Okanisaka ete ozalaki na bomoi mosusu liboso?
“Kozonga na bomoi ezali likambo ya solo, mpe bato ya bomoi bazali bato oyo bazaláká, bakufá mpe babotami lisusu; milimo ya bakufi ekobaka kozala na bomoi.”—PLATON, FILOZOFE YA GRƐKI, SIƐKLƐ YA 5 L.T.B., ATÁNGI MALOBA YA “SOCRATES.”
“Lokola esɛngaka ete molimo ezala na kati ya nzoto mpo ezala na bomoi, mpe atako ezali nzoto te, ekoki kolongwa na nzoto boye mpe kokende kofanda na nzoto mosusu.”—GIORDANO BRUNO, FILOZOFE YA ITALIE, SIƐKLƐ YA 16 T.B.
“Moto akufaka mpenza te, emonanaka kaka lokola akufi kasi eteni moko ekobaka kozala na bomoi . . . mpe na nsima, eteni yango ebandaka kotala makambo oyo ezali koleka na mokili lokola nde na fenetre mpo moto yango azali sikoyo na kati ya nzoto moko ya sika.”—RALPH WALDO EMERSON, MOKOMI MPE POWƐTI MOKO YA AMERIKA, SIƐKLƐ YA 19 T.B.
OSILÁ komituna soki ozalaka mpenza nani? Esí ekómela yo okanisa ete ozalaki na bomoi liboso? Soki ezali bongo, yebá ete ozali yo moko te. Banda kala, bato ya mikili mpe mimeseno ndenge na ndenge bamitunaki mituna ya ndenge wana. Mpo na koluka biyano na mituna yango, basusu bakómaki kondima liteya oyo elobaka ete moto abotamaka mbala na mbala. Yango elingi koloba ete ntango moto akufi, “molimo” oyo emonanaka te elongwaka na nzoto mpe ekendaka kobotama mbala moko to mbala mingi na
nzoto mosusu; na nzoto ya moto, ya nyama to ata na banzete.Atako liteya yango ekoki kosepelisa basusu, kasi nini ekoki kondimisa biso ete ezali solo? Biblia, Liloba ya Nzambe elobi nini na likambo yango? Liboso, tosengeli komituna boye: Liteya yango eutá wapi?
Liteya oyo elobaka ete bato babotamaka mbala na mbala eutá wapi?
Bato ya istware balobi ete bato oyo bazalaki kofanda na Babilone, engumba oyo basalaki yango pene ya nsuka ya milenɛrɛ ya misato liboso ya ntango na biso bakómaki kondima ete molimo ya moto ekufaka te. Na buku na ye (The Religion of Babylonia and Assyria) Morris Jastrow alobaki ete liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te, “ezalaki mpenza kobenda likebi ya bato ya teoloji ya Babilone.” Alobi lisusu boye mpo na bato ya Babilone: “Liwa ezali nzela oyo ememaka na bomoi ya lolenge mosusu. Bato ya teoloji ya Babilone babimisaki liteya ya molimo ekufaka te mpo bazalaki kondima te ete soki moto akufi, atikaka kozala na bomoi.”
Banda na ntango wana, liteya yango oyo eutaki na Babilone, oyo elobaka ete molimo elongwaka na nzoto ya moto oyo akufi mpe ekendaka kokɔta na nzoto ya moto mosusu oyo abotami, ekómaki mpe kopanzana na bisika mosusu ya mokili ya ntango wana. Bafilozofe ya Inde babimisaki liteya ya (cycle des renaissances) to Karma; oyo elobaka ete makambo oyo moto asalaki na bomoi oyo azalaki na yango liboso ekozala na bopusi na lolenge ya bomoi oyo akozala na yango ntango akobotama lisusu. Bafilozofe ya Bagrɛki oyo bakendá nsango bakómaki mpe kondima likanisi ya kobatama mbala na mbala, yango wana bato mosusu mpe bakómaki kondima yango.
Na ntango na biso mpe, bato ya mikili ya mpoto mpe ya Amerika bakómaki kosepela na liteya yango mingi. Bato oyo bayebani mingi mpe bana ya mikolo oyo bakómi kosepela na makanisi mpe misala ya mangomba ya Azia. Lelo oyo, ezali na babuku mingi mpe basite ya internet oyo elobelaka makambo oyo balobaka ete moto akutanaki na yango na bomoi oyo azalaki na yango liboso. Eloko oyo bato mingi babengaka yango lisalisi ya monganga mpo na koyeba bomoi oyo moto azalaki na yango liboso, ekómi kopalangana nokinoki na bikólo mingi. Esɛngaka kolalisa moto mpɔngi mpo na kotambwisa makanisi na ye, koluka koyeba bomoi oyo azalaki na yango liboso mpo esalisa bango báyeba ntina oyo azali na nzoto to bizaleli boye to boye.
Liteya yango ezali solo?
Atako liteya ya kobotama mbala na mbala ezali ya lelo te, na ntembe te tosengeli kozwa eyano na motuna oyo eleki ntina—liteya yango ezali solo? Mokristo asengeli koluka koyeba soki liteya yango euti mpenza na Biblia. (Yoane 17:17) Lokola Mozalisi na biso Yehova Nzambe nde akelá bomoi mpe azali “Momonisi ya basekele,” amonisi makambo etali bomoi mpe liwa; makambo oyo soki ye te, bato bango moko balingaki koyeba te. Tokoki mpenza kotya motema ete Biblia, Liloba na ye ekopesa biso biyano na likambo yango.—Danyele 2:28; Misala 17:28.
