Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

“Bópesaka” basusu

“Bópesaka” basusu

Yesu amonisaki ete soki tozali kokabela basusu, bango mpe bakokabela biso. (Lk 6:38) Soki ozali na ezaleli ya kokabela basusu, yango mpe ekotinda bango bámonisela yo boboto mpe bákabela yo.

Kopesa na esengo ezali mpe na kati ya losambo na biso. Yehova atyaka likebi epai ya baoyo bakabelaka baninga na bango bakristo oyo bazali na bosɛnga mpe alaki ete akopesa bango mbano.​—Mas 19:17.

TALÁ VIDEO TOZALI NA BOTƆNDI MPO NA EZALELI NA BINO YA KOKABA, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Ndenge nini makabo oyo opesaka esungaka bandeko na yo?

  • Mpo na nini tosengeli kokoba kokabela basusu, ata soki tozali na mingi to moke?​—Talá mpe na jw.org lisolo “Oyo eleki ebakisamaka na oyo ezangi.”