Ndenge ekomamá na Luka 6:1-49

  • Yesu, “Nkolo ya Sabata” (1-5)

  • Moto moko oyo lobɔkɔ ekauká abikisami (6-11)

  • Bantoma 12 (12-16)

  • Yesu azali koteya mpe kobikisa (17-19)

  • Esengo mpe mawa (20-26)

  • Kolinga banguna (27-36)

  • Bótika kosambisa (37-42)

  • Eyebanaka na mbuma na yango (43-45)

  • Ndako oyo etongami malamu; ndako oyo ezangi moboko ya makasi (46-49)

6  Mokolo moko ya sabata, Yesu azalaki koleka na bilanga ya blé, mpe bayekoli na ye bazalaki kobuka bambuma ya blé,+ bazalaki konika yango na mabɔkɔ na bango mpe kolya yango.+ 2  Bongo Bafarisai mosusu balobaki: “Mpo na nini bozali kosala likambo oyo epesami nzela te kosala na Sabata?”+ 3  Kasi Yesu azongiselaki bango: “Botángá naino te likambo oyo Davidi asalaki ntango ye ná bato na ye bayokaki nzala?+ 4  Ndenge akɔtaki na ndako ya Nzambe mpe azwaki mampa ya komonisa,* mpe alyaki yango mpe apesaki bato oyo bazalaki elongo na ye ndambo, nzokande mibeko epesaki moto moko te ndingisa ya kolya yango, longola kaka banganga-nzambe?”+ 5  Bongo alobaki na bango: “Mwana ya moto azali Nkolo ya Sabata.”+ 6  Na sabata+ mosusu, akɔtaki na sinagoga mpe abandaki koteya. Mpe moto moko oyo lobɔkɔ na ye ya mobali ekauká azalaki kuna.*+ 7  Bakomeli ná Bafarisai bazalaki sikoyo kotala Yesu na likebi nyonso mpo na komona soki akobikisa moto na Sabata, mpo bázwa likambo ya kofunda ye. 8  Nzokande Yesu ayebaki makanisi na bango,+ na yango alobaki na moto oyo lobɔkɔ ekauká:* “Tɛlɛmá mpe yaká na katikati.” Mpe moto yango atɛlɛmaki wana na katikati. 9  Bongo Yesu alobaki na bango: “Natuna bino: Epesami nzela na Sabata kosala malamu to kosala mabe, kobikisa bomoi moko* to koboma yango?”+ 10  Nsima ya kotala bango nyonso, alobaki na mobali yango: “Sembolá lobɔkɔ na yo.” Asembolaki yango, mpe lobɔkɔ na ye ezongaki malamu. 11  Kasi bango batondaki na nkanda, mpe babandaki kosolola bango na bango nini bakoki kosala Yesu. 12  Na moko ya mikolo yango, akendaki na ngomba mpo na kobondela,+ mpe alekisaki butu mobimba na kobondela Nzambe.+ 13  Ntango ntɔngɔ etanaki, abengaki bayekoli na ye mpe aponaki 12 kati na bango, mpe apesaki bango nkombo bantoma.+ 14  Ezalaki Simo, oyo ye apesaki mpe nkombo Petro, ndeko na ye Andre, Yakobo, Yoane, Filipe,+ Bartelemi, 15  Matai, Toma,+ Yakobo mwana ya Alfe, Simo oyo abengami “moto ya molende,” 16  Yudasi mwana ya Yakobo, mpe Yudasi Mokeriota, oyo na nsima atɛkaki ye. 17  Na nsima, akitaki elongo na bango mpe atɛlɛmaki na esika moko ya patatalu, mpe ebele mpenza ya bayekoli na ye mpe ya bato oyo bautaki na Yudea mobimba, na Yerusaleme, na etúká ya Tire mpe ya Sidone oyo ezali pembeni ya mbu, bayaki koyoka ye mpe kobikisama na bamaladi na bango. 18  Ata baoyo bazalaki kotungisama na bilimo ya mbindo babikisamaki. 19  Mpe ebele nyonso wana ya bato bazalaki koluka kosimba ye, mpo nguya ezalaki kobima kati na ye+ mpe kobikisa bango nyonso. 20  Atalaki bayekoli na ye mpe abandaki koloba: “Esengo na bino baoyo bozali babola, mpo Bokonzi ya Nzambe ezali ya bino.+ 21  “Esengo na bino baoyo bozali na nzala sikoyo, mpo bokotonda.+ “Esengo na bino baoyo bozali kolela sikoyo, mpo bokosɛka.+ 22  “Esengo na bino ntango bato bazali koyina bino,+ mpe ntango bazali kobengana bino,+ kofinga bino, mpe kobebisa lokumu na bino* lokola nde bozali bato mabe, mpo na Mwana ya moto. 23  Na mokolo yango, bósepela mpe bópumbwa na esengo, mpo talá! mbano na bino ezali monene na likoló, mpo wana nde makambo bankɔkɔ na bango bazalaki kosala basakoli.+ 24  “Kasi mawa na bino bato ya bomɛngo,+ mpo bosili kozwa libɔndisi na bino mobimba.+ 25  “Mawa na bino baoyo botondi sikoyo, mpo bokoyoka nzala. “Mawa, bino baoyo bozali kosɛka sikoyo, mpo bokozala na mawa mpe bokolela.+ 26  “Mawa na bino ntango bato nyonso bazali koloba malamu mpo na bino,+ mpo yango nde bankɔkɔ na bango basalaki basakoli ya lokuta. 