Soki toyekoli Biblia malamumalamu, tokozwa biyano oyo Nzambe apesi mpo na oyo ekómelaka biso soki tokufi. Na ndakisa, Ebandeli 3:19, emonisi biso maloba oyo Nzambe alobaki na Adama ná Eva ntango batosaki ye te. Nzambe alobaki boye: “Na motoki ya elongi na yo okolya limpa kino okozonga na mabele, mpo outaki na yango. Mpamba te ozali putulu mpe okozonga na putulu.” Adama akelamaki na putulu. Ntango akufaki, azongaki na putulu. Yango nde oyo Nzambe alobaki polele mpo na likambo yango. Na yango, ntango moto akufi, abotamaka te na nzoto mosusu kasi azalaka lisusu na bomoi te. * Kaka ndenge molunge ná malili, kokaukisa na kopɔlisa, pole ná molili eyokanaka te; liwa ezali nde kozanga bomoi. Bakufi bakufaka mpenza! Likanisi oyo ezali pɛtɛɛ mpe ebongi mpenza, boye te?
Boye, esengeli kozala na bantina mosusu oyo etindaka bato mosusu bakanisa ete bayebaka lisusu makambo oyo esalemaká na bomoi oyo bazalaki na yango liboso. Tii lelo oyo bato bayebaka mpenza te ndenge oyo bɔɔngɔ ya moto esalaka, ata mpe makanisi oyo ebatamá na bɔɔngɔ, bayebaka mpe te ndenge oyo bankisi ya monganga esalaka na nzoto to makambo ya mpasi oyo moto akutaná na yango. Bandɔtɔ mpe makambo oyo moto akanisi kokanisa oyo eutaka na makambo 1 Samwele 28:7-19.
ebele oyo akɔtisá na bɔɔngɔ, ekoki kokóma polele na makanisi na ye mpe komonana lokola makambo ya solo. Epai mosusu, bilimo mabe basalaka makambo ya kokamwa oyo ekoki kosala ete makambo oyo ezali solo te emonana lokola nde ezali solo.—Toboyi te, moto alingaka kokufa te mpe alingaka koyeba avenire. Kasi, mposa wana eutaka wapi? Likambo ya esengo, Biblia elobi boye mpo na Mozalisi: “Likanisi ya kozala na bomoi ya seko, atye yango na motema na bango.” (Mosakoli 3:11) Na yango, bato bazalaka na mposa makasi ya kozala na bomoi libela na libela.
Soki Mozalisi na biso, Yehova Nzambe, atyá likanisi ya kozala na bomoi ya seko na mitema ya bato, esengeli mpe amonisa ndenge oyo mposa yango kokokisama. Biblia emonisi mokano monene ya Mozalisi na biso ya kopambola bato ya botosi, kopesa bango bomoi ya seko na paradiso awa na mabele. Na litambwisi ya elimo ya Nzambe, Mokonzi Davidi alobaki boye: “Bayengebene bakozwa mabele, mpe bakofanda wana seko.” (Nzembo 37:29) Lisekwa ya bakufi ezali liteya ya libosoliboso ya Biblia oyo eyokani na mokano ya seko ya Nzambe.—Misala 24:15; 1 Bakorinti 15:16-19.
Lisekwa—Elikya ya solosolo mpo na bakufi
Biblia ezali na masolo mwambe ya bato oyo basekwaki; oyo bato ebele bamonaki mpenza na miso. * Ezalaki likambo ya lisekwa, kasi te ya kobotama mbala na mbala. Baoyo basekwisamaki, bato ya libota mpe baninga na bango bayebaki bango mbala moko. Ezalaki na ntina te bandeko na bango báluka kati na bana oyo babotamaki zingazinga to mosika mpo na koluka koyeba soki moko kati na bango azalaki na molimo ya ndeko na bango oyo akufaki mpe abotami lisusu.—Yoane 11:43-45.
Ezali mpenza kobɔndisa koyeba ete Liloba ya Nzambe emonisi ete ebele ya bato oyo bakufá bakozonga na bomoi, ntango lisekwa ekosalema na mokili ya sika oyo Nzambe alaki, oyo mosika te ekozwa esika ya mokili oyo mabe. (2 Petro 3:13, 14) Yehova abombi na makanisi na ye oyo ezali na ndelo te likambo mokomoko oyo bamiliare ya bato oyo bakufá basalaki; mpo azali Nzambe oyo ayebi kutu nkombo ya minzoto nyonso! (Nzembo 147:4; Emoniseli 20:13) Na mokili ya sika, ntango akozongisa na bomoi bato ya libota na libota, bakozala na likoki ya koyeba molɔngɔ ya bankoko na bango mpe moto na moto akoyeba bankoko na ye. Oyo nde elikya moko kitoko mpenza!
^ par. 13 Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 6, “Bato oyo bakufá bazali wapi?” na buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.
^ par. 18 Masolo yango mwambe ya lisekwa ezali na 1 Bakonzi 17:17-24; 2 Bakonzi 4:32-37; 13:20, 21; Luka 7:11-17; 8:40-56; Yoane 11:38-44; Misala 9:36-42; 20:7-12. Ntango ozali kotánga masolo yango, talá ndenge lisekwa yango esalemaki na miso ya bato ebele. Lisekwa ya mbala ya libwa ezali oyo ya Yesu Kristo.—Yoane 20:1-18.