Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

Oyo nakoki kosala mpo na kobatela nkombo malamu oyo tozali na yango

Oyo nakoki kosala mpo na kobatela nkombo malamu oyo tozali na yango

Bato bamonaka bizaleli ya Batatoli ya Yehova. (1Ko 4:9) Tokoki komituna boye: ‘Maloba mpe makambo oyo nasalaka epesaka Yehova nkembo?’ (1Pe 2:12) Na ntembe te, tokolinga te kosala likambo oyo ekobebisa nkombo malamu oyo Batatoli ya Yehova bamisaleli na boumeli ya bambula mingi.—Mos 10:1.

Na makambo oyo elandi, komá ndenge mokristo asengeli kosala mpe likanisi ya Biblia oyo ekoki kosalisa ye ntango:

  • Moto oyo asambelaka Yehova te alobeli yo mabe na nkanda mpenza

  • Bilamba, motuka, to ndako na yo ezali pɛto te to ebongisami malamu te

  • Omoni ete mobeko moko ya mboka ebongi te to ezali mpasi kotosa yango

Ndenge nini bandeko oyo basalaka na Departema ya Bokomi basalisaka mpo tózala na nkombo malamu?

TALÁ VIDEO MOSALA OYO EZALI KOLENDISA BATO BÁLINGA SOLO MPE BÁTOSA YANGO, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MOTUNA OYO ELANDI:

Nini esepelisi yo na milende oyo ebongiseli na biso esalaka mpo na kobimisa makambo oyo ezali solo mpe ya sikisiki?