27  “Kasi ngai nalobi na bino bato oyo bozali koyoka ngai: Bókoba kolinga banguna na bino, kosala malamu na bato oyo bazali koyina bino,+ 28  kopambola baoyo bazali kolakela bino mabe, mpe kobondela mpo na baoyo bazali kofinga bino.+ 29  Moto oyo abɛti yo na litama moko, pesá ye mpe oyo mosusu; mpe moto oyo abɔtɔli elamba na yo ya likoló, kopekisa ye te azwa ata elamba na yo ya kati.+ 30  Moto nyonso oyo asɛngi yo eloko,+ pesá ye, mpe soki moto abɔtɔli biloko na yo, kosɛnga te ete azongisa yango. 31  “Lisusu, kaka makambo bino bolingaka bato básalela bino, bósalela bango mpe bongo.+ 32  “Soki bozali kolinga baoyo balingaka bino, yango ezali na litomba nini mpo na bino? Mpo ata basumuki mpe balingaka baoyo balingaka bango.+ 33  Mpe soki bozali kosala malamu mpo na baoyo basalelaka bino bolamu, yango ezali na litomba nini mpo na bino? Ata basumuki mpe basalaka bongo. 34  Lisusu, soki bozali kodefisa* baoyo bozali na elikya ete bakozongisela bino, yango ezali na litomba nini mpo na bino?+ Ata basumuki mpe badefisaka basumuki mosusu na elikya ete bakofuta nyongo yango nyonso. 35  Nzokande bino, bókoba kolinga banguna na bino, bósalaka malamu mpe bódefisaka kozanga kozela ete bázongisela bino eloko.+ Bongo mbano na bino ekozala monene, mpe bokozala bana ya Oyo-Aleki-Likoló, mpo ye amoniselaka bato oyo bazangi botɔndi mpe bato mabe boboto.+ 36  Bókoba kozala bato ya motema mawa, kaka ndenge Tata na bino azali moto ya motema mawa.+ 37  “Lisusu, bótika kosambisa, mpe bakosambisa bino ata moke te.+ Bótika kokweisa bato na likambo, mpe bakokweisa bino na likambo ata moke te. Bókoba kolimbisa,* mpe bakolimbisa* bino.+ 38  Bózala na momeseno ya kopesa mpe bato bakopesa bino.+ Bakosopa na mabenga na bino biloko mingi, oyo bafini, baningisi mpe etondi mɛkɛ. Mpo bakomekela bino na emekeli oyo bozali komekela.” 39  Bongo apesaki bango mpe ndakisa moko: “Moto oyo akufá miso akoki te kolakisa moto oyo akufá miso nzela. Bango nyonso mibale bakokwea na libulu, boye te?+ 40  Moyekoli* aleki moteyi na ye te, kasi moto nyonso oyo bateyi malamumalamu akozala lokola moteyi na ye. 41  Bongo mpo na nini ozali kotala lititi oyo ezali na liso ya ndeko na yo, kasi ozali komona te libaya* oyo ezali na liso na yo moko?+ 42  Ndenge nini okoki koloba na ndeko na yo: ‘Ndeko, tiká nalongola lititi oyo ezali na liso na yo,’ nzokande yo moko ozali te komona libaya* oyo ezali na liso na yo? Mokosi! Longolá liboso libaya* oyo ezali na liso na yo moko, bongo okomona polele ndenge ya kolongola lititi oyo ezali na liso ya ndeko na yo. 43  “Mpo nzete moko te ya malamu ebotaka mbuma ebebá, mpe nzete moko te oyo ebebá ebotaka mbuma ya malamu.+ 44  Mpo nzete nyonso eyebanaka na mbuma na yango.+ Babukaka mbuma ya figi na banzubɛ te, mpe bakataka mbuma ya vinyo na nzete ya nzubɛnzubɛ te. 45  Moto malamu abimisaka makambo ya malamu na bolamu oyo abombi na motema na ye, kasi moto mabe abimisaka makambo ya mabe na mabe oyo abombi na motema na ye; mpo monɔkɔ elobaka nde makambo oyo etondi na motema.+ 46  “Bongo mpo na nini bozali kobenga ngai ‘Nkolo! Nkolo!’ kasi bosalaka te makambo oyo nalobaka?+ 47  Moto nyonso oyo ayei epai na ngai, ayoki maloba na ngai mpe azali kosalela yango, azali lokola nani? Nayebisa bino:+ 48  Azali lokola moto oyo, mpo na kotonga ndako, atimolaki libulu mozindo mpenza mpe atyaki moboko likoló ya mabanga. Bongo ntango mpela eyaki, mai ya ebale ebɛtabɛtaki ndako yango, kasi ezalaki makasi mingi te mpo na koningisa ndako yango, mpo etongamaki malamu.+ 49  Nzokande, moto oyo ayoki maloba na ngai kasi asaleli yango te,+ azali lokola moto oyo atongaki ndako likoló ya mabele, kasi atyaki moboko te. Mai ya ebale ebɛtaki ndako yango, mpe na mbala moko ekweaki, mpe ndako yango ebebaki mpenza.”

Maloba na nse

To, “mampa ya kolakisa.”
To, “ekufá.”
To, “ekufá.”
To, “molimo.”
To, “kosambwisa nkombo na bino.”
Elingi koloba, kodefisa kozanga koluka benefisi.
To, “bakofungola.”
To, “kofungola.”
To, “Mwana-kelasi.”
To, “libaya ya motɔndɔ.”
To, “libaya ya motɔndɔ.”
To, “libaya ya motɔndɔ.”