Kosangisa losambo—Nzambe andimaka yango?
Zulunalo moko (The Sydney Morning Herald) ebimisaki motuna oyo: “Mangomba ezali kotya bomoko to ezali kokabola bato?” Bato ebele (89%) balobaki ete mangomba ezali kokabola biso.
NZOKANDE, bato oyo balukaka kosangisa mangomba bamonaka makambo ndenge wana te. Eboo Patel, mobandisi ya ebongiseli oyo esangisaka bilenge ya mangomba ndenge na ndenge (Youth Core) atunaki boye: “Lingomba nini eteyaka bato ete bázala na boboto te . . . , bábatela mabele te . . . , to ete báyambaka bapaya te?”
Na bantango mosusu, bato ya Lingomba ya Buda, Katolike, Protesta, Hindu, Bamizilma, mpe mangomba mosusu mingi basanganaka esika moko mpo na kolobela ndenge ya kosilisa bobola, kolobela ntomo ya bato, kopekisa likambo ya kokunda bamine, to mpe mpo na kotalela likambo ya kobebisa mabele. Mangomba ndenge na ndenge esanganaka mpo na koyokanisa makanisi na bango mpe kolendisana. Lokola bato na bato basalaka makambo na ndenge bango, ntango basangani bango nyonso bapelisaka babuji, basalaka milulu, bafɛti ya minene, babɛtaka miziki, basambelaka, mpe bongo na bongo.
Kosangisa mangomba ndenge wana nde ekosalisa yango ekóma na bomoko? Nzambe amonaka ete kosangisa mangomba nde ekobongisa mokili?
BAPESI NINI MPO NA KOZWA BOMOKO?
Ebongiseli moko monene oyo esangisaka mangomba emikumisaka ete basangani na yango bauti na mangomba koleka 200 mpe bazali kosala na bikólo 76. Ebongiseli yango ezali na mokano “ya kosalisa basangani na yango nyonso bázala na bomoko mokolo na mokolo mpe mpo na ntango molai.” Nzokande, emonani ete wana ezalaki kaka maloba ya mpamba. Na ndakisa, bakambi ya ebongiseli yango balobaki ete esɛngaki kopona na likebi maloba oyo basengelaki kotya na mokanda ya mibeko oyo ekotambwisa ebongiseli yango mpo bato ya mangomba ndenge na ndenge oyo bakotya sinyatire básilika te. Mpo na nini? Ntina moko ezali ete bato mosusu bazalaki koboya bátya nkombo ya Nzambe na mokanda yango. Na yango, balobelaki Nzambe ata na esika moko te.
Soki Nzambe atikali nsima, losambo ezali na ntina nini? Lisusu, nini ekokesenisa ebongiseli ya losambo na bibongiseli ya mokili to bibongiseli oyo esalisaka babola? Yango wana, bakambi ya ebongiseli oyo touti kolobela, oyo esangisaka mangomba balobaki ete ebongiseli na bango ezali ya losambo te, kasi nde “ebongiseli oyo ezali kolendisa bomoko.”
ESENGELI KOSUKA KAKA NA KOLENDISA MISALA YA MALAMU?
Dalai Lama, moto oyo alendisaka mingi likambo ya kosangisa mangomba, alobaki boye: “Mangomba nyonso ya minene eyebisaka bato kaka nsango moko: bálingana, bázala na motema mawa, mpe
bálimbisaka.” Abakisaki ete: “Likambo eleki ntina ezali ete tosengeli komonisa bizaleli yango mokolo na mokolo.”Ya solo, bizaleli lokola bolingo, motema mawa mpe kolimbisa ezali na ntina mingi. Kutu, Yesu alobaki ete: “Makambo nyonso oyo bolingaka bato básalela bino, bino mpe bósalela bango kaka bongo.” (Matai 7:12) Kasi, lingomba ya solo esengeli kosuka kaka na kolendisa bato básalaka malamu?
Na mikolo ya bantoma, bato mingi bazalaki koloba ete basalelaka Nzambe; Paulo alobaki mpo na bango ete: “Nazali kotatwela bango ete bazali na molende mpo na Nzambe; kasi nde na boyebi ya solosolo te.” Mabe nini basalaki? Paulo alobaki ete “lokola bayebi boyengebene ya Nzambe te,” bazalaki “koluka kotya oyo ya bango moko.” (Baroma 10:2, 3) Lokola bayebaki te oyo Nzambe alingaki ete básala, molende mpe losambo na bango ezalaki ya mpamba.—Matai 7:21-23.
