Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI: NDAKISA YA MOIZE ETEYI BISO NINI?

Moize azalaki nani?

Moize azalaki nani?

Nini eyelaka yo na makanisi ntango oyokaka nkombo Moize? Okanisaka . . .

  • bebe oyo mama na ye abombaki ye na kitunga, na Ebale Nile?

  • mwana mobali oyo mwana mwasi ya Farao abɔkɔlaki na bomɛngo ya Ezipito; oyo abosanaki te ete azalaki Moyisraele?

  • mobali oyo akómaki mobateli ya mpate na Midiane mbula 40?

  • mobali oyo asololaki ná Yehova * liboso ya mwa nzete ya nzubɛ oyo ezalaki kopela mɔtɔ?

  • mobali oyo atɛlɛmaki liboso ya mokonzi ya Ezipito mpe na mpiko nyonso, asɛngaki ye ete abimisa Bayisraele na boombo?

  • mobali oyo, na litambwisi ya Nzambe asakolaki malɔzi zomi oyo esengelaki koyela Ezipito ntango mokonzi na yango aboyaki kotosa Nzambe ya solo?

  • mobali oyo akambaki Bayisraele ntango babimaki na Ezipito?

  • mobali oyo Nzambe asalelaki mpo na kokabola mai ya Mbu Motane?

  • mobali oyo apesaki Bayisraele Mibeko Zomi oyo eutaki na Nzambe?

MOIZE asalaki makambo wana nyonso mpe makambo mosusu mingi. Tokoki kokamwa te soki bakristo, Bayuda mpe Bamizilma bamemyaka mpenza moto wana ya sembo!

Na ntembe te, Moize azalaki mosakoli oyo asalaki ‘makambo minene ya nsɔmɔ.’ (Kolimbola Mibeko 34:10-12) Andimaki ete Nzambe asalela ye na ndenge moko ya kokamwa. Ata bongo, Moize azalaki lokola moto nyonso. Ndenge moko na mosakoli Eliya oyo amonanaki esika moko na Moize na emonaneli moko ntango Yesu azalaki awa na mabele, Moize azalaki moto “lokola biso.” (Yakobo 5:17; Matai 17:1-9) Moize akutanaki na mikakatano mingi oyo biso mpe tokutanaka na yango, mpe alongaki yango mpenza.

Okolinga koyeba ndenge oyo alongaki? Tótalela bizaleli misato ya malamu oyo Moize amonisaki mpe mateya oyo tokoki kozwa na ndakisa na ye.

^ par. 7 Yehova ezali nkombo ya Nzambe na Biblia.