Ndenge oyo Biblia elobeli bomoi ya Bayuda oyo bakendaki na boombo na Babilone ezali solo?
Esali mbula soki 2 600, Bayuda bakendaki na boombo na Babilone, esika oyo basalaki mbula soki 70. Biblia elobi ete Nzambe alobelaki liboso lolenge ya bomoi oyo Bayuda oyo bakendaki na boombo na Babilone bakozala na yango, elobi: “Bótonga bandako mpe bófanda na yango, bólona bilanga mpe bólya mbuma na yango. Bókamata basi mpe bóbota bana mibali mpe bana basi. . . . Lisusu, bóluka kimya ya engumba epai namemi bino na mboka mopaya.” (Yirimia 29:1, 4-7) Bayuda basalaki yango?
Bato ya mayele basali bolukiluki na bitanda ya mabele koleka 100 oyo eutaki na Babilone ya kala to pene na yango. Bitanda yango emonisi ete Bayuda mingi oyo bazalaki na boombo babatelaki mimeseno na bango mpe lingomba na bango ntango bazalaki na Babilone. Bitanda yango oyo esalemaki kobanda siɛklɛ 572 tii 477 liboso ya ntango na biso (L.T.B.) elobelaki mpe mikanda ya kofutela mapango, makambo ya kosala, mikanda oyo ezali kolobela nyongo, mpe makambo mosusu ya mbongo. Buku moko elobi: “Babuku yango emonisi ete baombo bazalaki kosala makambo lokola bato nyonso oyo bazalaki kofanda na bamboka: kosala bilanga, kotonga bandako, kofuta mpako mpe kosalela mokonzi misala.”
Mikanda yango emonisi mpe ete Bayuda ebele bazalaki kofanda na Al Yahudu, to engumba ya Bayuda. Bankombo ya Bayuda tii na mabota minei ekomamaki na bitanda yango, misusu kutu na makomi ya Ebre. Liboso ya komona bitanda yango, bato ya mayele bayebaki makambo mingi oyo etali bomoi ya Bayuda oyo bakendaki na boombo na Babilone. Dr. Filip Vukosavović, oyo azali na kati ya bato oyo bakambaka misala ya bolukiluki ya makambo ya Yisraele ya kala, alobi: “Ntango tozali kotánga bitanda oyo tokoki koyeba makambo mingi etali Bayuda oyo bazalaki na boombo, toyebi bankombo na bango, esika bazalaki kofanda, eleko oyo bazalaki mpe makambo basalaki.”
Bayuda yango bazalaki na bolɔkɔ te, kasi bazalaki na bonsomi ya kopona esika bakofanda mpe makambo basengelaki kosala. Vukosavović alobi: “Bafandaki kaka te na Al-Yahudu, kasi mpe na bingumba mosusu zomi na mibale.” Basusu bayekolaki misala mingi, yango esalisaki bango na nsima ntango batongaki lisusu Yerusaleme. (Nehemia 3:8, 31, 32) Bitanda ya Al-Yahudu emonisi mpe ete Bayuda mingi baponaki kotikala na Babilone ntango bayebisaki bango bázonga na Yisraele. Yango emonisi ete bazalaki na kimya na Babilone, kaka ndenge Biblia elobaki yango.