BIBLIA ELOBI NINI NA LIKAMBO YA KOSANGISA MANGOMBA?
Yesu alobaki: “Esengo na bato oyo batyaka kimya.” (Matai 5:9) Bomoi ya Yesu eyokanaki na mateya na ye mpo alendisaki bayekoli na ye báboya mobulu, mpe azalaki koteya bato ya mangomba nyonso nsango moko ya kimya. (Matai 26:52) Bato oyo bandimaki nsango na ye bakómaki kolingana mpe bakómaki na bomoko. (Bakolose 3:14) Kasi, mokano ya Yesu ezalaki kaka ya kosalisa bato bákóma na bomoko mpo báfanda elongo na kimya? Asanganaki na bato mosusu na losambo na bango?
Bakonzi ya mwa mangomba ya Bafarisai mpe Basadukai bazalaki banguna minene ya Yesu; balukaki kutu koboma ye. Yesu asalaki nini? Ayebisaki bayekoli na ye ete: “Bótika bango. Bazali batambwisi oyo bakufá miso.” (Matai 15:14) Yesu aboyaki kosangisa lingomba na bato ya ndenge wana.
Mwa bambula na nsima, lisangá ya bokristo efungwamaki na engumba Korinti, na Grɛsi, epai bato bazalaki kondima makanisi ndenge na ndenge mpe mangomba ya ndenge nyonso. Bakristo basengelaki kosala nini? Ntoma Paulo akomelaki bango ete: “Bókangana te na ekanganeli ya mabe esika moko na bato oyo bazali bandimi te.” Mpo na nini? Paulo alobaki: “Boyokani nini ezali kati na Kristo mpe Beliale [to Satana]? To eloko nini moto ya sembo azali na yango elongo na moto oyo azali mondimi te?” Na nsima apesaki toli oyo: “Yango wana bóbima na kati na bango, mpe bókabwana.”—2 Bakorinti 6:14, 15, 17.
Ezali polele ete Biblia epekisi likambo ya kosangisa mangomba. Kasi, okoki komituna: ‘Ndenge nini bato bakokóma na bomoko ya solosolo?’
NDENGE YA KOKÓMA NA BOMOKO YA SOLOSOLO
Satelite monene oyo ebalukaka likoló (Station spatiale internationale) esalemaki na mayele ya bato ya bikólo soki 15. Bato yango balingaki kolonga te kosala eloko monene ndenge wana soki bazalaki na boyokani te mpo na plan oyo basengelaki kolanda.
Yango nde mokakatano oyo ezali na bibongiseli oyo esangisaka mangomba lelo oyo. Atako balobelaka mingi bomoko mpe limemya, bayokanaka te na oyo etali plan to mateya oyo esengeli kosimba lingomba. Na yango, bokabwani kati na bango na oyo etali mateya mpe bizaleli ya malamu ezali kosila te.
Biblia ezali na mibeko ya Nzambe, oyo ezali lokola plan. Makambo oyo Biblia elobi ekoki kotambwisa bomoi na biso. Bato oyo balandaka yango batiká makambo lokola kokanisa mabe mpo na bato ya mposo mpe lingomba mosusu mpe bayekolá kosala elongo na kimya mpe na bomoko. Nzambe asakolaki likambo yango na maloba oyo: “Nakopesa bato ya bikólo monɔkɔ moko ya pɛto, mpo bango nyonso bábelela nkombo ya Yehova, mpo básalela ye na bomoko.” Mpo bato bákóma na bomoko basengeli koyekola ‘monɔkɔ ya pɛto,’ elingi koloba kotosa mibeko ya Nzambe na oyo etali losambo.—Sefania 3:9; Yisaya 2:2-4.
Batatoli ya Yehova bazali kobenga yo oya na Ndako ya Bokonzi oyo ezali pembeni na esika ofandi mpo omona yo moko kimya mpe bomoko ya solosolo oyo bazali na yango.—Nzembo 133:1.