Yisaya 32:1-20

  • Mokonzi moko mpe bankumu bakoyangela mpo na bosembo ya solosolo (1-8)

  • Likebisi epai ya basi oyo bafandi na kimya (9-14)

  • Mapamboli ntango elimo ekosopana (15-20)

32  Talá! Mokonzi moko+ akoyangela mpo na boyengebene,+Mpe bankumu bakoyangela mpo na bosembo.   Mpe mokomoko akozala lokola esika ya komibomba* mpo na kokima mopɛpɛ,Esika ya kobombana* mpo na kokima mbula ya mopɛpɛ makasi,Lokola mikɛli ya mai na mokili oyo ezangá mai,+Lokola elili ya libanga monene na mokili ekauká.   Bongo miso ya baoyo bazali komona ekokangama te,Mpe matoi ya baoyo bazali koyoka ekotya likebi.   Motema ya baoyo basalaka makambo mbangumbangu ekotya likebi na boyebi,Mpe lolemo ya bato ya likukuma ekoloba malamu mpe polele.+   Zoba bakobenga ye mokabi lisusu te,Mpe moto oyo asilá nsɔni, bakobenga ye te moto ya lokumu;   Mpo zoba akoloba makambo ya bozoba,Mpe motema na ye ekokana kosala makambo ya mabe,+Mpo na kolendisa lipɛngwi* mpe koloba makambo ya bokosi mpo na Yehova,Mpo na kosala ete moto ya nzala akufa* na nzalaMpe koboyela moto oyo azali na mposa ya mai eloko ya komɛla.   Moto oyo asilá nsɔni asalelaka mayele mabe;+Alendisaka etamboli ya nsɔniMpo na kobebisa moto ya mpasi na maloba ya lokuta,+Ata ntango mobola azali koloba makambo ya sembo.   Kasi mokabi asepelaka kokaba,Mpe akobaka na misala ya kokaba.   “Bino basi oyo bofandi na kimya, bótɛlɛma, bóyoka mongongo na ngai! Bino bana basi oyo bomitungisaka te,+ bótya likebi na oyo nazali koloba! 10  Na mbula moko ná mwa mikolo, bino baoyo bozali komitungisa te, bokolɛnga,Mpo mbuma moko te ekolɔkɔtama ntango mosala ya kobuka mbuma ya vinyo ekosila.+ 11  Bino basi oyo bozali na kimya, bólɛnga! Bino basi oyo bozali komitungisa te, bólɛnga! Bólongola bilambaMpe bólata ngɔtɔ* na loketo.+ 12  Bómibɛtabɛta na ntolo na kolela mpo na bilanga ya kitoko,Mpe mpo na nzete ya vinyo oyo ebotaka mbuma. 13  Mpo mabele ya bato na ngai ekotonda na nzubɛ, mpe banzete mike ya nzubɛnzubɛ,Ekotonda na bandako nyonso oyo liboso ezalaki kotonda na esengo,Ɛɛ, engumba makasi.+ 14  Mpo babosani ndako molai ya makasi;Engumba ya makɛlɛlɛ esundolami.+ Ofele+ mpe linɔ́ngi ya mosɛnzɛli ekómi esika oyo etikalá mpamba mpo na libela,Ekómi esika ya kosepelisa mpo na bampunda ya zamba,Esika ya koleisa bitonga matiti,+ 15  Tii bakosopela biso elimo uta na likoló,+Mpe esobe ekokóma lokola elanga ya banzete ya mbuma,Mpe elanga ya banzete ya mbuma ekotalelama lokola zamba.+ 16  Bongo bosembo ekofanda na esobe,Mpe boyengebene ekofanda na elanga ya banzete ya mbuma.+ 17  Boyengebene ya solo ekomema kimya,+Ɛɛ mbuma ya boyengebene ya solo ekomema kimya mpe libateli mpo na libela.+ 18  Bato na ngai bakofanda mpenza na esika ya kimya,Na bisika oyo ebatelami malamu mpe na bisika ya kopema oyo ezangi mitungisi.+ 19  Kasi mbula ya mabanga ekobebisa zambaMpe engumba ekobebisama mpenza. 20  Esengo na bino baoyo bozali kolona mboto bisika nyonso oyo mai ezali,Oyo bozali kotinda* ngɔmbɛ ná mpunda.”+

Maloba na nse

To, “esika ya libateli.”
To, “Esika ya kokima.”
To, “kosala misala ya kobanga Nzambe te.”
To, “molimo ya moto oyo azali na nzala ekufa.”
To, “kofungola.”