Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nsango malamu mpo na babola

Nsango malamu mpo na babola

Nsango malamu mpo na babola

LILOBA YA NZAMBE eyebisi biso ete: “Bakobosana mobola libela te.” (Nzembo 9:18) Mpo na Mozalisi na biso, Biblia elobi lisusu ete: “Ozali kofungola lobɔkɔ na yo mpe ozali kokokisa mposa ya ekelamu nyonso oyo ezali na bomoi.” (Nzembo 145:16) Elikya wana oyo euti na Liloba ya Nzambe ezali ndɔtɔ mpamba te. Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso akoki kopesa nyonso oyo esengeli mpo na kosilisa bobola. Babola bazali na mposa ya nini?

Mwasi moko ya Afrika oyo atalelaka makambo ya nkita alobaki ete bikólo ya bobola ezali nde na mposa ya “mokonzi moko ya nguya mpenza oyo azali na mposa ya kosalisa bato.” Yango elingi kolaba ete mpo na kosilisa bobola, esɛngaka ete moto moko oyo azali na bokonzi azala mpe na boboto ya kosala likambo oyo ekosilisa bobola. Tokoki kobakisa ete mokonzi oyo akoki kosilisa bobola mpo na bato nyonso, asengeli kozala mokonzi ya mokili mobimba, mpamba te mbala mingi, bobola ya makasi eutaka na ndenge bikólo mosusu ezali na bozwi mingi mpe mosusu bobola mingi. Lisusu, mokonzi oyo akoki kosilisa bobola, asengeli kozala na likoki ya kosala likambo moko mpo na ntina ya bobola, elingi koloba ezaleli ya moyimi oyo tobotamá na yango. Epai wapi tokoki kozwa mokonzi ya malamu ndenge wana?

Nzambe atindaki Yesu na nsango malamu mpo na babola. Ntango Yesu atɛlɛmaki mpo na kotánga nsango oyo azwaki epai ya Nzambe, alobaki boye: “Elimo ya Yehova ezali na ngai, mpo atye ngai mafuta mpo nasakwela babola nsango malamu.”​—Luka 4:16-18.

Nsango malamu ezali nini?

Nzambe atyaki Yesu azala Mokonzi. Na ntembe te yango ezali nsango malamu. Azali mokonzi oyo abongi mpo na kosilisa bobola mpamba te (1) akoyangela bato nyonso mpe azali na nguya ya kosala yango; (2) amoniselaka babola motema mawa, mpe ateyaka bayekoli na ye ete básalisa bango; mpe (3) akoki kosilisa eloko oyo ebimisaka bobola, ezaleli ya moimi oyo tozwá. Tótalela makambo yango misato oyo etali nsango malamu.

1. Yesu akoyangela mabota nyonso Liloba ya Nzambe elobi boye mpo na Yesu: “Bapesaki ye boyangeli . . . mpo bato ya bikólo, bituluku ya bato ya bikóló mpe minɔkɔ nyonso básalela ye.” (Danyele 7:14) Omoni te ete kozala na boyangeli kaka moko na mokili mobimba ekobimisa mpenza matomba? Bato bakowelana te to bakobunda te mpo na nkita ya mabele. Moto nyonso akozwa matomba ndenge moko. Yesu ye moko amonisaki mpenza ete akozala Mokonzi ya mokili mobimba mpe ete azali na nguya ya kosala makambo. Alobaki ete: “Bapesi ngai bokonzi nyonso na likoló mpe na mabele.”​—Matai 28:18.

2. Yesu ayokelaki babola mawa Na boumeli ya mosala na ye awa na mabele, Yesu amoniselaki babola motema mawa. Na ndakisa, mwasi moko oyo abungisaki biloko na ye nyonso mpo na koluka lisalisi ya monganga asimbaki elamba ya Yesu, na elikya ete akobika. Anyokwamaki na maladi ya kotánga makila mbula 12 mpe na ntembe te, makila na ye ekitaki mpenza. Na kolanda Mibeko, moto nyonso oyo ye akokaki kosimba, asengelaki kokóma mbindo. Kasi, Yesu amoniselaki ye boboto. Alobaki: “Mwana na ngai, kondima na yo ebikisi yo. Kende na kimya, mpe biká na maladi na yo ya mpasi.”​—Marko 5:25-34.

Mateya ya Yesu ezali na nguya ya kobongola mitema ya bato mpo bango mpe bámonisela basusu motema mawa. Na ndakisa, tótalela eyano oyo Yesu apesaki mobali moko oyo alingaki koyeba ndenge ya kosepelisa Nzambe. Mobali yango ayebaki ete Nzambe alingi ete tólinga bazalani na biso, kasi atunaki Yesu boye: “Nani mpenza azali mozalani na ngai?”

