Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Elilingi ya ezipeli: Elisha azali koyebisa mosaleli na ye boye: “Baoyo bazali na biso bazali mingi koleka baoyo bazali na bango.”​—2Ba 6:16

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

Baoyo bazali na biso bazali mingi koleka baoyo bazali na bango

Baoyo bazali na biso bazali mingi koleka baoyo bazali na bango

Banguna bazingaki Elisha ná mosaleli na ye (2Ba 6:13, 14; it-1-F lok. 728 par. 5)

Elisha azalaki na motema ya kokita mpe alendisaki mosaleli na ye (2Ba 6:15-17; w13 15/8 lok. 30 par. 2; talá elilingi ya ezipeli)

Yehova abikisaki Elisha ná mosaleli na ye na ndenge ya likamwisi (2Ba 6:18, 19; it-1-F lok. 409 par. 4)

Yehova aleki banguna na biso na nguya. Soki tozalaki na likoki ya komona ndenge makambo esalemaka kuna na likoló mpe ndenge Yehova asalelaka baanzelu mpo na kobatela basaleli na ye, okanisi tolingaki komona makambo nini?