Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

Kosala na molende mpenza ememaka mapamboli mingi

Kosala na molende mpenza ememaka mapamboli mingi

Elisha apesaki Mokonzi Yehoashe malako ya kosala mwa makambo oyo emonisaki na ndenge ya elilingi ndenge Yisraele esengelaki kolonga Siri (2Ba 13:15-18)

Lokola Yehoashe asalaki na molende mpenza te, bolongi na ye ezalaki te ndenge oyo esengelaki kozala (2Ba 13:19; w10 15/4 nk. 26-27 par. 11)

Yehova apesaka basaleli na ye oyo balukaka ye na mposa makasi mapamboli mingi (Ebr 11:6; w13 1/11 lok. 11 par. 5-6)

OMITUNA BOYE: ‘Ndenge nini namonisaka ete nazali na molende mpenza na makambo etali losambo na ngai, na ndakisa, kotánga Biblia, koyanganaka na makita, mpe mosala ya kosakola?’