BIBLIA EBONGOLAKA BATO
“Nakomaki komituna mpenza soki bomoi na ngai ezalaki kokende wapi”
-
ABOTAMAKI NA: 1941
-
EKÓLO: AUSTRALIE
-
BOMOI NA YE YA KALA: AZALAKI KOMƐLA MAKAYA MPE KOLANGWA MASANGA
NDENGE NAZALAKI:
Nakolaki na Warialda, engumba moko ya moke na Nouvelle-Galles du Sud. Bato ya engumba yango basalaka bilanga, balonaka bambuma mpe babɔkɔlaka bampate mpe bangɔmbɛ. Engumba yango ezalaka pɛto mpe mobulu ezalaka mingi te.
Lokola nazali mwana ya liboso na libota ya bana 10, ntango nakómaki na mbula 13, nabandaki kosala mpo na kosunga libota. Lokola natángaki mingi te, nazalaki kosala na baferme. Ntango nakómaki na mbula 15, nakómaki kobɔkɔla bampunda ya zamba mpo emesana kofanda na bato.
Kosala na baferme ezalaki malamu mpe mabe. Ezalaki malamu mpo nazalaki kosepela mpenza na mosala yango mpe biloko oyo ezalaki zingazinga ya esika yango. Na butu, nazalaki kofanda pembeni ya mɔtɔ mpe kotala sanza mpe ebele ya minzoto ntango mopɛpɛ ya mpokwa ezalaki kopɛpa mpe komema nsolo kitoko ya banzete oyo ezalaki zingazinga. Na nse ya motema, nazalaki koloba ete ezali na moto moko oyo asalá biloko wana nyonso ya kitoko. Kasi, ezalaki mabe mpo nalandaki bizaleli mabe ya bato oyo bazalaki kosala na baferme. Mbala mingi, nazalaki koyoka maloba mabe mpe ezalaki mpasi te nakóma komɛla makaya. Eumelaki te, nakómaki na bizaleli yango.
Ntango nakómaki na mbula 18, nakendaki kofanda na Sydney. Nalukaki kokɔta mosala ya soda kasi baboyaki ngai mpo natángá mingi te. Nazwaki mosala na Sydney mpe nafandaki kuna mbula mobimba. Ezalaki na ntango wana nde mpo na mbala ya liboso, nakutanaki na Batatoli ya Yehova. Ntango babengisaki ngai na makita na bango nandimaki, mpe mbala moko namonaki ete mateya na bango ezali solo.
Nzokande, mwa moke na nsima nazwaki ekateli ya kozonga mboka. Nakómaki kofanda na Goondiwindi, na Queensland. Kuna, nazwaki mosala mpe nabalaki; kasi likambo ya mawa, nakómaki mpe komɛla masanga.
Ngai ná mwasi na ngai tobotaki bana mibale. Nsima ya kobota bana yango, nakómaki komituna mpenza soki bomoi na ngai ezalaki kokende wapi. Nakanisaki makambo oyo nayokaki na makita ya Batatoli ya Yehova na Sydney, mpe nazwaki ekateli ya kosala likambo moko mpo na yango.
Namonaki Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli moko ya kala oyo ezalaki na adrɛsi ya biro ya Batatoli ya Yehova ya Australie. Natindelaki bango mokanda mpo na kosɛnga boyekoli ya Biblia. Na yango, batindelaki ngai Motatoli moko oyo azalaki na boboto mpe bolingo. Eumelaki te, akómaki koyekola na ngai Biblia.
NDENGE OYO BIBLIA EBONGOLI NGAI:
Ntango nazalaki koyekola Biblia, namonaki ete nasengeli mpenza kobongola bomoi na ngai. Vɛrsɛ oyo esimbaki motema na ngai ezali 2 Bakorinti 7:1. Vɛrsɛ yango elendisi biso “tómipɛtola na mbindo nyonso ya mosuni.”
Nazwaki ekateli ya kotika komɛla makaya mpe kolangwa masanga. Kotika bizaleli yango ezalaki pɛtɛɛ te, mpo ezwaki mpenza misisa na bomoi na ngai. Kasi nazalaki na ekateli ya kozala na bomoi oyo esepelisaka Nzambe. Kosalela toli oyo ezali na Baroma 12:2 esalisaki ngai mingi mpenza; elobi boye: “Bótika kolanda makambo ya ntango oyo, kasi bóbongwana, bókómisa makanisi na bino makanisi ya sika.” Namonaki ete mpo natika bizaleli na ngai, nasengelaki kobongola makanisi na ngai mpe kotalela bizaleli yango ete ezali mabe, kaka ndenge Nzambe azalaki kotalelaka yango. Na lisalisi ya Nzambe, natikaki komɛla makaya mpe kolangwa masanga.
“Namonaki ete mpo natika bizaleli na ngai, nasengelaki kobongola makanisi na ngai”
Kasi, kotika maloba mabe ezalaki mokakatano monene mpo na ngai. Nayebaki toli ya Biblia oyo ezali na Baefese 4:29, oyo elobaka ete: “Liloba ya kopɔla ebima na monɔkɔ na bino te.” Ata bongo, napɛtolaki elobeli na ngai noki te. Namonaki ete komanyola na maloba ya Yisaya 40:26 ekoki kosalisa ngai. Vɛrsɛ yango elobi boye mpo na minzoto oyo ezali na likoló: “Bótombola miso na bino likoló mpe bómona. Nani azalisaki biloko oyo nyonso? Ezali Moto oyo abimisaka limpinga na yango na kolanda motángo na yango mpenza, abengaka yango nyonso na nkombo. Mpo na makasi mingi oyo azali na yango, mpo azali na makasi na kati ya nguya, ata moko te kati na yango ezali kozanga.” Nalobaki boye na nse ya motema, soki Nzambe azali na nguya ya kokela molɔ́ngɔ́ oyo nasepelaka kotala, na ntembe te akoki kopesa ngai makasi ya kobongwana mpo nasepelisa ye. Kobondela mingi mpe milende oyo nasalaki, esalisaki ngai natika mokemoke maloba mabe.
MATOMBA OYO NAZWI:
Lokola nazalaki kobatela bibwele na baferme, nazalaki na libaku mpenza te ya kosolola na bato, mpo bato bazalaki mingi te penepene ya baferme epai nazalaki kosala. Ata bongo, formasyo oyo nazwaki na makita ya Batatoli ya Yehova esalisaki ngai nayeba ndenge ya kosolola. Formasyo yango esalisaki ngai mpe nayebisaka basusu nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe.—Matai 6:9, 10; 24:14.
Eleki sikoyo bambula mingi bandá nakómá nkulutu na lisangá. Namonaka ete kosala nyonso oyo nakoki mpo na kosalisa bandeko na ngai bakristo ezali libaku malamu mpenza. Kasi, kosalela Yehova elongo na mwasi na ngai ya bolingo mpe ya sembo mpe elongo na bana kitoko oyo tobotá, ezali mpenza lipamboli oyo eleki nyonso.
Napesaka Yehova matondi ndenge apesá ngai, moto oyo natángá mingi te, libaku ya koteyama na ye. (Yisaya 54:13) Nandimaka mpenza maloba ya Masese 10:22, oyo elobi ete: “Lipamboli ya Yehova—yango nde ekómisaka moto mozwi.” Ngai ná libota na ngai, tozelaka na motema likoló ntango oyo tokoyekola makambo mosusu na ntina na Yehova mpe kosalela ye mpo na libela.