Mpo na koyanola, Yesu apesaki ndakisa oyo ekende nsango, ndakisa ya mobali moko oyo asalaki mobembo longwa na Yerusaleme kokende na Yeriko, oyo bayibaki ye mpe batikaki ye “pene na liwa.” Nganga-nzambe oyo azalaki koleka na nzela yango alekaki na ngámbo mosusu. Molevi mpe asalaki kaka bongo. “Kasi Mosamaria moko azalaki koleka na nzela yango akómaki pene na ye mpe, ntango amonaki ye, ayokaki mawa.” Asukolaki bampota ya mobali yango, amemaki ye na ndako ya bapaya, mpe afutaki mobateli ya ndako ya bapaya mbongo mpo abatela mobali yango. Yesu atunaki ete: “Nani . . . amonisi ete azali mozalani ya moto oyo akutanaki na miyibi?” Eyano ezalaki: “Oyo amoniselaki ye motema mawa.” Na nsima Yesu alobaki: “Yo moko salá se bongo.”​—Luka 10:25-37.

Bato oyo bazali kokóma Batatoli ya Yehova bayekolaka mateya wana ya Yesu mpe babongolaka makanisi na bango na likambo etali kosalisa baoyo bazali na bosɛnga. Na ndakisa, na buku na ye oyo elobi Basi na babolɔkɔ ya Union soviétique (na Lingelesi), mwasi moko na ekólo Lettonie akomaki mpo na maladi oyo abɛlaki ntango azalaki kosala na bolɔkɔ ya kaa ya Potma na bambula ya 1960 boye: “Atako nazalaki kobɛla, [Batatoli ya Yehova] bazalaki mpenza lokola bamafulume ya molende. Nakokaki kokanisa te ete nakozwa lisalisi ya malamu.” Abakisaki ete: “Batatoli ya Yehova bazalaki komona yango lokola mokumba na bango ya kosalisa moto nyonso, azala moto ya lingomba nini to ya ekólo nini.”

Ntango nkita ya ekólo Équateur ekweaki, Batatoli ya Yehova mosusu na lisangá ya Ancón bazangaki misala mpe ndenge mosusu ya kozwa mbongo; bandeko na bango Batatoli bayokanaki ete básangisa mbongo mpo na bango. Babongisaki biloko mpo na kotɛkela babomi-mbisi ntango bautaki koboma mbisi na butu (elilingi na lobɔkɔ ya mobali). Bandeko nyonso ya lisangá basalaki na bomoko, ezala ata bana. Babandaki kosala na ngonga ya liboso na butu mpo biloko ebongisama liboso bamasuwa ebanda kozonga na ngonga ya minei na butu. Mbongo oyo Batatoli basangisaki, ekabolamaki na kotalela bosɛnga ya moto na moto.

Makambo ya ndenge wana emonisi ete ndakisa ya Yesu mpe mateya na ye ezali mpenza na nguya ya kobongola makanisi ya bato mpo básalisa baoyo bazali na bosɛnga.

3. Yesu azali na nguya ya kobongola bato Biso nyonso toyebi ete bato bazalaka na mposa ya koluka kaka bolamu na bango moko. Biblia ebengaka yango lisumu. Ata ntoma Paulo akomaki ete: “Yango wana, namoni mobeko oyo epai na ngai: ntango nalingi kosala oyo ezali malamu, oyo ezali mabe nde ezali epai na ngai.” Na nsima abakisaki ete: “Nani akobikisa ngai na nzoto oyo ezali komema ngai na liwa? Nzambe azwa matɔndi na nzela ya Yesu Kristo.” (Baroma 7:21-25) Awa, Paulo alobelaki ndenge oyo Nzambe akosalela Yesu mpo na kosikola basambeli ya solo na mposa ya masumu oyo bazwá epai ya Adama, oyo moko na yango ezali ezaleli ya moimi, likambo oyo ebimisi bobola. Ndenge nini yango esengelaki kosalema?

Mwa moke nsima ya batisimo ya Yesu, Yoane Mobatisi alakisaki Yesu mpe alobaki boye: “Talá, Mwana-Mpate ya Nzambe oyo azali kolongola lisumu ya mokili!” (Yoane 1:29) Etikali moke, mabele ekotonda na bato oyo basikolami na lisumu ya Adama, ezala mpe ezaleli na bango ya moimi. (Yisaya 11:9) Yesu akolongola eloko mpenza oyo ebimisaka bobola.

Ekozala mpenza esengo komona ntango bato nyonso bakozwa biloko oyo bazali na yango mposa! Liloba ya Nzambe elobi: “Bakofanda mpenza, moto na moto na nse ya nzete na ye ya vinyo mpe na nse ya nzete na ye ya figi, mpe moto ata moko te akozala mpo na kolɛngisa bango.” (Mika 4:4) Maloba wana ezali mpenza komonisa ntango moto nyonso akozala na mosala ya malamu, akozala na kimya mpe na likoki mpenza ya kosepela na mokili oyo ezali na bobola te, mpo na nkembo ya Yehova.