Lakisá makambo oyo ezali na kati

Palais de la Hofburg na Vienne, esika biro monene ya Conseil permanent de l’Organisation pour la sécurité et la coopération en Europe (OSCE) ezali

11 SANZA YA 08, 2020
RUSSIE

Bakonzi ya Amerika mpe ya Mpoto bazali kosepela te ndenge Russie ezali konyokola Batatoli ya Yehova

Bakonzi ya Amerika mpe ya Mpoto bazali kosepela te ndenge Russie ezali konyokola Batatoli ya Yehova

États-Unis ná bikólo soki 30 ya Mpoto ezali kosepela te na minyoko mpe bampasi oyo bandeko bazali komona na Russie. Likanisi na bango ya koboya Russie emonanaki na likita oyo Conseil permanent de l’Organisation pour la sécurité et la coopération en Europe (OSCE) * ebongisaki na mokolo ya 23/07/2020.

Madame U.S. Mission Lane Darnell Bahl, mopesi-toli mosungi na makambo ya politiki ya batindami ya États-Unis, alobaki na bakambi oyo bayanganaki na likita ete: “États-Unis mpe bamboka mosusu oyo ezali na likita oyo ekweisi mpe ekokoba kokweisa guvɛrnema ya Russie. Yango ezali mpo na balapolo oyo emonisi ete bakonzi ya Russie bakɔtaki na bandako ya Batatoli ya Yehova, bakangaki bango kaka mpamba, banyokolaki bango mpe batindaki bango na bolɔkɔ, bamosusu mpo na mbula motoba mobimba.”

Bakonzi yango bayokaki mabe mingi mpenza koleka mpo na balapolo ya sika, oyo emonisi ete na etúká ya Voronezh, bakonzi ya Russie bakɔtaki na bandako koleka 100 ya Batatoli ya Yehova. Madame Bahl alobi boye: “Konyokola bato ya lingomba moko makasi boye, oyo bazali mingi te, mpe bazali bato ya kimya ezali mabe makasi mpenza.”

Madame Nicola Murray, mokambi-molandi ya bato oyo bautaki Royaume-Uni, alobi ete ndenge ‘bazali kolukaluka biloko na bandako, mpe kokɔta na bandako ebele na mbala moko na bisika mingi, ezali komonisa ete babongisaki malamu mpenza likambo ya konyokola Batatoli ya Yehova.’ Madame Murray abakisi ete: “Makambo oyo bango babengi bilembeteli mpo na konyokola bato oyo bango bazali kosalela baankɛtɛ mpe koluka kokanga bango ezali nde mpo basalaka makambo ya losambo na bango.”

Lisusu, bakonzi ya Voronezh balobi ete, batyaki Batatoli ya Yehova na bolɔkɔ mpo bazalaki kosalela Leta “myango ya mabe.” Nzokande, Madame Bahl amonisi polele ete bifundeli wana ezali lokuta. Myango ya mabe yango ezali nde kobomba balapolo, mikanda mosusu ya kotánga na Internet to na telefone, kobongisa bituluku ya boyekoli, kotambwisa makita na nzela ya video. Madame Bahl amonisi ete bifundeli ya bakonzi ya Russie wana “ezangá ntina mpe ezali nsɔni.” Alobi ete: “Ngai nasalaka makambo wana oyo balobi ete ezali ‘myango ya mabe’ mokolo na mokolo.” Alobi lisusu boye, batindami ya Russie oyo bazali kokɔta likita wana ya OSCE na nzela ya video “bazali mpe kosalela Leta myango ya mabe.”

joint statement,Mboka 27 ya Union européenne (UE), mpe mboka mosusu mwambe, balobi maloba oyo: “Toyoki batindami ya Russie bayebisi Conseil permanent ete Batatoli ya Yehova bazali, mpe bakozala ntango nyonso na likoki ya kosambela na bonsomi, mpe bonsomi yango ya kosambela to ya kondima, endimami na Russie mobimba. Nzokande, tozali kokoba kozwa balapolo ebele oyo emonisi ete bazali kokoba kokɔta na bandako, kokanga, kofunda Batatoli ya Yehova. Yango ekeseni mpenza na makambo yo batindami ya Russie balobi.”

Batindami ya Union europénne balobi lisusu boye: “Bato nyonso, ezala mpe Batatoli ya Yehova, basengeli na kimya mpenza kosalela ntomo oyo moto nyonso azalaka na yango, ezala lotomo oyo etali bonsomi ya lingomba to ya bindimeli, bonsomi ya kosangana mpe ya koyangana na kimya, bonsomi ya koloba, kozanga kopona bilongi, ndenge mobeko-likonzí ya Russie mpe boyokani ya OSCE, mpe makambo ya bikólo ndenge na ndenge oyo ekólo Russie endimá esɛngi yango.”

Madame Murray asukisi maloba ya Royaume Uni na ndenge asɛngaki ekólo Russie etika mpenza konyokola Batatoli ya Yehova.

Madame Bahl apesi Russie mitindo oyo: (1) etika kosala baankɛtɛ ya makambo oyo bafundi na yango Batatoli ya Yehova, (2) ezongisa lopango ya biro monene ya Batatoli ya Yehova na Russie, mpe (3) ebimisa nokinoki Batatoli ya Yehova nyonso oyo bazali na bolɔkɔ.

Oyo ezali mbala ya liboso te bibongiseli ya mikili ndenge na ndenge etɛmɛla Russie mpo bazali konyokola bandeko na biso. Russie akebisami. Mokili mobimba bayebi malamu mpenza ete Russie ezali konyokola bandeko na biso makasi mpenza. Likambo ya ntina koleka ezali ete, tozali kondima na motema moko ete Yehova ayebi malamu mpenza mikakatano oyo bandeko na biso bazali kokutana na yango na Russie. (Nzembo 37:18) Na ntembe te, Tata na biso ya bolingo oyo azali na likoló akokoba kopambola bandeko na biso mpo na bosembo na bango, mpiko na bango, mpe ndenge bazali kokoba kokanga motema.​—Nzembo 37:5, 28, 34.

^ par. 2 Moko ya ntina basalá OSCE ezali ya kobatela ntomo ya bato. Conseil permanent ezali ebongiseli ya libosoliboso ya OSCE oyo ezwaka bikateli ya minene.