Adama alandaki mpe Eva na kozanga kotosa Nzambe. Ekateli ya Adama ememaki mpasi mpe liwa.​—Tángá Ebandeli 3:1-6, 17-19.

Ntango Satana atindaki Eva aboya kotosa Nzambe, abandisaki botomboki mpo na kotɛmɛla boyangeli ya Nzambe. Bato mingi balandaki Satana mpe baboyaki ete Nzambe azala Moyangeli na bango. Na ndenge yango, Satana akómaki “mokonzi ya mokili.”​—Tángá Yoane 14:30; Emoniseli 12:9.

2. Bozalisi ya Nzambe ezalaki na mbeba?

Bato mpe baanzelu oyo Nzambe akelaki, bazalaki na likoki mpenza ya kotosa masɛngami na ye. (Kolimbola Mibeko 32:4, 5) Nzambe akelaki biso na bonsomi ya kopona kosala malamu to kosala mabe. Bonsomi yango epesaka biso libaku ya komonisa ete tolingaka Nzambe.​—Tángá Yakobo 1:13-15; 1 Yoane 5:3.

3. Mpo na nini Nzambe atiki nzela na bampasi?

Mpo na mwa ntango, Yehova atiki nzela ete bato bátombokela boyangeli na ye. Mpo na nini? Mpo na komonisa ete milende nyonso oyo bato basali mpo na komiyangela kozanga Nzambe, ebimisi litomba te. (Yirimia 10:23) Nsima ya mbula 6 000 ya boyangeli ya bato, ntembe esili kokatama. Bakonzi ya mokili balongi te kosilisa bitumba, mobulu, kozanga bosembo mpe maladi.​—Tángá Mosakoli 7:29; 8:9; Baroma 9:17.

Kasi, baoyo bazali kondima Nzambe ayangela bango, bazali kozwa matomba. (Yisaya 48:17, 18) Mosika te, Yehova akosukisa biyangeli nyonso ya bato. Kaka bato oyo bazali kondima ete Nzambe ayangela bango, bakofanda na mabele.​—Yisaya 2:3, 4; 11:9; tángá Danyele 2:44.

4. Motema molai ya Nzambe epesi biso libaku nini?

Satana alobaki ete ata moto moko te akotikala sembo epai ya Yehova. Motema molai ya Nzambe epesi biso nzela ya komonisa soki tolingi bokonzi ya Nzambe to ya bato. Lolenge oyo tozali kotambwisa bomoi na biso, ekomonisa soki toponi bokonzi ya nani.​—Tángá Yobo 1:8-11; Masese 27:11.

5. Ndenge nini toponaka ete Nzambe ayangela biso?

Toponaka ete Nzambe ayangela biso ntango tozali koluka losambo ya solo mpe kosalela mateya na yango oyo euti na Biblia, Liloba ya Nzambe. (Yoane 4:23) Toboyaka mpe komikɔtisa na makambo ya politiki mpe bitumba, ndenge Yesu asalaki.​—Tángá Yoane 17:14.

Satana asalelaka nguya na ye mpo na kotinda bato na bomoi ya mbindo mpe na misala ya mabe. Ntango tozali koboya misala yango, baninga na biso mpe bandeko na biso mosusu bakoki kosɛka to kotɛmɛla biso. (1 Petro 4:3, 4) Mpo na yango, tosengeli kopona. Tokozala esika moko na bato oyo balingaka Nzambe? Tokotosa mibeko na ye ya bwanya mpe ya bolingo? Soki tosali bongo, tokomonisa ete Satana akosaki ntango alobaki ete moto moko te akotosa maloba ya Nzambe.​—Tángá 1 Bakorinti 6:9, 10; 15:33.

Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 11 ya buku oyo, Biblia eteyaka mpenza nini?, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

[Elilingi na lokasa 16]

Adama asalaki liponi ya mabe

[Elilingi na lokasa 17]

Makambo oyo toponaka emonisaka soki tolingaka Nzambe ayangela biso