Lakisá makambo oyo ezali na kati

Bandeko na biso 10 elongo na bandeko mosusu 8, bakangi bango atako basali likambo ya mabe te mpe batye bango na bɔlɔkɔ na Russie, ndenge Groupe de travail sur la détention arbitraire (WGAD) emonisi yango: Andrey Magliv, Igor Egozaryan, Ruslan Korolev, Vladimir Kulyasov, ná Valeriy Rogozin (molɔngɔ ya likoló, kobanda na lobɔkɔ ya mwasi tii na lobɔkɔ ya mobali); Valeriy Shalev, Tatyana Shamsheva, Olga Silayeva, Aleksandr Solovyev, ná Denis Timoshin (molɔngɔ ya nsuka, kobanda na lobɔkɔ mwasi tii lobɔkɔ ya mobali)

18/05/2020
RUSSIE

Etuluku ya bato ya mayele ya ONU elobi ete Russie ezali kotosa te mibeko etali boyokani ná bikólo mosusu na ndenge batye Batatoli ya Yehova 18 na bɔlɔkɔ

Etuluku ya bato ya mayele ya ONU elobi ete Russie ezali kotosa te mibeko etali boyokani ná bikólo mosusu na ndenge batye Batatoli ya Yehova 18 na bɔlɔkɔ

Etuluku ya bato oyo balandelaka ntomo ya moto na ONU bakomaki mokanda moko oyo elobi ete Russie ezali kotosa te mibeko etali boyokani ná bikólo mosusu na ndenge bakangi Batatoli ya Yehova 18 na bingumba ndenge na ndenge mpe batye bango na bɔlɔkɔ kobanda na sanza ya 05/2018 tii na sanza ya 07/2019. Mwa moke na nsima, etuluku yango eyebisaki bakonzi ya Russie bábimisa noki Batatoli oyo bazali na bɔlɔkɔ kozanga kosɛnga bango eloko moko.

Mokanda ya liboso ya etuluku yango oyo elobeli likambo yango, ebimaki mokolo ya 15/05/2020. Mokanda na bango ya nsuka ekobima mosika te na site ya ONU.

Oyo ezali mbala ya misato etuluku yango babengi Groupe de travail sur la détention arbitraire (WGAD) bákoma mokanda oyo ezali kolongisa bandeko na biso na mbula oyo eleki. Na mokanda yango, bato ya etuluku yango batɛmɛli makambo ya kozanga bosembo oyo guvɛrnema ya Russie ezali kosalela bandeko na biso.

Bato ya etuluku yango balobi ete bapolisi ya Russie bazalaki ata na ntina moko te ya kosalela “makasi na bango koleka ndelo” mpo na kokanga Batatoli ya Yehova. Mpe babakisi ete: “Motatoli ya Yehova moko te asengelaki kokangama mpe kotyama na bɔlɔkɔ, mpe Motatoli ya Yehova moko te asengeli kokangama mpe kotyama na bɔlɔkɔ na mikolo oyo ezali koya.”

Bato ya etuluku yango baboyaki mpenza kondima na motema moko ete Batatoli ya Yehova basalaka mosala moko oyo makambo na yango elekisaka ndelo. Bamonisi ete “Batatoli ya Yehova bazali kaka kosalela lotomo oyo bazali na yango ya kosala losambo na bango na kimya.”

Na mokanda yango, bato ya etuluku yango batɛmɛli mpe makambo oyo bazali kosala bandeko na biso na Tribinale. Na ndakisa, batyaki bandeko mibale ya basi na kati ya mwa ndako moko ya bibende (cage) ntango bazalaki kosambisa bango na Tribinale moko. Nzokande, mibeko oyo etali boyokani ná bikólo mosusu elobi ete moto nyonso azali na lotomo ya “kotalelama lokola asali likambo moko te ya mabe tii ntango ekomonisama ete abuki mobeko.” Na yango, basengelaki te kotya bandeko na biso ya basi “minɔti na mabɔkɔ to kotya bango na mwa bandako ya bibende (cage) ntango bazali na bɔlɔkɔ to komonisa na Tribinale ete bazali mpenza bato mabe.”

Bato ya etuluku yango (WGAD) bayebisaki Russie ete bátika kotalela Batatoli wana 18 ete babuki mibeko mpe ete báfuta bango ndenge mibeko oyo etali boyokani ná bikólo mosusu elobi. Lisusu, balobaki ete “básala baankɛtɛ mpenza mpe bázwa bibongiseli mpe báluka koyeba nini esalaki ete bányokola Batatoli ya Yehova mpe bápesa etumbu na baoyo nyonso babuki ntomo ya Batatoli ya Yehova”

Mokanda ya bato ya etuluku yango (WGAD) elobi ete Batatoli 18 bazali “kaka mwa motángo moke ya Batatoli ya Yehova na Russie oyo bazali kokanga bango, kotya bango na bɔlɔkɔ, mpe bazali kofunda bango ete bazali kosala makambo oyo ebuki mibeko kaka mpamba mpo na bonsomi na bango ya losambo,” lotomo oyo ezali na kati ya mibeko oyo etali boyokani ná bikólo mosusu, oyo Russie endimá. Yango wana, atako mokanda oyo elobeli bandeko na biso 18, bato ya etuluku yango (WGAD) bamonisi polele ete “etaleli mpe baoyo nyonso bazali kokutana na makambo ya ndenge wana.”

Mokanda yango esali te ete Russie ebimisa bandeko na biso na bɔlɔkɔ, kasi tozali na elikya ete mbala mosusu ekosala ete makambo ebonga. Tozali kozela eyano ya Russie. Wana tozali kozela, bandeko na biso bazali kokoba koyika mpiko mpenza na monyoko, mpe toyebi ete Tata na biso ya bolingo, Yehova akokoba kotondisa bango na esengo mpe na kimya mpo bátyela ye motema​—Baroma 15:13.